Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Novembre 2015

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Mangomba ekómi kotikala mpamba?

Mangomba ekómi kotikala mpamba?

Gaffar, oyo abotamá na Turquie, azalaki kotungisama na likanisi oyo ete Nzambe alimbisaka te ndenge bateyaki ye na lingomba na ye. Mwasi na ye Hediye akómaki kotyela lingomba na ye ntembe ntango azalaki kaka na mbula 9. Alobi boye: “Bateyaki ngai nandimaka ete makambo nyonso etángamá. Lokola baboti na ngai bakufaki, nazalaki komituna soki ‘nasalaki nini mpo likambo ya ndenge wana ekómela ngai.’ Mbala mingi nazalaki kolela butu mobimba. Ntango nakómaki na mbula 15, na motema, nasundolaki lingomba ngai.”

OSUNDOLÁ lingomba na yo? Soki ɛɛ, ozali yo moko te. Na bikólo mingi, motángo ya bato oyo balobaka ete ‘basambelaka te’ ezali se komata; likambo yango ezali komonisa ete avenire ya mangomba ekómi na likama. Mwa ndambo ya bikólo yango bamonisi yango awa.

 Mpo na nini bazali kolongwa?

Soki bato bazali kosepela lisusu na mangomba te ezali mpo na bantina ndenge na ndenge. Na ndakisa, mangomba ezali kondima makambo ya mobulu, ya nsɔmɔ, bakambi na yango bazali kosangisa nzoto na ndenge ya mabe mpe makambo mosusu ya mabe ya nsense, nyonso wana ekoki kosala ete bato mingi básundola mangomba. Ezali mpe mpo na makambo oyo elandi:

  • Bomɛngo: Lapolo moko (Global Index of Religion and Atheism) elobi boye: “Bato bamipesaka lisusu na makambo ya Nzambe te ntango bomɛngo na bango ezali kobakisama.” Likambo yango ezali solo mpenza mpo bozwi ya bikólo mingi emati nokinoki. John Nye, profesɛrɛ moko ya ekonomi alobi ete na bisika mosusu bato bazali “na biloko ebele oyo na bambula 200 oyo eleki ekokaki kosala ete mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso alula bozwi na bango.”

    OYO BIBLIA ELOBI: Biblia esakolaki ete na “mikolo ya nsuka,” bato bakolinga mbongo mpe bisengo na esika ya kolinga Nzambe mpe bazalani. (2 Timote 3:1-5) Lokola ayebaki ete bomɛngo ekoki kotya boninga na ye na Nzambe na likama, mokomi moko ya Biblia alobaki na Yehova Nzambe boye: “Kopesa ngai bobola te, bomɛngo mpe te.” Mpo na nini alobaki bongo? Abakisi boye: “Noki natonda mpe nawangana yo.”​—Masese 30:8, 9.

  • Mimeseno ya mangomba mpe bizaleli malamu: Bato ebele, mingimingi bilenge, bamonaka ete mangomba ezali na ntina te na mikolo na biso. Bamosusu batyelaka mangomba motema lisusu te. Tim Maguire, mopanzi-nsango ya ebongiseli moko (Humanist Society Scotland), alobi boye: “Soki otali makambo oyo mangomba esali na boumeli ya basiɛklɛ, okomona ete bato bazali kopesa yango mokɔngɔ mpo ezali kopesa ndakisa te na makambo etali bizaleli malamu.”

    OYO BIBLIA ELOBI: Yesu akebisaki boye mpo na bateyi ya lokuta: “Bokoyeba bango na mbuma na bango. . . . Nzete nyonso ya malamu ebotaka mbuma ya malamu, kasi nzete nyonso ya mabe ebotaka mbuma ya mabe.” (Matai 7:15-18) “Mbuma ya mabe” esangisi komikɔtisa na politiki mpe kondima misala oyo esilikisaka Nzambe, na ndakisa kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi. (Yoane 15:19; Baroma 1:25-27) Esangisi mpe milulu mpe mimeseno oyo ezangá ntina oyo eyokani te na mateya kitoko ya Biblia. (Matai 15:3, 9) Yesu alobaki boye: “Leisá bampate na ngai ya mike.” (Yoane 21:17) Kasi lelo oyo, bato mingi bazali na nzala ya mateya ya Nzambe.

  •   Mangomba mpe mbongo: Ebongiseli moko (Pew Research Center) elobi ete bato ebele bamoni ete mangomba elobelaka mingi nde mbongo. Longola yango, na kokesana na bandimi na bango, bakonzi mosusu ya mangomba bakómi na bomɛngo mingi. Na ndakisa, na engumba moko ya Allemagne epai bandimi mingi basalaka makasi mpo na kozwa mwa eloko ya kobikela, bafundaki baepiskɔpɔ ete bazali na biloko ebele ya kobikela. Bomoi ya lolenge wana esilikisaki bandimi mingi ya lingomba ya Katolike ya engumba yango. Lisusu, lapolo moko ya zulunalo GEO elobi ete na Nigeria, “epai bato milio 100 babikelaka na mosolo ya dolare moko na ndambo na mokolo, bozwi oyo bapastɛrɛ mosusu bakómi na yango ezali kobɛtisa bato libaku.”

    OYO BIBLIA ELOBI: Paulo, mokomi moko ya Biblia akomaki boye: “Tozali te bato oyo batɛkaka liloba ya Nzambe.” (2 Bakorinti 2:17) Atako Paulo azalaki mosakoli oyo ayebanaki mingi na lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya liboso, azalaki mbala mingi kosala misala ya mabɔkɔ mpo na kopesa te bandeko mokumba ya kokokisaka bamposa na ye. (Misala 20:34) Ezaleli yango emonisaki ete azalaki kotosa etinda oyo ya Yesu: “Bozwi ofele, bópesa ofele.”​—Matai 10:7, 8.

Batatoli ya Yehova basalaka bongo na ndenge batɛkaka mikanda te mpe basɛngaka mbongo te mpo na koyekola na bato Biblia. Basɛngaka dime te mpe bakɔngɔlaka mabonza na makita na bango te. Kutu, mbongo oyo basalelaka misala na bango eutaka na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko.​—Matai 6:2, 3.

Biblia esakolaki likambo yango!

Na mwa bambula oyo eleki, ezalaki mpasi bato bákanisa ete makambo ya boye ekokaki kokómela mangomba. Kasi, Nzambe así ayebaki likambo yango mpe asakolaki yango na Biblia. Na maloba ya elilingi, Nzambe akokanisaki mangomba nyonso oyo ezangi bosembo na mwasi ya ndumba oyo alati bilamba ya langilangi na nkombo “Babilone Monene.”​—Emoniseli 17:1, 5.

Elilingi yango ebongi mpenza mpo atako mangomba ya lokuta etutaka ntolo ete ezalaka sembo epai ya Nzambe, kasi ekɔtaka na makambo ya politiki mpo na kozwa nguya mpe bomɛngo. Emoniseli 18:9 elobi ete “bakonzi ya mabele . . . basalaki na ye pite.” Ebengeli “Babilone” ebongi mpe mpo mateya mingi ya lokuta na ndakisa molimo ekufaka te, Bosato mpe misala ya molili eutá na Babilone, engumba moko ya kala oyo etondaki na mangomba ya lokuta mpe biyambayamba (superstitions). *​—Yisaya 47:1, 8-11.

Babilone, mboka moko ya makasi ekweaki ntango bamai oyo ezalaki kobatela yango, oyo ezalaki kouta na ebale Efrate “ekaukaki,” efungolaki nzela mpo basoda ya Bamede mpe Baperse bázwa engumba yango. (Yirimia 50:1, 2, 38) Kutu, bazwaki Babilone na butu moko mpamba!​—Danyele 5:7, 28, 30.

Babilone Monene mpe “afandi na mai mingi.” Biblia emonisi ete yango elimboli “bato ya mikili mpe ebele ya bato;” elingi  koloba bamilio ya bato oyo bapesaka mangomba ya lokuta mabɔkɔ. (Emoniseli 17:1, 15) Biblia esakolaki ete bamai yango ya elilingi ekokauka; likambo oyo ekomonisa kobomama ya Babilone ya ntango na biso ekómi pene mpe ekosalema nokinoki. (Emoniseli 16:12; 18:8) Kasi nani akosala yango? Bakonzi wana ya politiki oyo balingaka ye, bakoyina ye. Lisusu, bakopunza ye to bakolya mosuni na ye ya elilingi.​—Emoniseli 17:16, 17. *

Kokauka ya bamai oyo ezingaki Babilone ezali elilingi ya kobima ya bato na Babilone Monene

“Bóbima kati na ye”!

Mpo na makambo oyo ezali kozela Babilone Monene, na bolingo nyonso Nzambe apesi likebisi oyo: “Bóbima kati na ye, bato na ngai, soki bolingi te kosangana na ye na masumu na ye, mpe soki bolingi te kozwa ndambo ya malɔzi na ye.” (Emoniseli 18:4) Simbá ete liloba “soki” elobelami mbala mibale. Nzambe apesi likebisi yango epai ya baoyo batungisamaka mpo na mateya ya mabe mpe balingaka ete Nzambe andima bango​—bato lokola Gaffar mpe Hediye, oyo tolobelaki liboso.

Liboso Gaffar ayekola Biblia, azalaki kozwa Nzambe lokola moto oyo basengeli kotosa ye libosoliboso mpo na kobanga. Alobaki boye: “Motema na ngai ekitaki ntango nayebaki ete Yehova azali Nzambe ya bolingo mpe alingaka ete tótosa ye libosoliboso mpo tolingaka ye.” (1 Yoane 4:8; 5:3) Hediye azwaki kimya ya motema ntango ayebaki ete Nzambe te nde asalá ete atikala mwana-etike mpe ete etángamaki te ete atikala bongo. Bavɛrsɛ ya Biblia lokola Yakobo 1:13, oyo elobaka ete Nzambe amekaka bato na makambo ya mabe te, ekitisaki ye motema. Ye ná Gaffar bandimaki mateya ya Biblia mpe babimaki na “Babilone.”​—Yoane 17:17.

Ntango Babilone Monene ekobomama, likambo moko te ya mabe ekokómela baoyo na botosi nyonso babimaki na Babilone mpo na ‘kosambela Tata na elimo mpe na solo.’ (Yoane 4:23) Bazali na elikya ya komona ndenge mabele “ekotonda na boyebi ya Yehova ndenge mai etondi na mbu.”​—Yisaya 11:9.

Ya solo, losambo ya lokuta mpe mbuma mabe na yango ekosuka mpo Nzambe “akoki kobuka lokuta te.” (Tito 1:2) Kasi losambo ya solo ekotikala libela na libela!

^ par. 16 Mpo na koyeba makambo etali Babilone Monene mpe oyo Biblia elobi mpo na bakufi, ndenge oyo Nzambe azalaka mpe misala ya molili, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? Ezali mpe na Internet na www.jw.org.

^ par. 18 Talá “Biblia elobi nini?​—Nsuka ya mokili,” na nimero ya Lamuká! oyo.

Makambo mosusu

LAMUKÁ!

Biblia elobi nini mpo na mangomba?

Biblia emonisi ntina oyo mangomba ezali mingi boye.