Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Septembre 2015

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Kotalela mbongo na ndenge ebongi

Kotalela mbongo na ndenge ebongi

BATO balobaka ete “mbongo nde ekataka makambo.” Maloba yango ekoki kozala solo. Kutu, esɛngaka mbongo mpo na kosomba bilei, bilamba, kofutela ndako to kosomba lopango. Mokomi moko ya makambo etali mbongo akomaki ete “mbongo ezali na ntina mingi na bomoi ya bato. Soki balongoli mbongo, mobulu ekokɔta mpe nsima ya sanza kaka moko bitumba ekobanda.”

Ata bongo, ezali na biloko mosusu oyo mbongo ekoki kosomba te. Arne Garborg, powɛti moko ya ekólo Norvège alobaki ete soki ozali na mbongo “okoki kosomba nde bilei, kasi mposa ya kolya te, nkisi kasi sante te, mbeto ya kitoko kasi mpɔngi te; boyebi kasi bwanya te; biloko ya monzɛlɛ kasi bonzenga te; lokumu kasi boninga te; kozwa mwa mopɛpɛ kasi esengo te; koyebana na bato mingi kasi baninga te; bato ya misala kasi bosembo te.”

Soki moto azali kotalela mbongo na ndenge ebongi; elingi koloba azali kotalela yango lokola eloko oyo ekoki kosalisa ye akokisa mikano na ye, na ntembe te, akosepela mpenza na oyo azali na yango. Biblia elobi ete “bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso, mpe lokola bamosusu bakolisi bolingo wana . . . bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.”​—1 Timote 6:10.

Simbá ete ezali bolingo ya mbongo nde ememelaka moto mpasi, kasi mbongo yango moko te. Kolinga mbongo koleka ndelo ekoki kokabola baninga mpe bato ya libota. Tózwa mwa bandakisa.

 Daniel: * “Nazalaki ntango nyonso kokanisa ete moninga na ngai Thomas azali na boboto mpe sembo. Nazwá ye na likambo te, tii mokolo asombaki motuka na ngai oyo nasalelá. Nayebaki te ete motuka yango ezalaki na eloko moko oyo ebebá. Kasi, tosalaki mokanda oyo emonisaki ete andimaki kosomba yango ‘kaka bongo.’ Nsima ya sanza misato motuka yango ebebaki. Thomas amonaki ete nabubi ye mpe na nkanda nyonso atingamaki nazongisa mbongo na ye. Esalaki ngai mpasi! Ntango namekaki kosolola na ye, atombokelaki ngai makasi. Ntango ekómaki likambo ya mbongo, Thomas azalaki lisusu te moninga malamu oyo nayebaki.”

Esin: “Babotá biso kaka ngai ná leki na ngai Nesrim. Tozalaki ntango nyonso koyokana malamu, nakanisaki te ete mbongo ekokaki kobebisa boyokani na biso. Kasi yango nde ekómelaki biso. Ntango baboti na biso bakufaki, batikelaki biso libula moko ya moke mpe balobaki ete tókabola mbongo ndenge moko. Leki na ngai atosaki te maloba ya baboti na biso mpe asɛngaki koleka oyo balobaki na ye azwa. Lokola nalingaki kotosa malako ya baboti na biso, atombokaki makasi. Tii lelo, akangelá ngai nkanda.”

MBONGO MPE KOKANISELA BASUSU MABE

Kotalela mbongo na ndenge ya mabe ekoki kotinda bato bákóma kokanisela basusu mabe. Na ndakisa, mozwi akoki kokanisa ete babola bazali mpenza bagɔigɔi yango wana mwaye bákóma bazwi ezali te. To moto oyo azali na bozwi mpenza te akoki nokinoki kokanisa ete baoyo bazali na bozwi mingi balingaka biloko ya mokili mingi to bazali lokoso. Bazalaki kokanisela Leanne, elenge moko ya mbula 17, oyo azali na libota ya bozwi mabe ndenge wana. Alobi boye:

Batoli ya Biblia na likambo etali mbongo ebongi mpenza mpe ekoki kosalisa bato lelo kaka ndenge esalisaki ntango ekomamaki

“Nayebanaki lokola mwana mwasi oyo tata na ye azali moto ya mbongo. Yango wana mbala mingi bazalaki koloba na ngai boye: ‘Soki ozali na mposa ya eloko nyonso, sɛngá kaka tata na yo mpe akopesa yo’ to ‘pardɔ, biso nyonso tozali bazwi te mpe tokokoka kosomba mituka ya kitoko lokola ya libota na bino te.’ Nsukansuka nayebisaki baninga na ngai bátika koloba na ngai bongo mpe namonisaki bango ntina oyo maloba na bango esalaka ngai mpasi. Nalingaki te báyeba ngai lokola moto ya mbongo, kasi nde lokola moto oyo asalelaka basusu bolamu.”

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia elobi te ete mbongo ezali mabe to kozala na mbongo ata ya ebele mpenza ezali mabe. Ezali te likambo ya mbongo oyo moto azali na yango, kasi nde ndenge oyo atalelaka mbongo yango to mbongo oyo azali na mposa ya kozwa. Batoli ya Biblia na likambo etali mbongo ebongi mpenza mpe ekoki kosalisa bato lelo kaka ndenge esalisaki ntango ekomamaki. Tótalela bandakisa oyo elandi.

BIBLIA ELOBI BOYE: “Koboma nzoto te mpo na kozwa bomɛngo.”​—Masese 23:4.

Buku moko (The Narcissism Epidemic) elobi ete baoyo balukaka kokóma na mbongo mingi “babɛlaka motó mpe bamaladi mosusu lokola mpasi na mongongo, na mokɔngɔ to na motó, bakómaka komɛla masanga mingi mpe kosalela drɔgɛ. Emonani ete  bato oyo balukaka kokóma na mbongo mingi bakómaka nde bato ya mpasi.”

BIBLIA ELOBI BOYE: “Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo.”​—Baebre 13:5.

Ata moto oyo asepelaka na oyo azali na yango amitungisaka mpe mpo na mbongo; kasi, atikaka te ete mitungisi yango elekela ye motó. Na ndakisa, ata soki abungisi mbongo mingi, moto oyo asepelaka na oyo azali na yango, akomitungisa koleka ndelo te. Kutu, akosala nyonso amonisa ezaleli oyo ya ntoma Paulo, oyo akomaki boye: “Nayebi mpenza kozanga biloko, nayebi mpenza kozala na biloko mingi. Na eloko nyonso mpe na makambo nyonso nayekoli sekele ya kotonda mpe ya kozala na nzala; ya kozala na biloko mingi mpe ya kokelela.”​—Bafilipi 4:12.

BIBLIA ELOBI BOYE: “Ye oyo atye motema na bomɛngo na ye​—akokwea.”​—Masese 11:28.

Bato ya mayele balobi ete mikakatano ya mbongo ezali moko ya makambo oyo ekɔtisaka matata na libala mpe esalaka ete libala ekufa. Mikakatano ya mbongo ezali mpe moko ya makambo oyo etindaka bato na komiboma. Mpo na bato mosusu, mbongo ezali na ntina mingi koleka ndai ya libala to mpe bomoi na bango moko! Kasi, baoyo batalelaka mbongo na ndenge ebongi batyaka elikya na bango na mbongo te. Kutu, bandimaka maloba ya bwanya oyo ya Yesu: “Ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.”​—Luka 12:15.

 OTALELAKA MBONGO NDENGE NINI?

Komitalela ekoki kosalisa yo omona esika oyo osengeli kobongisa mpo otalelaka mbongo na ndenge ebongi. Na ndakisa, omituna mituna oyo elandi.

  • Likanisi ya kokóma mozwi nokinoki ebendaka ngai?

  • Kokaba mbongo ezalaka mokakatano mpo na ngai?

  • Nalingaka kosala boninga na bato oyo balobelaka ntango nyonso mbongo mpe biloko oyo bazali na yango?

  • Nakosaka to nasalaka makambo mosusu ya mabe mpo na kozwa mbongo?

  • Mbongo esalaka ete namona ete nazali na ntina mingi?

  • Makanisi na ngai ezalaka ntango nyonso na mbongo?

  • Ndenge oyo natalelaka mbongo esalaka ete nakipe te sante mpe libota na ngai?

    Kabeláká basusu mpo na komonisa ete okabaka

Soki oyanoli ɛɛ ata na moko ya mituna wana, salá makasi olongola ezaleli ya kolinga mingi biloko ya mokili mpe mitambo na yango. Boyá baninga oyo bazwaka mbongo mpe biloko na bango na valɛrɛ mingi. Kutu, luká nde baninga oyo bazwaka bizaleli malamu na valɛrɛ mingi koleka biloko oyo bazali na yango.

Kotika te ete bolingo ya mbongo ezwa misisa na motema na yo. Kutu, na esika ya kotya mbongo na esika ya liboso, tyáká nde baninga, libota mpe sante na yo na esika ya liboso. Kosala bongo ekomonisa ete otalelaka mbongo na ndenge ebongi.

^ par. 7 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.

Makambo mosusu

NSANGO MALAMU OYO EUTI NA NZAMBE!

Ndenge nini mitinda ya Biblia esalisaka biso?

Yesu amonisaki ntina oyo tozali na mposa ya litambwisi mpe alobelaki mitinda mibale ya Biblia oyo eleki minene.