Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Septembre 2015

 MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Makambo etali Moyen-Orient

Makambo etali Moyen-Orient

Moyen-Orient ezali esika oyo biloko mingi ya arkeoloji ya motuya mpenza eutaka mpo ezali esika oyo bato ya libosoliboso bafandaki.

Basali-vinyo ya Kanana

Na 2013, bato ya arkeoloji bamonaki na nse ya mabele esika oyo bato ya Kanana bazalaki kosala vinyo, oyo eumeli bambula soki 3 700. Esika yango ezalaki na bilokó ya minene 40 oyo ekoki kokɔta milangi 3 000 ya vinyo ya mikolo oyo. Moto moko ya arkeoloji oyo ayekolaki basalite oyo ezalaki na bilokó yango amonaki ete bato ya Kanana bayebaki kosala vinyo malamu. Alobaki boye: “Vinyo nyonso oyo ezalaki na bilokó yango esalemaki mpenza ndenge moko.”

OYEBAKI YANGO? Biblia elobeli “vinyo ya kitoko koleka” oyo bazalaki kosala na Yisraele mpe ndenge bazalaki kobomba yango na bilokó ya minene.​—Loyembo ya Salomo 7:9; Yirimia 13:12.

Bato bakómi ebele mpenza

Lapolo moko ya zulunalo Guardian elobi ete na 2012, babebe koleka 560 000 babotamaki na Égypte koleka na 2010. Magued Osman, moto moko ya Baseera, kompanyi ya Égypte oyo esalaka bolukiluki, alobaki boye: “Ezali mbala ya liboso babebe bábotama mingi ndenge wana na Égypte.” Bato mosusu ya mayele balobi ete soki motángo yango ekobi kaka bongo, mai, kura mpe biloko ya kolya ekokóma mpasi mpenza.

OYEBAKI YANGO? Biblia elobi ete mokano ya Nzambe mpo na bato ezalaki ‘bátondisa mabele,’ na ndenge moko ya malamu mpe moto nyonso azanga eloko te.​—Ebandeli 1:28; Nzembo 72:16.

Bamonaki mbongo ya bibende oyo ebombamaki

Bamonaki mbongo ya bibende koleka 100 ya bronzɛ oyo ezalaki na makomi “mbula ya minei” pene ya balabala moko ya monene na Israël. Dati yango emonisi mbula ya minei oyo Bayuda batɔmbɔkelaki Baroma (mobu 69 tii 70 ya ntango na biso)​—botɔmbɔki oyo esalaki ete Yerusaleme ebebisama. Pablo Betzer, oyo akambaki mosala ya kotimola libulu yango alobi boye: “Ekoki kozala ete moto moko oyo abangaki ndenge nsuka ezalaki kokóma pene; ekoki kozala mpo amonaki ndenge basoda ya Roma bazalaki kopusana, yango wana akundaki mbongo yango na likanisi ya koya kozwa yango na nsima.”

OYEBAKI YANGO? Na mobu 33 ya ntango na biso, Yesu asakolaki ete Baroma bakozinga Yerusaleme. Ayebisaki bakristo bákima na bangomba mpo na komibatela.​—Luka 21:20-24.