Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Août 2015

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Baselile na yo​—Bibliotɛkɛ moko ya kokamwa mpenza!

Baselile na yo​—Bibliotɛkɛ moko ya kokamwa mpenza!

NA 1953, James Watson mpe Francis Crick, bato ya bioloji oyo bayekolaka molekile babimisaki makambo oyo bamonaki, oyo esalisaki bato ya siansi báyeba mpenza ndenge bomoi ezalaka. Bamonaki eloko moko oyo ezali lokola nsinga mibale ya mike oyo elíngamá nyokanyoka, oyo ebengamaka ADN. * Eloko yango oyo ezalaka na kati mpenza ya baselile, ezalaka na bansango oyo “ekomamá” na kati na yango, oyo esalaka ete baselile ezala lokola bibliotɛkɛ moko ya kokamwa mpenza. Makambo ya kokamwa oyo bamonaki epesaki bato ya bioloji nzela ya koyekola makambo ya sika! Bansango oyo ezalaka na kati ya  baselile “ekomamá” na mokano nini? Likambo ya kokamwa koleka, bansango yango ekómá kuna ndenge nini?

MPO NA NINI BASELILE EZALAKA NA MPOSA YA BANSANGO?

Osí omituná soki mboto ekómaka nzete ndenge nini to ndenge nini mwa liki na libumu ya mama ekómaka moto? Omituná naino te nini esalá ete ozala ndenge ozalaka? Biyano na mituna yango etali bansango oyo ezalaka na kati ya ADN.

ADN, molekile moko ya kokamwa oyo ezalaka lokola eskalye ya molai oyo elíngamá nyokanyoka, ezalaka na kati ya baselile pene na nyonso. Na ADN ya selile ya moto, “baetajɛ” ya eskalye yango ezali soki miliare misato. Bato ya siansi babengaka yango bases mpo etajɛ yango mokomoko esalemá na biloko minei oyo ekabolami mibalemibale. Bankombo ya biloko yango minei ebengamaka na mokuse na balɛtrɛ na yango ya liboso: A, C, G, mpe T. * Na 1957, Crick amonisaki ete ndenge baetajɛ yango elandaná na molɔngɔ nde esalaka ete bansango ezala na kati ya ADN. Kobanda 1960 nde bato ya siansi bakómaki koyeba bansango oyo ezalaka na ADN.

Bansango, ezala na ndenge ya bililingi, loláká to maloba ekoki kobombama mpe kosalelama na balolenge mingi. Na ndakisa, ordinatɛrɛ esalaka nyonso wana na nzela ya mitángo. Baselile ebombaka mpe esalelaka bansango na kolanda makambo oyo esalemaka na kati ya bamolekile mpe baatɔmɛ, nyonso wana ezalaka na kati ya ADN. Ntango baselile ekabwanaka mpo na kosala biteni ya nzoto, ADN ekendaka na selile mokomoko mpe yango nde esalaka ete moto abima na bomoto to ezaleli boye to boye.

Baselile esalelaka bansango yango ndenge nini? Tózwa ADN lokola mwa mikanda oyo mokomoko na yango ezali kolakisa ndenge ya kolamba elubu moko boye; oyo etape mokomoko ekomami na maloba ya  sikisiki. Kasi na esika elubu yango ebima gato to bisikiti, ekoki kozala choux to ngɔmbɛ. Kasi, na kati ya baselile, makambo yango esalemaka yango moko mpe yango nde ekamwisaka lisusu mpenza.

Bansango na kati ya selile ya mikrobe moko ekoki kotondisa buku moko ya nkasa 1 000

Bansango oyo ezalaka na ba-gènes ebombamaka tii ntango mposa ya kosalela yango ekokoka, mbala mosusu mpo baselile ya malamu ezwa esika ya oyo ebebi to ebɛli to mpo bana bázwa elongi to bizaleli ya baboti na bango. Bansango boni ebombamaka na kati ya ADN? Tózwa ndakisa ya mikrobe, ekelamu oyo eleki moke mpenza. Bernd-Olaf Küppers, moto moko ya siansi ya ekólo Allemagne, alobaki boye: “Soki bakomi bansango oyo ezalaka na selile ya mikrobe, ekosala buku moko ya nkasa 1 000.” Mpo na yango nde David Deamer, profesɛrɛ moko akomaki boye: “Ata mwa ekelamu ya bomoi ya moke mpenza ekamwisaka kaka.” Bongo soki tokokanisi yango na oyo ya moto? Küppers alobi ete “ekotondisa bibliotɛkɛ oyo ezali na bankotó ya babuku.”

“EKOMAMÁ NA NDENGE OYO TOKOKI KOKANGA NTINA”

Küppers alobi ete “tokoki kokokanisa makomi oyo ezalaka na kati ya ADN na monɔkɔ moko boye.” Abakisi ete “kaka ndenge bato basangisaka maloba mpo na kokoma bafraze, ezalaka mpe bongo mpo na makomi oyo ezalaka na ADN.” Na mokuse, ADN ezalaka na “gramɛrɛ,” to mibeko oyo etambwisaka kokomama mpe kosalelama ya bansango na yango.

“Maloba” mpe “bafraze” na kati ya ADN esali “mwa mikanda ndenge na ndenge oyo elakisaka ndenge ya kolamba;” epesaka malako na ndenge ya kosala baproteini mpe biloko mosusu oyo esanganaka mpo na kosala baselile ndenge na ndenge oyo esalaka nzoto ya moto. Na ndakisa, “mwa mokanda” yango ekoki kopesa malako mpo baselile ya mikuwa, ya misuni ya nzoto, ya bɔɔngɔ to ya loposo esalema. Matt Ridley, moto moko oyo andimaka evolisyo, akomaki boye: “Nsinga ya ADN ezali bansango oyo ekomamá na kode ya bamolekile, lɛtrɛ moko mpo na molekile moko. Atako ekoki kokamwisa, kasi kode yango ekomamá na ndenge oyo bato bakoki kokanga ntina ya bansango oyo ezali na kati.”

Davidi mokomi moko ya Biblia abondelaki Nzambe boye: “Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki, mpe biteni na yango nyonso ekomamaki na mokanda na yo.” (Nzembo 139:16) Ya solo, Davidi alobaki lokola powɛti mpenza. Ata bongo, ndenge moko na bakomi nyonso ya Biblia, makambo oyo alobaki ezalaki solo. Ata moko te ya bakomi yango abendamaki ata mwa moke na masapo mpamba ya bato ya kala.​—2 Samwele 23:1, 2; 2 Timote 3:16.

Ndenge nini mwana azwaka elongi to bizaleli ya baboti na ye?

 BANSANGO YANGO EKÓMAKI KUNA NDENGE NINI?

Ndenge kaka ezalaka, soki bato ya siansi balimboli likambo moko boye ya mpasi, ebimisaka mituna mosusu. Ezalaki mpe bongo mpo na ADN. Ntango bayebaki ete ADN ezalaka na bansango oyo ekomamá na kode, bato ya mayele bamitunaki soki ‘bansango yango ekómaki kuna ndenge nini.’ Toboyi te, moto moko te amonaki ndenge molekile ya ADN ya liboso esalemaki. Yango wana moto na moto apesaka makanisi na ndenge na ye. Ata bongo, makanisi yango esengeli kozala na makambo mpenza oyo endimisi yango. Tótalela bandakisa oyo elandi.

  • Na 1999, na Pakistan, bamonaki biteni ya mbɛki moko ya kala mpenza oyo ezalaki na bilembo oyo bamoná naino liboso te. Tii lelo bayebaka te soki bilembo yango elimboli nini. Ata bongo, bayebi ete moto nde asalá yango.

  • Ntango Watson ná Crick bayebaki ndenge ADN ezalaka, mwa bambula na nsima, bato mibale ya mayele ya fiziki bakanaki koluka ndenge bakoki kosala mpo kobanda kuna na likoló bansango ekómelaka bato na nzela ya loláká. Yango nde ebandisaki likanisi ya koluka koyeba soki bato mosusu bazalaka na baplanɛti mosusu.

Na mokuse, ezala nsango moko ekomami na bilembo to euti na likoló, bato balobaka ete moto moko ya mayele nde akomi to atindi yango. Bazali na ntina te ya komona ndenge nsango yango ekomamaki mpo báloba bongo. Kasi, ntango bato ya mayele bamonaki kode ya kokamwa ya bomoi oyo ezalaka na ADN, mingi na bango baboyaki kondima ete moto moko ya mayele mingi nde asalá yango. Ebongi mpenza bákanisa bongo? Ebongi mpenza kotyela makanisi ya ndenge wana motema? Siansi endimi yango? Bato minene mosusu ya siansi bandimi yango te. Na kati na bango tokoki kotánga doktɛrɛ Gene Hwang mpe Profesɛrɛ Yan-Der Hsuuw. * Tótala oyo balobi.

Doktɛrɛ Gene Hwang ayekolaka makambo etali bakalkile ya ba-gènes. Liboso azalaki kondima liteya ya evolisyo, kasi makambo oyo ayekolaki ebongolaki makanisi na ye. Ayebisaki zulunalo Lamuká! boye: “Koyekola ba-gènes esalisaka moto ayeba mpenza ndenge bomoi ezalaka; koyeba makambo yango etindaka ngai namona ete Mozalisi azali na bwanya mingi mpenza.”

Profesɛrɛ Yan-Der Hsuuw akambaka boyekoli ya makambo etali ndenge mwana abandaka na libumu ya mama na iniversite ya siansi mpe teknoloji na ekólo Taïwan. Ye mpe azalaki kondima liteya ya evolisyo, tii ntango makambo oyo ayekolaki ebongolaki makanisi ye. Alobaki boye mpo na ndenge baselile ekabwanaka mpe ndenge esalaka enama mokomoko ya nzoto: “Baselile ya malamu esengeli kosalema na mobulu te mpe na esika oyo esengeli. Ebandaka naino na kosangana mpo na kosala liboke ya baselile oyo ekokani mpe ezali na mosala moko, na nsima liboke ya baselile yango esanganaka mpe esalaka biteni ya  nzoto ata mpe mabɔkɔ ná makolo. Moto nani ya mayele akoki kokoma malako mpo makambo etambwisama ndenge esalemaka na kati ya ADN? Kasi, malako etali ndenge mwana akolaka na libumu ya mama ekomamá na ndenge ya kokamwa mpenza na ADN. Ntango natalelaka makambo wana nyonso, nandimaka mpenza ete Nzambe nde asalá bomoi.”

Gene Hwang (na lobɔkɔ ya mwasi) mpe Yan-Der Hsuuw

EZALI NA NTINA?

Na bosembo nyonso tokoloba ɛɛ! Soki Nzambe asalá bomoi, boye ebongi tóndimela ye kasi liteya ya evolisyo te. (Emoniseli 4:11) Lisusu, soki Mozalisi oyo aleki na bwanya nde asalá biso, boye tozali awa na mabele mpo na mokano moko. Elingaki kozala bongo te soki bomoi ebimá kaka yango moko. *

Bato ya makanisi malamu bazalaka na mposa makasi ya kozwa biyano oyo ebongi. Viktor Frankl, oyo azalaki profesɛrɛ na makambo etali bamaladi ya motó, alobaki boye: “Koluka koyeba makambo ezali likambo ya libosoliboso oyo moto azalaka na yango mposa.” Na maloba mosusu, tozalaka na mposa makasi ya koyeba Nzambe mpe tolukaka ete mposa yango ekokisama; mposa yango elingaki kozala na ntina te soki Nzambe akelá biso te. Kasi soki Nzambe nde akelá biso, apesá biso mpe mwaye ya kokokisa mposa na biso ya koyeba ye?

Yesu ayanolaki motuna yango; alobaki boye: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova [to ya Nzambe].” (Matai 4:4) Maloba ya Yehova oyo ezali na Biblia, esalisá bamilio ya bato bákokisa mposa ya koyeba Nzambe mpe yango esalá ete bomoi na bango ezala na ntina mpe epesá bango elikya mpo na mikolo ezali koya. (1 Batesaloniki 2:13) Tiká ete Biblia esala mpe bongo mpo na yo. Kutu, ebongi mpenza kozwa na valɛrɛ buku yango oyo ekeseni na babuku mosusu nyonso.

^ par. 3 Watson ná Crick bayekolaki na mozindo makambo oyo bato mosusu ya mayele bayekolaki liboso mpo na ADN (acide désoxyribonucléique).​—Talá etanda “ ADN​—Badati ya ntina mingi.”

^ par. 6 Balɛtrɛ yango elimboli adénine (A), cytosine (C), guanine (G) to thymine (T).

^ par. 18 Okoki kokuta Mituna-lisolo elongo na bato minene ya siansi na site Internet na biso, jw.org. Finá esika bakomi RECHERCHER mpe komá “Interview scientifique.”

^ par. 22 Mituna etali Bozalisi mpe Liteya ya evolisyo elobelami na mozindo na mwa buku Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie mpe La vie a-t-elle été créée ? ezali na www.jw.org.