Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Juin 2015

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MAKAMBO MITANO YA KOSALA LELO MPO NZOTO EZALA MALAMU

Ndenge ya kosala mpo nzoto ezala malamu

Ndenge ya kosala mpo nzoto ezala malamu

NANI alingaka kobɛla? Na ntembe te, kobɛla ezalaka mabe mpe esɛngaka moto abimisa mbongo. Soki obɛli, okomiyoka mabe, mwaye okende mosala to kelasi ekozala te, mwaye oluka mbongo to obatela libota na yo ekozala mpe te. Kutu, okoki kozala na mposa ete moto mosusu akipe yo mpe ekoki kosɛnga osomba bankisi ya ntalo mingi mpe kolandela lisalisi ya monganga.

Balobaka ete “komibatela na bamaladi ezali malamu koleka kosalisa yango.” Mwaye ya kokima bamaladi mosusu ezalaka te. Ata bongo, ezali na makambo mingi oyo okoki kosala mpo obɛlaka mingi te to mpo omibatelaka na bamaladi. Tótalela makambo 5 oyo okoki kosala mpo na kobongisa sante na yo.

 1 ZALÁKÁ PƐTO

Zulunalo Mayo Clinic elobi boye: “Lolenge eleki malamu ya kokima bamaladi mpe koboya kopalanganisa yango” ezali ya kosukolaka mabɔkɔ. Moto akoki kozwa na pɛtɛɛ nyonso gripɛ to miyoyo soki asimbi zolo to miso na mabɔkɔ oyo ezali na mikrobe. Lolenge eleki malamu mpo na komibatela na bamaladi yango ezali ya kosukolaka mabɔkɔ mbala na mbala. Bopɛto ekoki mpe kopekisa ete bamaladi ya makasi epalangana, na ndakisa maladi ya mpema mpe pulupulu oyo mbula nyonso ebomaka bana koleka milio 2 oyo bakokisi naino mbula mitano te. Momeseno ya kosukola mabɔkɔ ekoki kutu kopekisa maladi lokola Ebola epalangana mingi.

Ezali na bantango oyo kosukola mabɔkɔ ezalaka mpenza na ntina mpo na kobatela sante na biso moko mpe ya basusu. Osengeli kosukola mabɔkɔ na yo:

  • Nsima ya kouta na twalɛti.

  • Nsima ya kolongola to kolatisa mwana kushɛ to komema ye na twalɛti.

  • Liboso mpe nsima ya kotya nkisi na mpota.

  • Liboso mpe nsima ya kozala na moto oyo azali kobɛla.

  • Liboso ya kolamba, kotyela bato biloko to kolya.

  • Nsima ya kosala likise, kokosola to kobimisa miyoyo.

  • Nsima ya kosimba nyama, nyɛi to masuba na yango.

  • Nsima ya kosimba salite.

Kosukola mabɔkɔ malamumalamu ezali likambo ya kozwa na lisɛki te. Baankɛtɛ emonisi ete bato mingi oyo basalelaka batwalɛti ya bato nyonso basukolaka mabɔkɔ te to basukolaka yango malamu te nsima ya kouta na twalɛti. Osengeli kosukola mabɔkɔ ndenge nini?

  • Pɔlisá naino mabɔkɔ na mai ya pɛto mpe na nsima pakolá savon.

  • Niká mabɔkɔ tii fulufulu ekobima, kobosana te konika manzaka, mosapi ya monene, nsima ya mabɔkɔ mpe katikati ya misapi.

  • Kobá konika mabɔkɔ na boumeli ya basegɔnde 20.

  • Tyá mabɔkɔ na pɔmpi to moto mosusu asopela yo mai ya pɛto.

  • Pangwisá mabɔkɔ na elamba to papye ya pɛto.

Kosala bongo ezali mpasi te, ekoki kosala ete bato bázwa bamaladi mosusu te mpe ekoki kobikisa bomoi ya bato.

 2 SALELÁKÁ MAI YA PƐTO

Kozwa mai ya pɛto oyo esengeli mpo na libota ezalaka mosala makasi na bikólo mosusu. Kasi, kozwa mai ya pɛto ekoki kokóma mokakatano na bisika mosusu soki esika oyo bato bazwaka mai ya malamu ekɔti mikrobe mpo na mbula makasi, mipɛpɛ, tiyo etɔbɔki to mpo na makambo mosusu. Soki mai euti na esika ya malamu te to babombi yango malamu te, ekoki kopesa bato banyama na libumu, ata mpe kolera, pulupulu ya makasi, typhoïde, hépatite mpe bamaladi mosusu. Komɛla mai ya malamu te ezali moko ya makambo oyo esalaka ete mbula nyonso bato miliare moko na milio nsambo bábɛla pulupulu.

Ezali na makambo mingi oyo okoki kosala mpo obɛlaka mingi te to mpo omibatelaka na bamaladi

Mbala mingi, bato bazwaka kolera ntango bamɛlaka mai to balyaka bilei oyo ekɔti mikrobe oyo euti na nyɛi ya bato oyo bazali na maladi yango. Makambo nini okoki kosala mpo omibatela na bamikrobe yango mpe bamikrobe mosusu oyo ebebisaka mai, ata ntango likama moko euti kosalema?

  • Luká koyeba soki mai oyo ozali komɛla, konikela mino, kosalela krɛmɛ, kosukola biloko mpe basaani to kolambela euti na esika ya malamu, na ndakisa na izini oyo etyaka bankisi na mai mpo na kopɛtola yango to bakompanyi oyo eyebani oyo etyaka mai na milangi oyo bakangi yango malamu mpenza.

  • Soki omoni ete mai oyo otokaka ezali malamu te, tɔkisá yango liboso ya kosalela to tyá yango bankisi oyo ebomaka bamikrobe.

  • Soki olingi kosalela nkisi lokola (chlore) to bankisi mosusu oyo epɛtolaka mai, landá malamumalamu malako na yango.

  • Salelá filtre ya malamu mpenza soki ezalaka mpe soki okoki kosomba yango.

  • Soki bankisi ya kopɛtola mai ezali te, salelá javel; tyá matangá mibale na litre moko ya mai, ningisá yango malamu mpe tiká yango bongo na boumeli ya miniti 30 liboso ya kosalela.

  • Bombáká ntango nyonso mai oyo otye nkisi na eloko oyo ezipami malamu mpo ekɔta lisusu mikrobe te.

  • Kebá ete eloko nyonso oyo ozali kotokela na yango mai oyo obombaki, na ndakisa kɔpɔ to saani ezala pɛto.

  • Simbá eloko oyo obombelaki mai na mabɔkɔ oyo ezali pɛto mpe kokɔtisa mabɔkɔ to misapi te na mai ya komɛla.

 3 PONÁKÁ BILOKO YA KOLYA

Soki ozali kolya malamu te nzoto ekozala malamu te mpo kolya malamu esɛngaka kolya biloko ndenge na ndenge oyo etongaka nzoto. Osengeli kokeba na mungwa, mafuta mpe sukali oyo ozali kotya na biloko mpe biloko oyo ozali kolya eleka ndelo te. Lyáká mpe bambuma ná bandunda mpe kokangama kaka na bilei moko te. Kotánga makambo oyo bakomi na eloko oyo olingi kosomba, ekosalisa yo opona mampa, masango, loso to makaroni oyo balongoli yango biloko mosusu te mpo yango ezalaka na bavitamini mingi koleka oyo balongoli biloko mosusu. Mpo na kozwa baproteini, lyáká mwa misuni oyo ezalaka na mafuta mingi te mpe bansoso mpe soki likoki ezali, lyáká mbisi mbala mingi na pɔsɔ. Na mikili mosusu, baproteini mingi eutaka na bandunda.

Soki ozali kolya sukali mingi mpe biloko ya mafuta mingi, okoki kokóma monene mingi. Mpo ekómela yo te, mɛláká nde mai na esika ya komɛlaka masanga ya sukali. Nsima ya kolya bilei, lyáká bambuma mingi na esika ya kolya biloko mikemike ya sukali mingi. Kolyaka mingi te biloko lokola ba-boudin, misuni, manteka, bagato, fromaje mpe babisikiti mpo ezalaka na mafuta oyo enyangwaka noki te na nzoto. Na esika ya kosalela mafuta ya ndenge wana mpo na kolambela, salelá nde mafuta oyo ezali mabe te mpo na nzoto.

Kotya mungwa mingi na biloko ekoki komatisa yo tansiɔ na ndenge ya mabe. Soki tansiɔ etungisaka yo, landá malako oyo ezalaka na biloko oyo batɛkaka mpo olyaka mungwa mingi te. Na esika ya kosalela mungwa, salelá nde matiti ya nsolo kitoko mpo okómisa bilei elɛngi.

Mezire ya biloko oyo ozali kolya, ata mpe bilei yango moko ezali na ntina. Na yango, ntango ozali kolya, kokoba kolya te soki osí otondi.

Likama mosusu oyo ezalaka na biloko ya kolya ezali soki bilei yango ebebi. Bilei nyonso ekoki kosala moto mabe soki balambi to babombi yango malamu te. Mbula nyonso, na bato 6 ya Amerika, moko na bango abɛlaka mpo alyaki biloko oyo ebebaki. Bato mingi babikaka noki, kasi bamosusu bakufaka mpo na bilei yango. Okoki kosala nini mpo ekómela yo mpenza te?

  • Balonaka bandunda mosusu na mabele oyo batyaka nyɛi ya banyama mpo epesa mabele vitamini, yango wana sukoláká ndunda malamumalamu liboso ya kolamba yango.

  • Liboso ya kolamba, sukoláká mabɔkɔ na mai ya mɔtɔ ná savon, salá mpe bongo mpo na libaya ya kokatela biloko, banzungu, basaani mpe esika oyo ozali kolamba.

  • Soki olingi ete biloko mosusu ebebisa oyo mosusu te, kotya te biloko yango na esika to na saani oyo batyaki maki ya mobesu, nsoso, mosuni ya nyama to mbisi kozanga ete osukola yango liboso.

  • Lambá bilei tii ekobɛla malamu mpe tyá nokinoki biloko nyonso oyo ebebaka na frigo soki bokolya yango mbala moko te.

  • Bwaká biloko oyo ebebaka oyo botye yango na frigo te na boumeli ya ngonga moko to mibale soki molunge ezali makasi (32°C).

 4 SALÁKÁ NGALASISI

Ata soki ozali na mbula boni, esengeli kosalaka ngalasisi mbala na mbala mpo nzoto ezala malamu. Lelo oyo bato mingi basalaka mpenza ngalasisi te. Mpo na nini ngalasisi ezali na ntina? Kosalaka ngalasisi ekoki kosalisa yo:

  • Olalaka malamu.

  • Osalaka muvema.

  • Mikuwa mpe misuni ya nzoto ezala makasi.

  • Kilo ya nzoto na yo etikala kaka bongo to ekóma malamu.

  • Obɛla te maladi ya makanisi.

  • Okufa liwa ya mobesu te.

Soki osalaka ngalasisi te, okoki kozwa bamaladi lokola:

  • Maladi ya motema.

  • Diabɛti ya lolenge ya mibale.

  • Maladi ya tansiɔ.

  • Cholestérol ekoleka mingi na nzoto.

  • Maladi na bɔɔngɔ.

Lolenge ya ngalasisi oyo ebongi na yo etaleli mbula mpe kolɔngɔnɔ ya nzoto na yo, na yango, ekozala malamu kokutana na monganga liboso ya kobanda ngalasisi nyonso ya sika. Minganga ndenge na ndenge balobi ete bana mpe bilenge basengeli kosalaka ngalasisi mikolo nyonso na boumeli ya miniti 60 kobanda na oyo ya pɛtɛɛ tii na oyo ya makasi. Mikóló basengeli kosalaka ngalasisi oyo ebongi na boumeli ya ngonga mibale na ndambo to miniti 75 ya ngalasisi ya makasi pɔsɔ nyonso.

Poná ngalasisi oyo okosepela na yango. Okoki kobɛta basket, tenisi, bale, kotambola mbangu, kokumba velo, kosala jardin, kokata banzete, kosukola na pisini to na ebale, kolúka bwato, kokima mbangu to kosala ngalasisi mosusu oyo esalaka ete motema mpe pumɔ esala malamu. Ndenge nini okoki koyeba soki ngalasisi moko ezali pɛtɛɛ to makasi? Ngalasisi ya pɛtɛɛ esalaka ete moto abima motoki, kasi oyo ya makasi esalaka ete ezala mpasi asolola ntango azali kosala yango.

 5 LALÁKÁ MINGI

Ngonga oyo esengeli kolekisa na mpɔngi etaleli moto na moto. Babebe mingi balalaka ngonga 16 tii 18 na mokolo, bana mike ngonga soki 14 mpe bana oyo bakómi na mbula ya kokɔta kelasi balalaka ngonga soki 11 to 12. Esɛngaka ete bana oyo bazali na mbula ya kokɔta kelasi bálalaka ngonga 10, bilenge mbala mosusu ngonga 9 to 10 mpe mikóló ngonga 7 to 8.

Kolala na boumeli ya bangonga oyo ebongi ezali te likambo ya kosala soki olingi. Bato ya mayele balobi ete kolala mingi ezali na ntina mpo:

  • Esalaka ete bana mpe bilenge bákola malamu.

  • Esalisaka moto ayekola makambo ya sika mpe abosana yango te.

  • Esalaka ete nzoto ebimisa ba-hormone na ndenge esengeli mpo yango esalisaka estoma enika biloko malamu mpe kilo ya nzoto ezala malamu.

  • Esalaka ete motema ebɛta malamu.

  • Ebatelaka moto na bamaladi.

Kolala malamu te nde esalaka ete moto akóma monene mingi, abɛla maladi ya makanisi, ya motema, diabɛti mpe asala baaksida minene. Ya solo, yango emonisi biso ntina ya kolalaka mingi.

Boye, osengeli kosala nini soki omoni ete olalaka na ndenge esengeli te?

  • Laláká mpe lamukáká mikolo nyonso na ngonga moko.

  • Salá ete shambrɛ na yo ezala na makelele te, ezala molili, osembola nzoto malamu, ezala molunge makasi te mpe malili makasi te.

  • Ntango ozali na mbeto, kotala televizyo te, kosalela mpe baaparɛyi te.

  • Bongisá mbeto na yo malamu mpenza.

  • Kolya bilei ya kilo te, komɛla kafe mpe masanga te liboso okende kolala.

  • Soki osaleli batoli nyonso oyo kasi ozali kaka kolala malamu te; na ndakisa kolala koleka ndelo na moi to kopema na mpasi ntango olali, ekozala malamu okende epai ya monganga oyo abongi.