Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Juin 2015

 TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Galilée

Galilée

Kobanda na siɛklɛ ya 14 tii ya 16, makambo oyo bato ya siansi mpe ya filozofi ya Mpoto bayebaki mpo na molɔ́ngɔ́ eyokanaki te na mateya ya Lingomba ya Katolike. Moto moko oyo ayekolaki lisusu ndenge likoló ezalaka ezali Galilée.

LIBOSO Galilée abotama, bato mingi bazalaki kokanisa ete moi, baplanɛti mpe minzoto ebalukaka zingazinga ya mabele. Lingomba ya Katolike ezalaki mpe koteya bongo.

Na lisalisi ya aparɛyi na ye ya kotala minzoto, Galilée amonaki makambo oyo ekesanaki mpenza na mateya ya siansi oyo bato mingi bazalaki kondima. Na ndakisa, ntango amonaki matɔnɔ ya moi ezali kobalukabaluka zingazinga ya moi, ayaki koyeba ete moi ebalukaka kaka esika moko. Atako yango esalaki ete bato bákolisa boyebi na bango mpo na molɔ́ngɔ́, yango esalaki mpe ete ye ná Lingomba ya Katolike báyokana te.

SIANSI MPE LINGOMBA

Bambula mingi liboso, Nicolas Copernic, moto moko ya astronomi na Pologne, alobaki ete mabele ebalukaka zingazinga ya moi. Galilée ayekolaki makambo oyoCopernic alobaki mpo na ndenge oyo baplanɛti mpe minzoto ebalukaka mpe azwaki makanisi oyo endimisi liteya yango. Liboso, Galilée abangaki kobimisa makambo mosusu oyo amonaki mpo akanisaki ete bato bakosɛka mpe bakotyola yango. Lokola akokaki te kobomba  esengo na ye mpo na makambo oyo amonaki na aparɛyi yango, nsukansuka abimisaki yango. Bato mosusu ya siansi bamonaki ete makambo oyo akomaki ezalaki nde matumoli mpe eumelaki te bakonzi ya mangomba basambwisaki ye na misa liboso ya bandimi nyonso.

Na mobu 1616, Episkɔpɔ Bellarmine, “moto ya teoloji oyo ayebanaki mingi na ntango wana,” ayebisaki Galilée mobeko ya sika oyo Lingomba ya Katolike ebimisaki, oyo etɛmɛlaki makanisi ya Copernic. Asɛngaki mpenza Galilée atosa mobeko yango mpe na bambula oyo elandaki, Galilée alobaki te na miso ya bato nyonso ete mabele ebalukaka zingazinga ya moi.

Na 1623, Pápa Urbain VIII moninga ya Galilée, abandaki koyangela. Yango wana na 1624, Galilée asɛngaki Pápa alongola mobeko oyo ebimaki na 1616. Na esika asala bongo, Pápa Urbain asɛngaki nde Galilée amonisa bokeseni oyo ezali kati na makanisi ya Copernic mpe ya Aristote kozanga kokɔtela moto moko.

Na nsima, Galilée akomaki buku moko (Dialogue on the Great World Systems). Atako Pápa asɛngakiGalilée akɔtela moto te, kasi buku yango endimaki nde makanisi ya Copernic. Eumelaki te, banguna ya Galilée balobaki ete buku na ye etyolaki Pápa. Lokola bafundaki ye ete akómi mopɛngwi mpe babangisaki ye ete bakonyokola ye, yango etindaki Galilée awangana mateya ya Copernic. Na 1633, Tribinale ya Roma ekatelaki ye etumbu ya kofanda libela kaka na ndako na ye mpe epekisaki mikanda na ye. Galilée akufaki mokolo ya 08/01/1642 na ndako, na mboka Arcetri, pene ya engumba Florence.

Pápa Jean-Paul II andimaki ete Lingomba ya Katolike ekatelaki Galilée etumbu kaka mpamba

Bankama ya bambula na nsima, makambo mosusu oyo Galilée akomaki etikalaki na Index ya babuku oyo bato ya Lingomba ya Katolike bazalaki na ndingisa ya kotánga te. Kasi na mobu 1979, eglize etalelaki lisusu ekateli oyo tribinale ya Lingomba ya Katolike ezwaká bambula 300 liboso. Nsukansuka, na 1992, Pápa Jean-Paul II andimaki ete Lingomba ya Katolike ekatelaki Galilée etumbu kaka mpamba.