Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Juin 2015

 BIBLIA ELOBI NINI?

Ekobo

Ekobo

Atako bosembo na libala ezali likambo oyo bato mingi basepelaka na yango, kasi ekobo ezali kokoba kobebisa mabota mingi.

Ekobo ezali nini?

OYO BATO BALOBAKA

Na bikólo mosusu, ekobo ezalaka mabe te, mingimingi soki mobali nde asali yango. Mpe bamosusu bamonaka te ete libala esengeli koumela libela.

OYO BIBLIA ELOBI

Na Biblia, mbala mingi ekobo elimbolaka kosangisa nzoto na moto oyo azali molongani na yo te. (Yobo 24:15; Masese 30:20) Ekobo ezali mabe mpenza na miso ya Nzambe. Na Yisraele, moto oyo asali ekobo azalaki kozwa etumbu ya liwa. (Balevi 18:20, 22, 29) Yesu ateyaki bayekoli na ye báboya ekobo.​—Matai 5:27, 28; Luka 18:18-20.

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Bato ya ekobo babebisaka ndai oyo balapelaki balongani na bango na mokolo ya libala. Ezali mpe “kosalela mpenza Nzambe lisumu.” (Ebandeli 39:7-9) Ekobo ekoki kokabola na mbalakaka bana na baboti na bango. Longola yango, Biblia ekebisi ete “Nzambe akosambisa . . . bato ya ekobo.”​—Baebre 13:4.

“Libala ekumisama na kati ya bato nyonso, mpe mbeto ya libala ezala na mbindo te.”​Baebre 13:4.

 Ekobo ebomaka libala?

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia epesi moto oyo abalá nzela aboma libala kaka soki molongani na ye asali ekobo. (Matai 19:9) Yango elingi koloba ete molongani oyo asali eloko te akoki koboma libala to kolimbisa molongani na ye oyo asali ekobo. Ezali ekateli oyo ye moko asengeli kozwa.​—Bagalatia 6:5.

Lisusu, na miso ya Nzambe, libala ezali mosantu mpe mpo na bomoi mobimba. (1 Bakorinti 7:39) Nzambe ayinaka moto oyo azali koluka koboma libala na makambo ezangá ntina, na ndakisa, kaka mpo azali kosepela na molongani na ye lisusu te. Yango wana, koboma libala ezali ekateli ya kozwa na lisɛki te.​—Malaki 2:16; Matai 19:3-6.

“Ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo akoboma libala na mwasi na ye, soki ezali te mpo na pite, azali kotinda ye na ekobo.”​Matai 5:32.

Ekobo ezali lisumu oyo ekoki kolimbisama te?

OYO BIBLIA ELOBI

Te. Biblia elobi ete Nzambe ayokelaka baoyo babongoli motema mpe batiki masumu na bango mawa; ata mpe baoyo basali ekobo. (Misala 3:19; Bagalatia 5:19-21) Kutu, Biblia elobeli mibali mpe basi oyo batikaki kosala ekobo mpe na nsima bakómaki baninga ya Nzambe.​—1 Bakorinti 6:9-11.

Nzambe ayokelaki Davidi mokonzi ya Yisraele mawa. Davidi asalaki ekobo na mwasi ya mokonzi moko ya basoda na ye. (2 Samwele 11:2-4) Biblia elobi polele ete “likambo oyo Davidi asalaki emonanaki mabe na miso” ya Nzambe. (2 Samwele 11:27) Ntango bapamelaki ye, Davidi abongolaki motema mpe Nzambe alimbisaki ye. Ata bongo, Davidi anyokwamaki mpo na makambo oyo asalaki. (2 Samwele 12:13, 14) Na nsima, Salomo mokonzi ya bwanya amonisaki ete “moto nyonso oyo azali kosala ekobo . . . azali na motema te.”​—Masese 6:32.

OYO OKOKI KOSALA

Soki osalaki ekobo, osengeli kosɛnga Nzambe mpe molongani na yo bolimbisi. (Nzembo 51:1-5) Yiná ekobo ndenge Nzambe ayinaka yango. (Nzembo 97:10) Zwá ekateli ya koboya pornografi, makanisi ya kosangisa nzoto na moto oyo azali molongani na yo te, kozala seresere na moto oyo azali molongani na yo te, to eloko mosusu nyonso oyo ekoki kotinda yo osangisa nzoto na moto oyo azali molongani na yo te.​—Matai 5:27, 28; Yakobo 1:14, 15.

Soki molongani na yo asalaki ekobo, yebá ete Nzambe ayebi ndenge ozali komiyoka. (Malaki 2:13, 14) Sɛngá ye abɔndisa mpe atambwisa yo mpe “ye moko akosunga yo.” (Nzembo 55:22) Soki ondimi kolimbisa molongani na yo mpe kokoba na libala na bino, bino mibale bosengeli kosala makasi mpo libala na bino ezonga ndenge ezalaki.​—Baefese 4:32.

Nsima ya kosala ekobo, mosakoli Natane ayebisaki Davidi, oyo abongolaki motema ete “Yehova mpe atiki mpenza lisumu na yo eleka.”​2 Samwele 12:13.

Makambo mosusu

OKOKI KOZALA NA LIBOTA YA ESENGO

Zalá sembo epai ya molongani na yo

Kokima ekobo ezali lolenge oyo eleki malamu ya komonisa ete ozali sembo na libala

NSANGO MALAMU OYO EUTI NA NZAMBE!

Ndenge nini libota na yo ekoki kozala na esengo?

Yehova, Nzambe ya esengo, alingi ete mabota ezala na esengo. Talá batoli ya Biblia oyo ekoki kosalisa mibali, basi, baboti, mpe bana.