Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Mai 2015

 LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Koteya bana kotosa

Koteya bana kotosa

MOKAKATANO

Yo ná mwana na yo ya mbula minei bowelanaka ntango nyonso na makambo mpe emonani ete mwana nde alongaka ntango nyonso.

  • Soki oyebisi ye asala eloko oyo ye alingi te, atosaka te. *

  • Soki oboyi asala likambo oyo ye alingi, atyaka matata.

Ozali komituna boye: ‘Ezali mpo azali naino mwana moke? Nasengeli kotya motema ete akotika ezaleli yango mokolo mosusu?’

Okoki koteya mwana na yo kotosa. Kasi, liboso tólobela ndenge ya kosala yango, talá moko ya bantina oyo ekoki kosala ete amonisa ezaleli mabe wana.

NINI ESALAKA BONGO

Ntango mwana na yo azalaki naino bebe, mokumba na yo ya libosoliboso ezalaki ya kobatela ye. Ozalaki kotyela bamposa na ye nyonso likebi. Azalaki na likoki kaka ya kolela mpe ozalaki koya mbangu, kosala nyonso mpo na kokokisa nyonso oyo alingi. Toboyi te, kosala bongo ezalaki na ntina mpenza mpo bebe azalaka ntango nyonso na mposa ya likebi ya baboti na ye.

Kasi, nsima ya kosalela mwana ndenge wana basanza ebele, ezali likambo ya kokamwa te soki akómi kosala makambo lokola nde azali mokonzi ya ndako mpe baboti na ye bazali bato na ye ya mosala, oyo bazali wana mpo na kokokisa nyonso oyo ye alingi. Na nsima, mingimingi soki akómi na mbula mibale, mwana ayaka koyeba ete mwa “bokonzi” oyo azalaki na yango esili. Baboti na ye bazali kosala lisusu te oyo ye alingi; balingi nde ete ye asala oyo bango balingi. Yango esepelisaka bana ata moke te! Yango wana bana mosusu basalaka matata. Bamosusu baboyaka kotosa mpo na kotala soki baboti bakosala nini.

Na eleko yango ya mpasi, moboti asengeli kozwa mokumba na ye ya sika na mabɔkɔ​—kozala mokonzi oyo azali kopesa malako ya polele na makambo oyo mwana asengeli kosala. Bongo soki mwana akipe te to aboyi kotosa malako yango ndenge tomoni na ebandeli ya lisolo oyo?

 OYO OKOKI KOSALA

Zwá makambo na mabɔkɔ. Mwana akondima bokonzi na yo te soki amoni ete ozali kozwa makambo na mabɔkɔ te. Na yango, na ndenge oyo ebongi, osengeli komonisa ye bokonzi na yo. Na bambula oyo euti koleka, bato ya mayele bamonisaki ete kosalela liloba “bokonzi” ezali mabe. Mosusu alobaki kutu ete bokonzi ya baboti ezali “mabe mpenza.” Kasi kotikela mpe mwana nzela asalaka nyonso alingi ekoki kotya ye mobulu na motó, kobebisa ye mpe kosala ete amona lokola azali na lotomo ya kosala nyonso oyo alingi. Yango ekosalisa mwana mpenza te akóma mokóló oyo ayebi kokokisa mikumba na ye malamu.​—Toli ya Biblia: Masese 29:15.

Pesáká disiplini. Diksionɛrɛ moko elobi ete disiplini ezali “formasyo oyo ebimisaka botosi to komipekisa; mbala mingi epesamaka na ndenge ya mibeko mpe bitumbu soki mibeko yango etosami te.” Toboyi te, disiplini esengeli te koleka ndelo to konyokola mwana. Kasi esengeli mpe te kozala likolólikoló to kopesa yango kaka mpo na kopesa mpo ekosalisa mwana te abongisa bizaleli na ye.​—Toli ya Biblia: Masese 23:13.

Yebisáká ye makambo polele. Baboti mosusu basɛngaka botosi kosɛnga epai ya bana na bango. (“Nakosepela soki otye bopɛto na shambrɛ na yo, oyoki?”) Baboti yango bakanisaka ete koloba bongo emonisaka limemya. Kasi, kosala bongo ekoki kolɛmbisa bokonzi ya baboti mpe kopesa mwana lotomo ya kotala oyo ekosepelisa ye mpe na nsima kozwa ekateli ya kondima to koboya. Na esika ya kosala bongo, pesá nde mwana malako ya polele na esika ya kotuna ye soki akosepela kosala boye to boye.​—Toli ya Biblia: 1 Bakorinti 14:9.

Kangamá na ekateli na yo. Soki olobi te, salá kaka bongo mpe bópesana mabɔkɔ ná molongani na yo. Soki ozwi ekateli ya kopesa etumbu mpo na mabe oyo mwana asali, salá kaka ndenge wana. Kobondela ye te mpo andima ekateli na yo to komema masolo milaimilai te mpo na komonisa ye ntina oyo ozwi ekateli yango. Ekozala malamu mingi mpo na yo mpe mwana na yo soki ‘otikaka Ɛɛ na yo ezala Ɛɛ, mpe Te na yo, Te.’​—Yakobo 5:12.

Zalá na bolingo. Libota ezali te esika oyo moto nyonso azali na lotomo ya kosala oyo alingi to esika ya kokweiselaka basusu mitindo. Kutu, ezali nde ebongiseli ya Nzambe epai baboti bakoki kopesa bana litambwisi na bolingo nyonso mpo bákóma mikóló oyo bayebi kokokisa mikumba na bango. Lokola disiplini ezali mpe na kati ya litambwisi yango, ekoki koteya bana kotosa mpe kosalisa bango bámiyoka ete olingaka bango.

^ par. 5 Na lisolo oyo tolobeli bana nyonso ezala mibali to basi.

Makambo mosusu

BANA

Teyá bana na yo

Baboti, bósalela masolo oyo mpo na koteya bana na bino mateya ya ntina mingi oyo euti na Biblia.