Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Mai 2015

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Elikya mpo na baoyo bazangá ndako mpe babola

Elikya mpo na baoyo bazangá ndako mpe babola

Joe azaláká soda na États-Unis. Makambo ya mpasi oyo ekómelá ye mpe libota na ye esalaki ete azanga ndako na boumeli ya mbula 18. Na boumeli ya mbula moko abandaki kokende na bibliotɛkɛ ya bato nyonso mpe na bantango mosusu azalaki kosolola na mwasi moko oyo azalaki kosala kuna. Masolo yango ebongolaki bomoi na ye.

Na Argentine, elenge mobali moko na nkombo Martín, ayebaki makambo ya Nzambe te. Azalaki komona lokola bomoi ezali na ntina te. Ntango akómaki koluka ntina ya bomoi, alongwaki ndako mpe akómaki kofanda na libongo. Kasi, na esika azwa biyano na mituna na ye, akómaki kotungisama mingi na makanisi. Na mai na miso, abondelaki Nzambe boye: “Soki ozalaka mpenza, nabondeli yo salisá ngai nayeba yo.” Nini esalemaki na nsima? Tokomona yango.

BATO bazangaka ndako mpo na bantina ndenge na ndenge. Bamosusu bakutanaka na makambo ya mpasi lokola Joe. Bamosusu lokola Martín, batikaka bomoi “ya malamu” oyo bazalaki na yango mpo bamonaka ntina na yango mpenza te. Kasi, basusu bazangaka ndako mpo na bobola, koningana ya mabele to mipɛpɛ makasi, kobɛtama na ndako, drɔgɛ, kolangwa masanga, maladi ya motó, mpo bandako ezali ntalo mingi to mpo na kozanga mosala.

Paul Toro, profesɛrɛ moko ya pisikoloji alobi ete liboso bato bazalaki kokanisa ete baoyo bazangá ndako bazalaka kaka na mikili ya bobola to esika oyo bitumba ezali to nkita ekweá, nzokande kozanga ndako “ekómi mpe mokakatano monene na mikili mingi ya bozwi.” * Yango ekoki kozala mpo na ndenge oyo Leta etambwisaka makambo etali kosunga mabota oyo ezali na bobola mpe mpo salɛrɛ ya bazwi ezalaka ebele koleka mpe oyo ya babola moke mpenza.

Bato mingi bamitungisaka mpo na avenire. Kasi, kotalela oyo Biblia elobi mpo na avenire esalaka ete basusu bámitungisa mingi te; tokolobela yango mwa moke na nsima. Biblia ekoki mpe kosalisa biso lelo oyo mpe kopesa biso batoli ya malamu oyo soki tolandi yango ekoki kosala ete tokelela mingi te mpe tómitungisa mingi te ndenge Joe mpe Martín bamonaki yango.

 BIBLIA EBONGOLAKI BOMOI NA YE

Cindi, oyo mbala mingi azalaki komona Joe na bibliotɛkɛ epai azalaki kosala, alobi boye: “Nazalaki komona ete Joe azali mayele, na limemya mpe na komikitisa.” Lokola azali Motatoli ya Yehova, Cindi azalaki kopesa Joe bazulunalo Lamuká! mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe abengisaki ye na Ekaniseli ya liwa ya Kristo. Ntango ayaki na likita yango, bayambaki ye na boboto mpe na limemya, yango wana akobaki koyangana na makita na bango ya losambo. Ntango ndeko mobali moko ya lisangá asɛngaki báyekola na ye Biblia, andimaki.

Koyekola Biblia esalaki ete bato bápesaka Joe limemya

Makambo oyo Joe ayekolaki ebɔndisaki ye mingi mpe abandaki kosalela mateya ya Biblia, atako esɛngaki abongola mpenza bomoi na ye. Na ndakisa, ayekolaki ete bomoi ezali likabo ya Nzambe mpe esengeli kozwa yango na valɛrɛ mpe komɛla makaya ebebisaka nzoto. (Nzembo 36:9) Yango wana, atikaki komɛla makaya mpo na kotosa toli oyo ezali na 2 Bakorinti 7:1, oyo elobi boye: “Tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni.” Ekateli ya Joe ebatelaki kaka sante na ye te kasi mpe mbongo na ye.

Lokola toli ya Biblia oyo elobaka ete tosengeli kosala oyo tokoki mpo na kokokisa bamposa na biso esimbaki motema na ye, Joe abandaki koluka mosala. * (1 Batesaloniki 4:11, 12) Mosakoli 2:24 elobi boye: “Eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka kolya mpe komɛla mpenza mpe komonisa molimo na ye bolamu mpo na mosala na ye ya makasi.” Esengo yango eutaka mpe na limemya oyo basusu bapesaka biso mpo mosala oyo tozali kosala na bosembo, epesaka biso valɛrɛ. Epesaka biso mpe likoki ya kosalisa baoyo bazali kokelela.​—Baefese 4:28.

Cindi alobi ete lokola bamonaki bosembo ya Joe, “bandeko ya lisangá bafungolelaki ye mabɔkɔ mpe bamosusu basalisaki ye azwa ndako mpe biloko mosusu oyo ebongaki na ye.” Joe akobaki kosala milende mpe na nsima, azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Sikoyo, akoki kolobela makambo oyo akutanaki na yango ntango azali kolendisa basusu bázwa bwanya ya Nzambe oyo ezali na Biblia.​—Masese 3:13, 14.

AYEBAKI NTINA YA BOMOI

Martín akómaki koluka koyeba ntina ya bomoi ntango azalaki na mbula 20. Alobi boye: “Nalukaki koyeba makambo ya mangomba mpe ya filozofi, komɛla drɔgɛ na elikya ete ekosalisa ngai natika komiyoka lokola nazangi eloko kasi esimbaki te.” Afandaki na Californie, na États-Unis mpo na mwa ntango mpe na nsima akendeki na Hawaï. Abakisi boye: “Nakanisaki ete namoni paradiso. Kasi, biloko kitoko oyo namonaki kuna ekokisaki mposa na ngai te. Nakómaki komitungisa mingi na makanisi, kutu nakómaki na makanisi ya komiboma.” Ezali na ntango yango nde alelaki makasi mpe abondelaki Nzambe boye: “Soki ozalaka mpenza, nabondeli yo salisá ngai nayeba yo.”

Lelo oyo, Martín atalelaka bomoi na ndenge oyo ebongi

Martín akanisaki mokolo moko oyo amonaká esika bakomi “Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova.” Azwaki ekateli ya kokende kuna mpo na koyangana na likita na bango ya losambo. Alobi boye: “Nakendeki kuna na nsuki mpe na mandɛfu na ngai ya milai mpe nazalaki na bilamba oyo nalataki na boumeli ya basanza ebele. Ata bongo, bayambaki ngai malamu mpenza.” Martín andimaki koyekola Biblia mpe azalaki mbala na mbala kolongwa “ndako” na ye oyo ezalaki na libongo mpo na kokende koyekola Biblia na vile.

 Nsukansuka, Martín akómaki kozwa biyano oyo ebongi na mituna na ye. Yango esalaki ete atika komitungisa na makanisi mpe ayokaki esengo oyo Yesu alobelaki ntango alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”​—Matai 5:3.

“Bato bakamwaki ndenge nakómaki kobongwana”

Ekómaki komonana polele ete Martin abongolaki ndenge na ye ya kotalela bomoi ntango akómaki kosalela batoli ya Biblia oyo esalisaki mpe Joe oyo tolobelaki liboso ayeba ndenge ya kotambwisa bomoi na ye. Martín akómaki kotya likebi mingi na ndenge oyo azalaki komonana na miso ya bato mpe na lisalisi ya Batatoli ya Yehova, azwaki mosala mpe esika ya kofanda. Alobi boye: “Liboso, nayebanaki lokola moto oyo azangá ndako, kasi sikoyo bato ya esika yango bakamwaki ndenge nakómaki kobongwana.”

Na nsima, Martín azongaki na Argentine epai azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Lelo oyo, asepelaka na libaku malamu ya kosalisa baoyo bazali na mposa makasi ya koyeba makambo ya Nzambe bázwa biyano na mituna minene oyo etali bomoi.

NTANGO KOZANGA NDAKO MPE BOBOLA EKOZALA LISUSU TE

Yirimia, mosaleli moko ya kala ya Nzambe azalaki na bomoi na eleko moko ya mpasi makasi. Monguna moko mabe abɔtɔlaki ekólo na ye mpe amemaki ebele ya bato ya ekólo na ye na boombo na mboka mopaya. (Bileli 1:3) Atako atikalaki, Yirimia abungisaki biloko nyonso oyo azalaki na yango. Na mpasi na motema, abondelaki boye: “Kanisá mpasi na ngai mpe ndenge nazangi esika ya kofanda.”​—Bileli 3:19.

Atako Yirimia anyokwamaki, abungisaki elikya te. Mpo na nini? Mpo ayebaki ete Yehova akosundola ye te. (Yirimia 1:8) Longola yango, azalaki kotánga Makomami, oyo elobeli eleko oyo bobola mpe bampasi ekozala lisusu te  mpe kimya ya solosolo mpe kozanga kobanga ekozwa esika na yango.​—Nzembo 37:10, 11.

Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali guvɛrnema ya kokoka nde ekokokisa makambo yango, kasi te milende oyo bato bazali kosala. (Danyele 7:13, 14) Yesu Kristo nde azali Mokonzi ya Bokonzi yango, ye oyo ntango azalaki awa na mabele amoniselaki babola motema mawa mpenza. (Luka 7:22; 14:13) Na boyangeli na ye, “moyengebene akokola lokola matiti ya sika, mpe kimya ekokóma mingi . . . Akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe moto ya mpasi mpe moto nyonso oyo azali na mosungi te. Akosikola molimo na bango na monyoko mpe na mobulu.”​—Nzembo 72:7, 12, 14.

“Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna.”​—Yisaya 65:21

Yesu alobelaki mingimingi nde Bokonzi ya Nzambe na mateya na ye. (Luka 4:43) Kutu, ateyaki bato bábondelaka boye: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:9, 10) Bomoi na mabele ekozala ndenge nini ntango Bokonzi ya Nzambe ekozwa makambo nyonso na mabɔkɔ? Biblia emonisi biso mwa moke makambo kitoko oyo ekozala na mabele. Na ndakisa, elobi ete bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela:

  • “Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te. . . . Bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.”​—Yisaya 65:21, 22.

  • “Bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango; mpo monɔkɔ mpenza ya Yehova ya mampinga elobi yango.”​—Mika 4:4.

Elikya wana ya solosolo ekoki kopesa biso makasi na ntango ya mikakatano. Batoli ya Biblia ekoki mpe kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu mpenza lelo oyo ndenge Joe, Martín mpe bato mingi mosusu bamonaki yango. Longola yango, Yehova Nzambe, Mozalisi na biso alobi na biso boye: “Moto oyo azali koyokela ngai, akofanda na kimya mpe akotungisama te mpo na nsɔmɔ ya mpasi.” (Masese 1:33) Tiká ete maloba yango ekokisama mpe na bomoi na yo!

^ par. 6 Matata, mobulu to minyoko etindaka bamilio ya bato bátika bandako na bango mpe bákima na bisika mosusu ya mboka na bango to na bikólo mosusu. Tolobelaki likambo yango na Lamuká! ya 22/01/2002.

^ par. 11 Bato mosusu oyo balingaka kosala bakokaka te mpo bazali bibɔsɔnɔ, babɛlaka to mpo bakómi mibange. Nzambe asepelaka te na moto oyo ‘alingaka kosala mosala te.’​—2 Batesaloniki 3:10.

Makambo mosusu

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Bokonzi ya Nzambe ekosala nini?

Talá makambo oyo okoki kozela ete guvɛrnema ya Nzambe ekosala na mabele mobimba.

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Biblia ekoki kosalisa na makambo etali mbongo mpe banyongo?

Mbongo ekoki kosomba esengo te, kasi Biblia ezali na makanisi minei oyo ekoki kosalisa yo na makambo ya mbongo.