Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Mai 2015

 TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Al-Khwarizmi

Al-Khwarizmi

NTANGO bato balukaka koyeba soki bazali na kilo boni to koyeba motángo ya biloko ya kolya oyo bazali na yango, mingi basalelaka mitángo babengi Indo-Arabes. Mpo na nini? Emonani ete mitángo oyo tosalelaka lelo, oyo ebandaka na zero tii libwa ebandaki na Inde mpe bato ya mayele ya eleko ya Moyen-Âge oyo bazalaki kokoma na monɔkɔ ya Arabe nde bamemaki yango na Mpoto. Moto ya liboso kati na bango ezalaki mobali moko na nkombo Muhammad ibn-Musa al-Khwarizmi. Ekoki kozala ete Al-Khwarizmi oyo babengaka ye “elombe monene na matematiki ya monɔkɔ ya Arabe,” abotamaki na mobu soki 780 ya ntango na biso, na mboka oyo ebengamaka lelo Ouzbékistan. Mpo na nini azwaki lokumu yango?

“ELOMBE YA MATEMATIKI YA MONƆKƆ YA ARABE”

Na makomi na ye, Al-Khwarizmi amonisaki ntina ya kosalela mitángo oyo ezalaka na koma (,) mpe amonisaki polele mayele ya kosala bakalkile mosusu ya mpasi ya matematiki mpe mayele yango epalanganaki mingi. Alimbolaki mayele yango na buku na ye (The Book of Restoring and Balancing). Liloba al-jabr na Lifalanse algèbre eutá na titre ya Arabe al-jabr Kitab al-jabr wa’l-muqabala. Mokomi moko ya kala na nkombo Ehsan Masood alobi ete bamonaka ete algèbre ezali “esaleli moko ya matematiki ya ntina mingi oyo ebimá naino liboso te mpe esalelamaka na basiansi nyonso.” *

Mokomi moko alobi na maloba ya lisɛki boye: “Bayekoli ya iniversite ya bileko na bileko bamonaka ete ezalaki na ntina te [Al-Khwarizmi] aboma nzoto ndenge wana.” Ata soki ezali bongo, Al-Khwarizmi alobaki ete mokano na ye ezalaki ya komonisa bato ndenge ya kosala na pɛtɛɛ nyonso bakalkile na makambo ya mombongo, kokabola libula, kosala baankɛtɛ mpe makambo mosusu.

 Basiɛklɛ mingi na nsima, bato ya matematiki ya Mpoto, ata mpe Galilée ná Fibonacci bazalaki kopesa al-Khwarizmi lokumu mingi mpo alimbolaki na ndenge ya polele ndenge ya kosala bakalkile. Ndenge Al-Khwarizmi alimbolaki makambo polele esalisaki mpo na koyekola makambo mosusu ya algèbre, arithmétique mpe trigonométrie. Trigonométrie esalisaki bato ya mayele ya Moyen-Orient básala bakalkile mpo na koyeba valɛrɛ ya ba-angle mpe bangámbo ya ba-triangle mpe kokolisa mayele na makambo ya astronomi. *

Algèbre: “Ezali esaleli moko ya matematiki ya ntina mingi oyo ebimá naino liboso te”

Baoyo basalelaki mayele ya al-Khwarizmi bakolisaki lolenge ya sika ya kosalela mitángo oyo ezali na koma (,) mpe babandisaki mayele ya sika mpo na koyeba bisika mpe monene ya eloko. Bato ya mayele na makambo ya kotonga na Moyen-Orient mpe batongi-ndako basalelaki mayele wana banda kala liboso ete baninga na bango ya Mpoto básalela yango, oyo bamesanaki na mayele yango na boumeli ya etumba babengi croisades. Na nsima, Bamizilma ya mayele oyo bango bamemaki na boombo na mboka na bango nde basalisaki bango bázwa mayele yango.

NDENGE MATEMATIKI NA MƆNƆKƆ YA ARABE EPALANGANAKI

Na nsima, babongolaki babuku ya matematiki ya al-Khwarizmi na monɔkɔ ya Latin. Balobaka ete Fibonacci, moto ya matematiki ya Italie (c. 1170-1250), oyo ayebani mpe na nkombo Léonard de Pise, nde apalanganisaki mitángo ya Indo-Arabe na Mpoto. Ayekolaki mitángo yango na boumeli ya mibembo na ye na mokili ya Méditerranée mpe na nsima akomaki buku na ye (Book of Calculation).

Esɛngaki basiɛklɛ mingi eleka mpo bato báyeba mpenza bandimbola oyo Al-Khwarizmi apesaki. Kasi lelo oyo mayele oyo asalelaki mpe matematiki mosusu nyonso oyo esalelaka mpe algèbre nde esimbi siansi mpe teknoloji, ata mpe siansi oyo etali mimbongo mpe baizine.

^ par. 5 Na algèbre ya lelo, mitángo oyo eyebani te emonisamaka na balɛtrɛ lokola x to y. Na ndakisa x + 4 = 6. Mpo na koyeba motángo ya x bazwi + 4 mpe batindi yango na ngámbo mosusu mpe ekómi - 4, yango esali ete ekóma x = 6 - 4 mpe sikoyo motángo ya x eyebani ete ezali 2.

^ par. 7 Bato ya mayele ya Grèce na makambo ya astronomi nde babandisaki likambo ya kosala bakalkile ya bangámbo ya ba-angle mpe ba-triangle. Bato ya mayele ya Islam basalelaki trigonométrie mpo na koyeba esika oyo mboka Mecques ezalaka. Bamizilma balingaka kotala na ngámbo ya Mecques ntango bazali kobondela. Mimeseno na bango esɛngaka mpe básala bongo ntango bazali kokunda ebembe mpe ntango bazali koboma banyama mpo na kolya.