Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Mars 2015

 LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Ndenge ya koyokana malamu na babokilo

Ndenge ya koyokana malamu na babokilo

MOKAKATANO

“Ntango mikakatano ekɔtaki na libala na biso, mwasi na ngai ayebisaki baboti na ye. Na nsima, tata na ye abengisaki ngai mpo apesa ngai toli. Likambo yango esepelisaki ngai mpenza te!”​—James. *

“Mbala mingi, mama bokilo na ngai alobaka, ‘Namoná mwana na ngai kala mpenza!’ Alobelaka ndenge ye ná mwana na ye bazalaki mpenza baninga, yango esalaka namona lokola namemá ngambo ndenge tobalanaki mpe koyokisa mama na ye mpasi wana nyonso na motema!”​—Natasha.

Mwaye ezali ya kotya makambo ya babokilo na esika na yango mpe oyo ya libala na esika na yango?

OYO OSENGELI KOYEBA

Libala esalaka libota ya sika. Biblia elobi ete mobali oyo abali “akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye.” Ezali mpe bongo mpo na mwasi oyo abali. Biblia elobi ete soki mwasi abali, ye ná mobali na ye bakómi “mosuni moko.” Basali libota ya sika.​—Matai 19:5.

Libala na yo ezwi esika ya liboso, baboti na yo na nsima. John Gottman, mopesi-toli na makambo ya libala alobi boye: “Likambo oyo eleki ntina na libala ezali ete mwasi to mobali asengeli kotalela ntango nyonso likanisi ya moninga na likambo nyonso. Kokóma to kozongisa bomoko na libala ekoki kosɛnga kobenda nzoto mwa moke na baboti to bandeko na yo.” *

Ekoki kozala mpasi mpo baboti mosusu bámesana. Mobali moko oyo auti kobala sika, alobi boye: “Liboso ya libala na biso, mwasi na ngai azalaki ntango nyonso kotya bamposa ya baboti na ye na esika ya liboso. Nsima ya libala na biso, mama na ye amonaki ete moto mosusu azwi esika ya liboso. Ezalaki pɛtɛɛ te mpo mama na ye andima yango.”

Ekoki mpe kozala mpasi mpo na bato mosusu oyo babalani sika. James, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Toponaka babokilo te ndenge toponaka baninga. Ezali lokola moto moko alobi, ‘Olinga, olinga te, okómi na baninga mibale ya sika.’ Ata soki bazali kopesa yo nkanda, bazali kaka bato ya libota!”

 OYO OKOKI KOSALA

Soki yo ná molongani na yo bozali koyokana te na likambo moko etali bokilo, bópesana mabɔkɔ mpo na kobongisa yango na kimya. Bólanda toli oyo ya Biblia: “Luká kozwa kimya, mpe landá yango.”​—Nzembo 34:14.

Mpo na kosalisa yo osala yango, talá makambo oyo elandi. Mokomoko na yango ezali komonisa ndenge mobali to mwasi azali kotalela likambo moko. Kasi, mikakatano yango etaleli mwasi to mobali mpe batoli oyo ezali wana ekoki kosalisa yo obongisa mwa makambo oyo ebimaka mpo na babokilo.

Mwasi na yo alobi ete alingi oyokanaka malamu ná mama na ye. Kasi omoni ete koyokana na ye ezali mpasi.

Meká kosala boye: Sololá likambo yango ná mwasi na yo mpe boyá kotingama na makambo oyo olingi. Likambo ezali te na ndenge oyo ozali komiyoka mpo na mama bokilo na yo, kasi nde na ndenge ozali komiyoka mpo na molongani na yo, oyo olapaki ndai ete okolinga ye. Ntango bozali kosolola, luká lolenge moko to mibale oyo ekoki kobongisa boyokani na yo ná mama bokilo na yo mpe na nsima, salelá yango. Ntango mwasi na yo azali komona milende oyo ozali kosala, na ntembe te, akokóma kopesa yo limemya mingi lisusu.​—Toli ya Biblia: 1 Bakorinti 10:24.

Mobali na yo alobi ete olingaka mingi kosepelisa baboti na yo na esika ya kosepelisa ye.

Meká kosala boye: Sololá likambo yango na mobali na yo mpe meká komitya na esika na ye. Toboyi te, mobali na yo asengeli te komona mabe soki ozali kopesa baboti na yo lokumu oyo ebongi na bango. (Masese 23:22) Ata bongo, maloba mpe misala na yo esengeli kondimisa ye ete otyaka ye na esika ya liboso. Soki esalemi bongo, akomona te ete azali kowelela likebi na yo ná baboti na yo.​—Toli ya Biblia: Baefese 5:33.

Na esika asɛnga yo toli, mwasi na yo akendaka koluka yango nde epai ya baboti na ye.

Meká kosala boye: Sololá na mwasi na yo mpe bóyokana na makambo nini bosengeli koyebisa baboti. Kozala makambo makasimakasi te. Ezalaka ntango nyonso mabe koyebisa baboti likambo moko oyo ezali kotungisa yo? Ntango nini ebongi koyebisa bango yango? Soki boyokani na makambo oyo bosengeli koluka toli, mokakatano ekozala lisusu te.​—Toli ya Biblia: Bafilipi 4:5.

^ par. 4 Na lisolo oyo, bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 9 Euti na buku The Seven Principles for Making Marriage Work.