Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Mars 2015

Mopɛpɛ ya kitoko mpe kongɛnga ya moi​—Ezali mpe “ba-antibiotique”?

Mopɛpɛ ya kitoko mpe kongɛnga ya moi​—Ezali mpe “ba-antibiotique”?

NTANGO bato ya siansi bamonaki ba-antibiotique mpo na mbala ya liboso na katikati ya siɛklɛ ya 20, minganga bazalaki na elikya ete bankisi wana ya sika ekosilisa bamaladi mosusu. Na ebandeli, bankisi yango ekokisaki mokano na yango. Kasi, ndenge oyo bato basaleli yango mingi esali ete bamikrobe mosusu ekóma lisusu makasi mpe ba-antibiotique ekoka koboma yango te.

Mpo na koluka ebundeli ya sika ya kobundisa bamikrobe, bato mosusu ya siansi bazali koyekola mayele oyo bato ya kala bazalaki kosalela mpo na komibatela na bamaladi. Moko na yango ezali kotalela matomba oyo moi ná mopɛpɛ ya kitoko ememaka na sante ya moto.

Bazwi liteya na ndakisa ya bato ya kala

Banda kala, bato mingi ya Angleterre bazalaki kolobela likoki ya kobikisa oyo moi mpe mopɛpɛ kitoko ezalaka na yango. John Lettsom, monganga moko (1744-1815) asɛngaki ete bana mike oyo babɛlaki tibɛrkiloze bákende kozwa mopɛpɛ ya mbu mpe kongɛnga ya moi lokola nkisi. Na 1840, George Bodington, monganga oyo asalaka lipaso alobaki ete baoyo bazalaki kosala na bisika ya polele; na ndakisa basali-bilanga, bato oyo batimolaka mabele mpe babateli ya mpate bazalaki kozwa maladi ya tibɛrkiloze mpenza te, kasi baoyo bazalaki kolekisa ntango na bango mingi na kati ya ndako nde bazalaki kozwa yango mingi.

Florence Nightingale (1820-1910) ayebanaki mingi mpo na ndenge azalaki kosalisa basoda ya Allemagne oyo bazokaki na etumba ya Crimée. Atunaki boye: “Naino okendá te na shambrɛ ya moto moko . . . na butu to liboso afungola bafenetre na ntɔngɔ mpe omoná te ete mopɛpɛ na shambrɛ yango ezali kilo mpe nsolo mabe?” Asɛngaki ete mopɛpɛ ya bashambrɛ ya bato na ye ya maladi ezala kitoko ndenge mopɛpɛ ya libándá ezalaka, kasi kozanga ete elɛngisa bango. Abakisaki boye: “Na eksperiansi na ngai nyonso namoni ete longola mopɛpɛ ya kitoko, bato ya maladi bazalaka mpe na mposa ya  pole . . . mingimingi nde pole ya kongɛnga ya moi.” Bato mingi ya ntango wana bazalaki mpe kondima ete kotanda bilamba ya mbeto mpe bilamba mosusu na moi ezalaki kosala ete sante ya moto ezala malamu.

Kobanda na bambula ya 1800, mayele ya siansi ekoli, ata bongo, makambo oyo minganga bayekoli lelo oyo endimisi likambo yango. Na ndakisa, boyekoli moko oyo basalaki na Chine na 2011 emonisaki ete na iniversite, ba-dortoire oyo ezalaka na bana-kelasi mingi mpe mopɛpɛ elekaka malamu te nde esalaka ete “bázwa bamikrobe mingi oyo ebɛlisaka maladi ya mpema.”

OMS endimi ete mopɛpɛ ya Nzambe, oyo ekɔtaka mpe na bandako ezali na ntina mpo na kobatela bato na bamikrobe. Na yango, malako oyo OMS ebimisaki na 2009 elendisaki bato bátikaka mopɛpɛ yango elekaka na bashambrɛ ya lopitalo mpo bamikrobe ezala mingi te. *

Okoki koloba boye: ‘Nyonso wana ezali malamu mpenza. Kasi siansi endimi yango? Ndenge nini kongɛnga ya moi mpe mopɛpɛ kitoko ebatelaka na bamikrobe?’

Ebomaka bamikrobe

Ankɛtɛ oyo Ministère ya défense ya Royaume-Uni esalaki epesi mwa biyano. Bato ya siansi ya ekólo yango balukaki koyeba soki kobeba ya mopɛpɛ ekoumela ntango boni soki babɛti bɔmbi moko oyo ebebisaka mopɛpɛ na Londres. Mpo na koyeba soki bamikrobe oyo etambolaka na mopɛpɛ ekoki koumela na bomoi ntango boni, bato ya mayele batyaki mikrobe babengi colibacille na nsinga ya ndako ya limpulututu (araignée) mpe batyaki yango na esika ya polele. Bamekaki yango na butu, mpo eyebanaki ete kongɛnga ya moi ebomaka bamikrobe yango. Bamonaki nini?

Ngonga soki mibale na nsima, bamikrobe yango nyonso ekufaki. Kasi, ntango batyaki bamikrobe yango na kɛsi oyo ekangamá kaka na esika wana, ngonga mibale na nsima, bamikrobe yango mingi ezalaki kaka na bomoi. Mpo na nini? Emonani ete eloko moko oyo ezalaka na mopɛpɛ nde ebomaka bamikrobe. Naino bayebi mpenza te soki ezali eloko nini. Kasi, bato ya mayele bamoni ete ekoki kozala eloko moko oyo ebimaka kaka yango moko na mopɛpɛ mpe “esalaka lokola nkisi oyo ebomaka bamikrobe oyo etambolaka na mopɛpɛ.”

Kongɛnga ya moi mpe ezalaka na eloko oyo ebomaka bamikrobe. Zulunalo moko (Journal of Hospital Infection) elobi ete “bamikrobe mingi oyo ebebisaka mopɛpɛ ekufaka na kongɛnga ya moi.”

Ndenge nini okoki kozwela yango litomba? Okoki kokende libándá epai okoki kolekisa mwa ntango mpo na kozwa mwa kongɛnga ya moi mpe mwa mopɛpɛ. Ekosala yo malamu mpenza.

^ par. 8 Makambo mosusu ekoki kosala ete kotika bafenetre polele ezala malamu te. Na ndakisa soki mopɛpɛ ya libándá ezali mabe, makelele ezali mingi mpe mpo na komibatela na bato mabe to na makama mosusu.