Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Février 2015

 EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Ndenge nsɔngɛ ya mapapu ya bandɛkɛ oyo epumbwaka na vitɛsi makasi ebaluká

Ndenge nsɔngɛ ya mapapu ya bandɛkɛ oyo epumbwaka na vitɛsi makasi ebaluká

AVIƆ ya monene esalaka ete mopɛpɛ ebalukabaluka makasi na nsɔngɛ ya mapapu na yango ntango ezali kopumbwa. Ndenge mopɛpɛ ebalukaka ndenge wana ebendaka aviɔ mpe yango esalaka ete esalela esansi (kérosène) mingi. Eningisaka mpe baaviɔ mosusu oyo ezali kopumbwa penepene na yango. Na yango, baaviɔ oyo ezali kopumbwa nzela moko na yango esengeli kozala mpenza mosika mpo na kozela mopɛpɛ yango ekita.

Ba-ingénieur oyo basalaka baaviɔ bamoni ndenge ya kosala mpo mokakatano yango ezala mingi te. Solisyo nini bazwi? Balingi kosala baaviɔ oyo nsɔngɛ ya mapapu na yango ekozala ya kobaluka lokola oyo ya bandɛkɛ oyo epumbwaka na vitɛsi makasi; na ndakisa ndɛkɛ babengi la buse, mpongo mpe nkɔngi (cigogne).

Tókanisa naino: Ntango ezali kopumbwa, nsala oyo ezalaka na nsɔngɛ ya mapapu ya bandɛkɛ wana ya minene ebalukaka tii ntango ekómaka mwa moke semba. Yango esalaka ete epumbwa na ndenge oyo ebongi ata soki mapapu na yango ezali milai mingi te. Esalaka ete bandɛkɛ yango epumbwa lisusu malamu. Ba-ingénieur basalaki aviɔ oyo mapapu na yango ezali lokola oyo ya bandɛkɛ wana. Ntango batyaki aviɔ yango na esika oyo babongisá mpo na komekaka baaviɔ mpo na kotala ndenge oyo ekosala na mopɛpɛ ya makasi, bamonaki ete ntango babongisaki mwa moke nsɔngɛ ya mapapu na yango, basali lokola kobalusa nsɔngɛ na yango mpe babongisi yango na ndenge oyo ekolanda malamu mopɛpɛ, aviɔ yango ekómaki kopumbwa malamu mingi (10%) koleka ndenge ezalaki liboso. Mpo na nini? Buku moko (Encyclopedia of Flight) elobi ete nsɔngɛ ya mapapu yango ekitisaka makasi ya mopɛpɛ. Lisusu, ebimisaka nguya moko oyo etindikaka aviɔ mpe “esalaka ete mopɛpɛ oyo aviɔ yango moko ebimisaka, ebendaka yango te.”

Na ndenge yango, nsɔngɛ ya mapapu yango esalaka ete aviɔ epumbwa mosika, emema kilo mingi mpe mapapu na yango ezala mikuse. Yango esalaka mpe ete ezwa esika monene te na parkingi mpe esalela esansi mingi te. Na ndakisa, na 2010, lapolo oyo NASA ebimisaki emonisaki ete bakompanyi ya aviɔ ebatelaki “milio 7 600 ya balitre ya esansi na mokili mobimba” mpe esalaki ete milinga oyo baaviɔ ebimisaka ebima mingi te.

Okanisi nini? Ndenge nsɔngɛ ya mapapu ya bandɛkɛ oyo epumbwaka na vitɛsi makasi ebaluká, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?