Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Décembre 2014

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Oyo osengeli koyeba mpo na maladi ya motó

Oyo osengeli koyeba mpo na maladi ya motó

Claudia oyo minganga bayebisaki ye azali na maladi moko ya motó mpe ya makanisi mpo na likama moko oyo akutanaki na yango, alobi boye: “Nayokaki mpema mokuse. Kolongola nsɔni ya kozala na maladi wana ya motó ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ngai.”

Mark, mobali ya Claudia alobi boye: “Esɛngaki ntango molai mpo tóndima likambo oyo ekómelaki biso. Kasi namonaki ete nasengeli nde kotya makanisi na kosunga mwasi na ngai.”

OKOMIYOKA ndenge nini soki yo to moto moko oyo olingaka abɛli maladi ya motó? Likambo ya esengo, bakoki kosalisa maladi ya motó. Tótala naino mwa makambo oyo osengeli koyeba, oyo ekosalisa yo oyeba malamu maladi yango. *

 Mwa makambo etali maladi ya motó

“Ebele ya bato banyokwamaka na maladi ya motó na mokili mobimba mpe yango etungisaka bandeko mpe baninga na bango. Na bato minei, moko akobɛla maladi ya motó na ntango moko boye ya bomoi na ye. Kotungisama na makanisi nde esalaka ete bato mingi na mokili bábɛla maladi ya motó. Maladi babengi (Schizophrénie), oyo etyaka mobulu na makanisi mpe (Trouble bipolaire) oyo esalaka ete moto amitungisa koleka ndelo mpo na likambo moko boye, ezali na kati ya bamaladi ya motó oyo enyokolaka bato mingi. . . . Atako bato mingi bazali na bamaladi yango, kasi eyebanaka mpenza te, bakipaka yango te to bayinaka bato oyo bazali na maladi yango.”—Ebongiseli ya ONU oyo etalelaka makambo ya sante (OMS).

OMS emonisi ete bato mingi oyo bazali na maladi ya motó baboyaka koluka lisalisi ya minganga mpo na nsɔni oyo yango epesaka.

Ebongiseli moko (The National Alliance on Mental Illness) elobi ete atako bankisi ya kobikisa bamaladi mingi ya motó ezali, na États-Unis, bilenge mingi (50%), oyo bazali na mbula 8 tii 15 mpe mikóló mingi (60%) bazwaki te  lisalisi ya minganga na mbula oyo eleki.

Koyeba maladi ya motó

Maladi ya motó ezali nini? Bato ya mayele balobi ete ezali maladi oyo esalaka ete moto akanisa lisusu malamu te, ayeba te kopekisa esengo, mawa to nkanda na ye mpe asala makambo oyo esengeli te. Mbala mingi, yango ebebisaka likoki ya moto ya koyokana na basusu mpe ya koyeba kosala makambo ya mokolo na mokolo.

Maladi ya motó ezwaka moto te mpo azali na bolɛmbu to na bizaleli mosusu ya mabe

Bilembo ya maladi yango ekoki kozala makasi na kotalela likoki ya moto na moto, maladi oyo moto azali na yango mpe makambo oyo ekómeli ye. Ekoki kozwa moto nyonso, ezala basi to mibali, bilenge to mikóló, mindɛlɛ to baindo, bazwi to babola. Maladi ya motó ezwaka moto te mpo azali na bolɛmbu to na bizaleli mosusu ya mabe. Soki moto azwi lisalisi ya monganga oyo ebongi, akoki kobika mpe kozala na bomoi ya malamu.

Kosalisa maladi ya motó

Minganga oyo bayebi maladi ya motó bakoki kosalisa bamaladi mingi ya motó malamu mpenza. Likambo ya liboso ya kosala ezali ya kosalisa ekzamɛ epai ya monganga oyo ayebi maladi yango malamu mpe asalisá bato mingi ya maladi yango.

Kasi, bato ya maladi bakoki kozwa litomba na lisalisi ya ndenge wana kaka soki bandimi kozwa lisalisi oyo ebongi. Ekoki kosɛnga bábanga te kolobela polele makambo etali maladi yango epai ya basusu. Lisalisi yango ekoki kosɛnga kosolola na minganga oyo basalisaka maladi yango, oyo bakoki kosalisa yo oyeba mpenza maladi yango, obongisa makambo oyo esengeli mpe okómisa makasi ekateli na yo ya kolandela lisalisi ya monganga. Na masolo ya ndenge wana na minganga, moto moko ya libota to moninga akoki kosalisa mingi na kokitisa yo motema mpe kopesa yo mabɔkɔ.

Bato mingi bayebaki ndenge ya kosala na maladi yango nsima ya koyeba malamumalamu maladi na bango mpe komɛla bankisi oyo minganga bakomelaki bango. Mark, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Liboso básala mwasi na ngai ekzamɛ, toyebaki mpenza te ndenge maladi ya motó ezalaka. Kasi toyekolaki ndenge ya kosala na likambo mokomoko ntango ebimi mpe komesana na yango. Na nsima, lisalisi ya minganga oyo bayebi mosala, ya bandeko mpe ya baninga esalisaki biso mingi.”

Likambo ya liboso ya kosala ezali ya kosalisa ekzamɛ epai ya monganga oyo ayebi maladi yango malamu

 Claudia andimi yango. Alobi boye: “Na ebandeli, ekzamɛ wana etindaki ngai namona lokola nakɔti bolɔkɔ. Kasi, atako maladi yango epekisaka ngai ná mobali na ngai tósala makambo mosusu, nazwi liteya ete ata likambo moko ya mpasi koleka ekoki kozwa solisyo. Na yango, mpo na kolonga maladi na ngai, nalandaka lisalisi ya minganga, nasalaka boninga ná basusu mpe namesanaka na likambo nyonso oyo ekómeli ngai.”

Koyeba makambo ya Nzambe ezali na ntina

Biblia elobi te ete koyeba makambo ya Nzambe ebikisaka bamaladi oyo tobɛlaka. Ata bongo, mabota mingi na mokili mobimba bazwaki libɔndisi mpe makasi na mateya ya Biblia. Na ndakisa, Biblia emonisi ete Mozalisi na biso ya bolingo alingaka mpenza kobɔndisa baoyo “motema ebukani” mpe “elimo etutami.”Nzembo 34:18.

Atako Biblia ezali te buku ya minganga, kasi epesaka batoli oyo ebongi, oyo ekoki kosalisa biso tólonga makambo oyo epesi biso mpasi na motema mpe na makanisi. Biblia ekoki mpe kopesa biso elikya mpo na mikolo ezali koya ntango oyo bamaladi mpe bampasi ekozala lisusu te na mabele. Liloba ya Nzambe elaki boye: “Na ntango yango miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama, mpe matoi ya bato oyo bakufá matoi ekofungwama. Na ntango yango motɛngumi akopumbwa lokola serfe, mpe lolemo ya moto oyo alobaka te ekoganga na esengo.”Yisaya 35:5, 6.

^ par. 5 Na lisolo oyo, maladi ya motó esangisi maladi ya makanisi, motó ezali kosala lisusu malamu te, mpe bongo na bongo.

^ par. 32 Zulunalo Lamuká! etindi moto te amɛla nkisi boye to boye. Bakristo basengeli kondimisama ete lisalisi nyonso oyo bazali kozwa ebuki te mibeko ya Biblia.

^ par. 40 Talá mpe lisolo “Mitungisi—Oyo okoki kosala mpo elekela yo motó te,” na Lamuká! ya 05/2014.