Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Novembre 2014

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Sekele mpo na kozala na bomoi ya esengo

Sekele mpo na kozala na bomoi ya esengo

“Nakozala na esengo soki nabali mpe naboti bana.”

“Nakozala na esengo soki nasombi lopango na ngai moko.”

“Nakozala na esengo soki nazwi mosala wana.”

“Nakozala na esengo soki . . .”

OSÍ okanisá mpe bongo? Ntango mposa na yo ekokisamaki to ozwaki eloko oyo ozalaki koluka, esengo oyo oyokaki eumelaki? To ebandaki nde kosila? Mpo na koloba solo, kokokisa likambo oyo okanaki to kozwa eloko oyo olingaki ekoki kopesa yo esengo, kasi esengo ya ndenge wana ekoki kozala ya ntango mokuse. Esengo ya solosolo eutaka kaka te na kolonga likambo moko boye to kozwa eloko oyo ozalaki koluka. Kutu, ndenge moko na kozala na sante ya malamu, esengo ya solosolo esɛngaka makambo ndenge na ndenge.

Moto na moto azalaka na ndenge na ye. Likambo oyo esepelisaka yo ekoki te kosepelisa moto mosusu. Lisusu, ntango tozali kokóla makanisi na biso ebongwanaka. Kutu, emonani ete esɛngaka makambo mingi mpo moto azala na esengo. Na ndakisa, esengo ya solosolo esɛngaka kosepela na oyo ozali na yango, koboya likunya, kolinga bato mosusu mpe koyika mpiko ntango okutani na mikakatano to mitungisi. Tótala mpo na nini tolobi bongo.

 1. KOSEPELA NA OYO OZALI NA YANGO

Moto moko ya mayele oyo ayekolaki bizaleli ya bato alobaki boye: “Mbongo ebatelaka.” Kasi, akomaki mpe boye: “Moto oyo alingá palata akotonda palata te, mpe moto alingá bozwi akotonda mpe lifuti te. Yango mpe ezali mpamba.” (Mosakoli 5:10; 7:12) Alingaki mpenza koloba nini? Atako tozalaka na mposa ya mbongo mpo na kobika, tosengeli koboya lokoso mpo ekokisaka mposa ya moto te! Mokomi yango ezali Mokonzi Salomo ya Yisraele, oyo alukaki koyeba soki bomɛngo mpe kokelela na eloko moko te epesaka esengo ya solosolo. Akomaki boye: “Eloko nyonso oyo miso na ngai esɛngaki, naboyelaki yango te. Napimelaki motema na ngai ata esengo moko te.”Mosakoli 1:13; 2:10.

Lokola azwaki bomɛngo mingi, Salomo atongaki bandako ya minene, asalaki baparkɛ mpe bapisini ya kitoko, azwaki mpe bato ebele ya misala. Azwaki nyonso oyo alingaki. Kasi, azwaki liteya nini? Nyonso oyo alukaki epesaki ye esengo, kasi ya ntango mokuse. Alobi boye: ‘Namonaki ete nyonso ezalaki mpamba mpe kolanda mopɛpɛ, eloko moko ya litomba ezalaki te na nse ya moi.’ Akómaki kutu koyina bomoi! (Mosakoli 2:11, 17, 18) Salomo amonaki ete soki moto azali koluka kaka matomba na ye moko, amiyokaka mpenza lokola azangi eloko mpe mposa na ye ekokisami te. *

Makambo oyo bato ya lelo bazali koyekola eyokani na oyo Salomo alobaki? Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (Journal of Happiness Studies) elobaki ete “soki bamposa ya ntina oyo moto azalaka na yango ekokisami, mbongo mingi oyo atikali na yango ebakiselaka ye esengo te.” Kutu, baankɛtɛ emonisi ete soki moto azali koluka kokóma na biloko ebele, kasi azali kokipe te ndenge oyo ekobebisa bizaleli mpe boyokani na ye na Nzambe, yango ekoki kosilisa ye esengo.

TOLI YA BIBLIA: “Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo.”Baebre 13:5.

2. KOBOYA LIKUNYA

Likunya ezali “mpasi to nkanda oyo moto ayokaka na motema mpo na litomba oyo moto mosusu azwi, mpe mposa ya koluka kozwa mpe litomba ya ndenge wana.” Ndenge moko na maladi moko ya mabe oyo ezali kokola, likunya ekoki kobebisa bomoi ya moto mpe kosilisa ye esengo. Ndenge nini likunya ekoki kobanda? Ndenge nini tokoki koyeba yango? Mpe ndenge nini tokoki kobundisa yango?

Buku moko (Encyclopedia of Social Psychology) emonisi ete bato bazalaka na likunya nde epai ya baoyo bakokani na bango, mbala mosusu na mbula, na mayele to na bozwi. Na ndakisa, komelesa akoki te koyokela moto moko ya teyatre oyo ayebani mingi likunya, kasi nde moninga na ye komelesa oyo mombongo na ye ezali kolonga.

Tózwa ndakisa: Bato mosusu oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi ya Perse bayokelaki mokonzi yango likunya te kasi nde Danyele, moninga na bango oyo azalaki kosala mosala malamu. Mpo na komona ete bato yango basepelaki te, basalelaki kutu mayele mabe mpo Danyele akufa! Kasi balongaki te. (Danyele 6:1-24) Buku oyo totángi awa na likoló elobi  ete “ezali na ntina koyeba ete likunya etindaka moto asala baninga mabe. Yango emonisi ntina oyo na masolo mingi ya kala, mabe oyo basalelaki basusu ezalaki nde mpo na likunya.” *

Likunya ekoki kobebisa likoki oyo moto azalaka na yango ya kosepela na biloko kitoko ya bomoi

Ndenge nini okoki koyeba ete ozali na likunya? Omituna boye: ‘Kolonga ya moninga moko esepelisaka ngai to esilikisaka ngai? Soki ndeko, moninga moko ya kelasi to ya mosala oyo azali mayele mingi alongi te na likambo moko, nayokaka mawa to nasepelaka?’ Soki oyanoli ete “esilikisaka ngai” to “nasepelaka,” boye ozali na likunya. (Ebandeli 26:12-14) Buku yango (Encyclopedia of Social Psychology) elobi ete “likunya ekoki kobebisa likoki oyo moto azalaka na yango ya kosepela na biloko kitoko ya bomoi mpe kopekisa ye azala na botɔndi mpo na makabo mingi ya bomoi. . . . Ezali mpenza mpasi mpo ezaleli ya ndenge wana ememela moto esengo.”

Tokobundisa likunya soki tozali na komikitisa ya solosolo mpe toyebi ete tokokoka makambo nyonso te, yango ekosalisa biso tósepela mpe tózwa na valɛrɛ makoki mpe bizaleli malamu ya basusu. Biblia elobi boye: “Bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.”Bafilipi 2:3.

TOLI YA BIBLIA: “Tólukaka te komimonisa ete toleki bamosusu, kobimisa kowelana na kati na biso, koyokelana likunya.”Bagalatia 5:26.

3. KOLINGA BATO

Buku (Social Psychology) elobi boye: “Ndenge oyo bato bamiyokaka mpo na boyokani na bango na basusu nde epesaka bango esengo mingi na bomoi koleka oyo mosala, mbongo, mboka to mpe sante na bango epesaka.” Na mokuse, mpo na kozala na esengo ya solosolo, bato basengeli kolinganaka. Mokomi moko ya Biblia alobaki boye: “Soki . . . nazali na bolingo te, nazali mpamba.”1 Bakorinti 13:2.

Komonisa bolingo ezalaka na retare te. Na ndakisa, Vanessa azalaki na tata moko mabe oyo azalaki kolangwa masanga. Ntango akómaki na mbula 14, akimaki ndako mpe akómaki kofanda na bandako oyo ebɔkɔlaka bana ya bato mosusu, afandaki mpe na ndako moko ya mabe esika abondelaki Nzambe asunga ye. Ekoki kozala ete Nzambe ayokaki libondeli na ye mpo na nsima batyaki ye na libota moko oyo elandaka toli ya Biblia oyo elobi ete “bolingo ezali na motema molai mpe na boboto.” (1 Bakorinti 13:4) Esika ya malamu ndenge wana mpe makambo oyo azalaki koyekola na Biblia esalisaki Vanessa alongola mpasi oyo azalaki na yango na motema mpe akóma na makanisi ya malamu. Alobi boye: “Na kelasi, bapwɛ na ngai na ebandeli ezalaki mabe kasi na nsima nakómaki kozwa bapwɛ ya malamu mpenza.”

Tii lelo Vanessa atungisamaka na makanisi. Ata bongo, azali lelo oyo na libala ya esengo mpe abotá bana mibale ya basi.

TOLI YA BIBLIA: “Bólata bolingo, mpo ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”Bakolose 3:14.

 4. KOYIKA MPIKO

Nani azangá mikakatano na bomoi? Ndenge Biblia elobi, ezali na “ntango ya kolela” mpe “ntango ya koganga na kolela.” (Mosakoli 3:4) Koyika mpiko esalisaka biso tólonga na bantango ya ndenge wana mpe tóbatela makanisi malamu. Tózwa ndakisa ya Carol ná Mildred.

Carol azali na maladi oyo ebebisaka mokuwa ya mokɔngɔ, diabɛti, maladi ya mpɔngi, mpe maladi ya miso oyo ebebisá ye liso ya lobɔkɔ ya mwasi. Ata bongo, alobi boye: “Nasalaka makasi nalɛmba nzoto te ntango molai. ‘Namiyokelaka mpe mawa.’ Kasi na nsima, natyaka makanisi wana pembeni mpe napesaka Nzambe mersi mpo na makambo oyo nazali naino na likoki ya kosala, mingimingi mpo na basusu.”

Mildred mpe azali na bamaladi ndenge na ndenge, na ndakisa maladi ya mingai, kanser ya libɛlɛ mpe diabɛti. Kasi ndenge moko na Carol, asalaka nyonso atya makanisi te na mikakatano na ye. Akomi boye: “Nayekoli kolinga bato mpe kobɔndisa bango na maladi na bango, yango esalisaka mpe ngai. Kutu, namonaka ete ntango nazali kobɔndisa basusu, namitungisaka te mpo na sante na ngai moko.”

Kobɔndisa basusu epesaka Carol ná Mildred esengo

Atako basi yango balingaka kozwa lisalisi malamu ya minganga, batyaka makanisi te na maladi na bango kasi nde na ndenge oyo batalelaka yango mpe ndenge basalelaka ntango na bango. Yango esalaka ete bázala na esengo oyo moto moko te akoki kobɔtɔla. Longola yango, bato mosusu balingaka bango mingi mpe bato mosusu oyo bazali na mikakatano ya ndenge na ndenge balandaka ndakisa na bango.

TOLI YA BIBLIA: “Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama, mpo lokola akokóma moto oyo andimami akozwa motole ya bomoi.”Yakobo 1:12.

Bwanya ya Biblia ezali “nzete ya bomoi mpo na baoyo basimbi yango, mpe baoyo bakangi yango makasi bakobengama bato ya esengo” soki bazali kosalela yango. (Masese 3:13-18) Mpo na nini te kosalela bwanya oyo ezali na Biblia mpo yo moko omona ete ezali solo? Kutu, nkolo buku yango mosantu, oyo abengami mpe “Nzambe ya esengo,” alingi ete yo mpe ozala na esengo.1 Timote 1:11.

^ par. 11 Lisolo yango ya Salomo ezali na Mosakoli 2:1-11.

^ par. 17 Lisolo ya Yesu Kristo emonisi mpenza likambo yango. Marko 15:10 elobi ete “banganga-nzambe bakonzi bakabaki ye nde mpo na likunya.”