Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Novembre 2014

Banzela ya kolekisa mai oyo Baroma batongaki​—Esalemá na ndenge ya kokamwa mpenza

Banzela ya kolekisa mai oyo Baroma batongaki​—Esalemá na ndenge ya kokamwa mpenza

NA BILOKO ya kokamwa oyo bato ya kala basalá, banzela ya mai oyo Baroma batongá nde ekamwisaka mpenza koleka. Sextus Julius Frontinus, mokambi moko ya departema ya misala etali mai na Roma (mobu 35 tii mobu soki 103 ya ntango na biso) akomaki boye: “Soki omeki kokokanisa banzela yango oyo elekisaka ebele ya mai ná bapiramide mpe misala ya Bagrɛki oyo ekendá nsango, okomona ete bapiramide mpe misala yango ezali mpenza na ntina te!” *

Mpo na nini batongaki yango?

Mbala mingi, bingumba ya kala ezalaki kotongama pene ya mai, ezalaki mpe bongo mpo na engumba Roma. Liboso, Ebale Tibre, maziba mpe mabulu ya mai oyo ezalaki mosika te ezalaki kobimisa mai oyo esengeli. Kasi, kobanda siɛklɛ ya minei liboso ya ntango na biso, Roma ezalaki kokóma monene nokinoki mpe mposa ya mai ebakisamaki.

Lokola bato moke nde bazalaki na mai ya pɔmpi na bandako na bango, Baroma batongaki bapisini ezala ya bato bango moko to ya bato nyonso. Aqua Virgo oyo bafungolaki na siɛklɛ ya 19 liboso ya ntango na biso ezalaki kolekisa mai tii na pisini ya liboso ya bato nyonso ya engumba Roma. Marcus Agrippa, oyo atongaki yango, mpe azalaki moninga ya motema ya Cezare Auguste, atyaki ebele ya mbongo na ye mpo na kobongisa mpe kosala ete banzela yango ya kolekisa mai ekóma minene.

Bapisini ekómaki mpe esika ya bato nyonso, basalaki kutu ba-jardin mpe babibliotɛkɛ na bapisini ya minene. Nsima ya kolongwa na bapisini, mai oyo banzela yango ezalaki kolekisa, oyo mwaye ya kokanga yango ezalaki te, ezalaki kokende na baterase, kotondisa yango basalite ntango nyonso, ezala basalite oyo ezalaki kouta na batwalɛti oyo ezalaki pene ya bapisini.

Kotonga mpe kobatela yango

Ntango oyoki maloba “banzela oyo elekisaka mai na Roma,” omonaka nde ba-courbe ya milai oyo emonanaka na mosika? Kutu, banzela yango ezalaki na ba-courbe mingi (20%), oyo eteni na yango ya monene ekundamá na nse ya mabele. Ba-courbe yango ezalaki kobatela banzela yango ya mai na kopasuka ya mabele mpe kosala ete ebebisa te bilanga mpe bisika ya bato oyo bafandi pembenipembeni  wana. Na ndakisa Aqua Marcia, oyo basilisaki kotonga yango na mobu 140 liboso ya ntango na biso, ezalaki ya ntaka ya kilomɛtrɛ 92 kasi batyaki ba-courbe na yango na ntaka ya kilomɛtrɛ 11 to koleka.

Liboso ya kotonga banzela yango, ba-ingénieur bazalaki kotala esika mai ezalaki kouta, kotala soki ezalaki pɛto, ekolekisa mai mingi to soki ezali malamu mpo na komɛla. Bazalaki mpe kotala sante ya bato ya esika wana oyo bazalaki komɛla mai yango. Soki bato yango bandimi kozwa mai ya esika yango, bazalaki kozwa bamezire ya nzela yango mpe ya bisika oyo ekitá mpo na koyeba ndenge ya kosala banzela yango, kotala soki monene to molai na yango ekozala ndenge nini. Emonani ete baombo nde bazalaki kotonga banzela yango ya kolekisa mai. Ezalaki kosɛnga bambula ebele mpo na kosilisa mosala yango, kobimisa mosolo ebele, mingimingi soki esɛngaki kosala ba-courbe.

Lisusu, basengelaki kobongisa mpe kobatela banzela yango ya kolekisa mai. Na ntango moko boye, engumba ya Roma ezwaki bato soki 700 mpo na mosala yango. Ntango bazalaki kosala banzela yango, bazalaki mpe komibongisa mpo na ndenge oyo bakobatela yango. Na ndakisa, bazalaki kosala baterase mpe mabulu mpo na kokɔta na eteni ya nse ya mabele ya banzela yango. Soki esɛngi kobongisa bisika ya minene mpenza, ba-ingénieur bazalaki kolekisa mai ya esika oyo ebebi na ngámbo mosusu mpo na mwa ntango.

Banzela ya kolekisa mai ya vile ya Roma

Na ebandeli ya siɛklɛ ya misato ya ntango na biso, banzela ya kolekisa mai ya minene 11 ezalaki kopesa engumba Roma mai. Ya liboso ezali Aqua Appia, oyo etongamaki na mobu 312 liboso ya ntango na biso mpe ezalaki ya ntaka ya kilomɛtrɛ koleka 16 na nse ya mabele. Oyo ebatelamaki mwa moke tii lelo ezali Aqua Claudia, oyo ezalaki ya ntaka ya kilomɛtrɛ soki 69 mpe ba-courbe na yango na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 10, oyo mingi na yango ezali na molai ya mɛtrɛ 27!

Banzela yango ezalaki kolekisa mai mingi na engumba yango! Aqua Marcia oyo tolobelaki liboso ezalaki kolekisa mɛtrɛ-kibe ya mai 190 000 mokolo na mokolo na Roma. Soki mai ekómi na engumba, nguya oyo ezalaki komema mai yango ezalaki kolekisa yango na bisika oyo bakabolaka mai, oyo na ngala na yango ezalaki kolekisa yango na batɔnɔ ya minene ya kobomba mai to na bisika oyo ebongisamaki mpo na kokabolela bato mai. Bato mosusu balobi ete mayele ya kokabola mai na Roma ekolaki na boye ete moto mokomoko azalaki na likoki ya kozwa litrɛ koleka 1 000 ya mai na mokolo.

Buku (Roman Aqueducts & Water Supply) elobi ete lokola ampire ya Roma ezalaki kokóma monene, “banzela oyo ezalaki kolekisa mai ezalaki kotongama bisika nyonso ya ampire yango.” Bato oyo basalaka mibembo na Asie mineure, France, Espagne mpe Afrique du nord bakamwaka ntango batalaka biloko wana ya kala oyo etongamá na ndenge ya kokamwa mpenza.

^ par. 2 Baroma bazalaki bato ya liboso te ya kotonga banzela oyo elekisaka mai. Bato ya Asiri, Ezipito, Inde mpe Perse batongaki yango liboso na bango.