Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Octobre 2014

 BIBLIA ELOBI NINI?

Bililingi

Bililingi

Bamilio ya bato basalelaka bililingi na losambo na bango. Kasi, Biblia endimi likambo yango? Esepelisaka Nzambe?

Bayuda ya sembo ya ntango ya kala bazalaki kosalela bililingi na losambo?

“Osengeli te komisalela ekeko oyo eyemami to elilingi oyo ekokani na eloko nyonso oyo ezali kuna na likoló to oyo ezali na mabele awa na nse to oyo ezali na mai na nse ya mabele. Osengeli te kogumbamela yango to kobendama mpo na kosalela yango.”​—Kobima 20:4, 5.

Makomami ya Ebre oyo babengaka yango Testama ya kala epekisaki kosalela bililingi na losambo

OYO BUKU MOKO ELOBI

Buku New Catholic Encyclopedia elobi ete Bayuda bazalaki kosalela bililingi ebele na losambo na bango “mpe bazalaki kokumisa bililingi yango mingi.” * Na ndakisa, buku yango etángi mayemi ya bambuma, bafololo, mpe ya banyama oyo ezalaki kokómisa tempelo ya Yerusaleme kitoko.​—1 Bakonzi 6:18; 7:36.

OYO OSENGELI KOYEBA

Na kokesana ya oyo buku New Catholic Encyclopedia elobi, Bayuda ya sembo bazalaki kosambela ata mayemi moko te to bililingi oyo ezalaki na tempelo. Kutu, ata esika moko te na Biblia balobi ete Bayisraele ya sembo bazalaki kosalela bililingi na losambo.

OYO BIBLIA ELOBI

Na nzela ya mosakoli Yisaya, Nzambe alobaki boye: “Nakopesa nkembo na ngai na mosusu te, lisanzoli na ngai na bikeko oyo eyemami mpe te.”​—Yisaya 42:8.

 Bakristo ya liboso bazalaki kosalela bililingi na losambo?

“Boyokani nini ezali kati na tempelo ya Nzambe mpe bikeko? . . . Bótika kosimba eloko ya mbindo.”​—2 Bakorinti 6:16, 17.

“Bakristo ya liboso bayinaki ata likanisi ya kotya bililingi na eglize mpo kogumbamela to kobondela yango ezalaki losambo ya bikeko mpo na bango.”​—History of the Christian Church

OYO BUKU MOKO ELOBI

Buku New Catholic Encyclopedia elobi ete “lelo oyo tokoki kotya ntembe te ete bakristo ya liboso bazalaki kosalela bililingi na losambo. Malita ya bakristo ya liboso oyo bazalaki kotonga yango na nse ya mabele ezalaki na mwa banzela oyo etondaki mpenza na mayemi. . . . Kutu bashambrɛ mosantu ya losambo mpe oyo bazalaki kotya bibembe na kati batyaki yango mayemi ya bato ya masapo.” *

OYO OSENGELI KOYEBA

Bililingi ya kala mpenza oyo bamonaki na malita yango​—banzela oyo basalaki na nse ya mabele mpo na kokundaka bibembe, ezali kaka ya siɛklɛ ya misato; bambula soki 200 nsima ya liwa ya Yesu. Na yango, oyo buku New Catholic Encyclopedia ebengi “losambo ya bakristo ya liboso” ezali te losambo ya bakristo ya libosoliboso mpenza, oyo bayekoli ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kosala mpe oyo Makomami ya Grɛki ya bokristo oyo babengaka Testama ya Sika elobeli. Lokola bamonaki bililingi ya ndenge wana na malita wana, yango emonisi kaka ete na siɛklɛ ya misato, bakristo ya nkombo mpamba balandaki mimeseno ya bapakano ya kosalela bililingi, ntango mosusu mpo na kobenda bandimi. *

OYO BIBLIA ELOBI

“Bókima losambo ya bikeko.”​—1 Bakorinti 10:14.

Moto asengeli kosalela bililingi kaka mpo esalisa ye na losambo?

“Bókeba na bikeko.”​—1 Yoane 5:21.

Kosalela bililingi ezali likambo moko ya losambo oyo Biblia eboyi. Mpo na ntina yango, Batatoli ya Yehova basalelaka bililingi te na losambo, batyaka mpe te bililingi ya losambo na bandako na bango to na bisika na bango ya losambo

OYO BUKU MOKO ELOBI

Buku New Catholic Encyclopedia elobi boye: “Lokola losambo oyo bapesaka bililingi ekendaka epai ya bato oyo bamonisaka bililingi yango, bililingi wana ekoki kozwa losambo oyo bapesi bato yango mpo ezali bililingi na bango.”

OYO OSENGELI KOYEBA

Ntango Yesu alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kobondela, ayebisaki bango te ete básalelaka bililingi. Likanisi mpamba ya kosalela bililingi na losambo ya Nzambe ya solo ezwami ata esika moko te na Makomami ya Grɛki ya bokristo.

OYO BIBLIA ELOBI

“Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.”​—Matai 4:10.

^ par. 7 Buku New Catholic Encyclopedia emonisi ete kosalela bililingi ezali “molulu moko ya lingomba, likambo moko ya losambo.”

^ par. 13 Awa, bililingi esangisi bafɔtɔ, bikeko, mpe biloko mosusu oyo basalelaka na losambo.

^ par. 14 Kosalela bililingi ezalaki mimeseno ya bamboka mingi ya kala na ndakisa Egypte, Grèce mpe Inde.