Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Septembre 2014

 TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Babengani Ba-Morisque na Espagne

Babengani Ba-Morisque na Espagne

Balobaka ete soki makambo wana ya mawa esalemaki na Espagne, eglize nde ezalaki nsima ya makambo yango. Ebongi mpenza kotánga lisolo yango.

MOKONZI ya Espagne alingaki ete bato nyonso bázala bakristo mpe bango nyonso bátosa mibeko ya mboka. Lokola bazalaki kotalela Ba-Morisque lokola bapakano, yango wana bamonaki ete soki batikali kaka na Espagne ekozala mabe monene na miso ya Nzambe. Nsima ya bambula mingi, bazwelaki bango ekateli. Ezalaki ekateli nini? Basengelaki kobengana bango! *

KOKÓMISA BATO BANDIMI NA MAKASI

Na boumeli ya bambula ebele, Ba-Maure na Espagne, mwa etuluku moke ya Bamizilma oyo babengaki bango Ba-Mudéjar, bazalaki kofanda na mwa kimya na bisika oyo ezalaki koyangelama na Lingomba ya Katolike. Mpo na mwa ntango, mibeko ya Leta etikelaki bango bonsomi ya kotosa mibeko mpe bonkɔkɔ na bango mpe kozala na lingomba na bango moko.

Kasi na 1492, mokonzi Ferdinand II ná mwasi na ye Isabella, oyo bazalaki bandimi ya Lingomba ya Katolike, babɔtɔlaki engumba Granada, eteni ya nsuka ya sudi-wɛsti ya Mpoto oyo ezalaki naino na mabɔkɔ ya Bamizilma. Bapesaki Ba-Maure oyo bazalaki kuna bonsomi ndenge moko na oyo bapesaki Ba-Mudéjar. Kasi, eumelaki te bakonzi ya Katolike bakómaki konyokola bango mingi mpe koluka kokómisa bango bandimi na bango na makasi. Ba-Maure batɛmɛlaki likambo  yango mpo eyokanaki te na makambo oyo bayokanaki liboso, mpe na 1499 batombokaki. Basoda ya guvɛrnema basilisaki botomboki yango, kasi na nsima, bayebisaki Bamizilma ya bisika ndenge na ndenge bápona kokóma bandimi ya Katolike to kolongwa na Espagne. Bato ya Espagne bakómaki kobenga baoyo bandimaki kokóma bandimi ya Katolike mpe kotikala na Espagne Ba-Morisque.

“BAZALAKI BAKRISTO KAKA YA NKOMBO MPE BANA-MBOKA YA SEMBO TE”

Na 1526, bapekisaki losambo ya Bamizilma na Espagne mobimba, ata bongo, Ba-Morisque mingi bakobaki kosambela na kobombana. Mingi na bango babatelaki bonkɔkɔ na bango.

Atako bazalaki bandimi ya Katolike kaka na maloba, bazalaki kosala bango eloko te. Kutu, bazalaki kosala misala makasi ya mabɔkɔ mpe bazalaki kofuta mpako. Kasi, lokola baboyaki komikɔtisa mpenza na Lingomba ya Katolike, bayinaki bango, mpe bazalaki kosalela bango makambo na bosembo te ezala guvɛrnema to bato mosusu ya Espagne. Mbala mosusu likambo oyo epelisaki mɔtɔ ezali mpo eglize ekómaki kokanisela bango mabe mpo emonaki ete babongwanaki na ndenge ya solo te.

Eumelaki te, bonsomi oyo bapesaki bango elongwaki mpe bakómaki kondimisa bango na makasi. Na 1567, Mokonzi Philip II abimisaki polele mobeko oyo epekisaki monɔkɔ, bilamba, bonkɔkɔ mpe mimeseno ya Ba-Morisque. Ekateli yango ebimisaki botomboki mosusu mpe makila esopanaki mingi.

Balobaka ete Ba-Morisque soki 300 000 bakimaki Espagne mpo minyoko elekaki makasi

Bato ya istware balobi ete bakonzi ya Espagne bandimaki mpenza ete “Ba-Morisque bazalaki bakristo kaka ya nkombo mpe bana-mboka ya sembo te.” Yango wana bafundaki bango ete bazalaki koyokana na banguna ya Espagne, na ndakisa bato oyo bazalaki na nɔrdi ya Afrika, Baprotesta ya France mpe Ba-Turque mpo na kobundisa Espagne. Ndenge oyo bazalaki kokanisela Ba-Morisque mabe mpe kobanga ete bátɛka mboka esalaki ete Philip III azwa ekateli ya kobengana bango na 1609. * Na bambula oyo elandaki, bazalaki konyokola bato nyonso oyo bazalaki komonana lokola Ba-Morisque. Yango esalaki ete kaka Lingomba ya Katolike nde etikala na Espagne mobimba.

^ par. 4 Na monɔkɔ ya Espagnole Morisque elimboli “Ba-Maure ya mike.” Bato ya istware basalelaka ebengeli yango mpo na kolobela bato oyo bazalaki liboso Bamizilma mpe bakómaki bandimi ya Lingomba ya Katolike mpe bafandaki na sudi-wɛsti ya Mpoto nsima ya kokwea ya bokonzi ya nsuka ya Bamizilma na 1492.

^ par. 12 Bato ya istware bakanisi ete ata moko ya bakonzi ya Espagne azwaki matomba mingi mpenza na mabele oyo babɔtɔlaki Ba-Morisque.