Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Août 2014

 TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

William Whiston

William Whiston

William Whiston azalaki moto ya siansi, ya matematiki, mokonzi ya lingomba, mokomi moko monene, mpe moninga ya mosala ya Isaac Newton moto moko ya fiziki ya Angleterre. Na mobu 1702, akómaki kosala na esika ya Newton lokola profesɛrɛ ya matematiki na iniversite ya Cambridge, na Angleterre. Bato mosusu ya mayele mingi ya siansi mpe ya teknoloji nde bazalaki kosala na esika yango.

WHISTON ayebani mpe epai ya bayekoli ya Biblia mpo abongolaki na lingelesi makomi ya Josèphe Flavius, Moyuda moko ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso oyo azalaki moto ya istware. Makomi ya Josèphe elobeli makambo mingi oyo etali istware ya Bayuda mpe bakristo ya liboso.

MATEYA OYO WHISTON AZALAKI KONDIMA

Whiston azalaki mayele mingi mpe ayekolaki makambo mingi; mingimingi makambo ya siansi mpe ya mangomba. Azalaki kondima ete lisolo ya Biblia oyo elobeli bozalisi ezali solo mpe ete biloko oyo ezali na mokili mpe ndenge oyo ebongisamá malamu emonisi ete Nzambe nde asalá yango.

Whiston amonaki mpe ete soki mangomba ya bokristo ekabwanaki na biteni ebele, ezalaki mpo bakonzi ya mangomba batikaki mateya ya Biblia mpe balandaki mateya mpe mimeseno oyo eutaki na makita oyo Batata ya mangomba basalá.

Lokola Whiston andimaki ete Biblia nde ezali na mateya ya solo, aboyaki liteya oyo elobaka ete bato banyokwamaka na lifelo seko na seko. Azalaki komona ete likanisi yango ezali lokuta mpe ezali kofingisa Nzambe. Likambo mpenza oyo esalaki ete ayokana te na bakonzi ya lingomba ezali mpo aboyaki liteya ya Bosato oyo elobaka ete Nzambe akabwani na bapersona misato—Tata, Mwana mpe Elimo santu. Ata bongo, elobaka ete Nzambe azali kaka moko.

 “ALONGWE PROFESƐRƐ YA LOKUMU, AKÓMI MOTO MPAMBA”

Nsima ya kosala bolukiluki ya mozindo, Whiston amonaki ete bakristo ya liboso bazalaki koteya liteya ya Bosato te, kasi ekɔtaki nde ntango bapakano bakɔtisaki filozofi na lingomba ya bokristo. * Baninga na ye bakebisaki ye mpo na likama oyo ekokómela ye soki abimisi makambo amonaki na bolukiluki na ye, kasi Whiston aboyaki kobomba likambo oyo amonaki ete Yesu azali Mwana ya Nzambe mpe Nzambe nde akelaki ye.

Bazalaki kobengana moto nyonso oyo azalaki koteya makanisi oyo eyokani te na mateya ya Lingomba ya Anglican na iniversite ya Cambridge, Whiston mpe akokaki kobungisa mosala na ye. Ata bongo, akangaki monɔkɔ te lokola Newton oyo amonaki mpe ete liteya ya Bosato ete ezali lokuta, kasi aboyaki komonisa makanisi na ye. Whiston akomaki boye: “Eloko ata moko te . . . ekopekisa ngai naloba.”

Lokola akangamaki kaka na mateya na ye, Whiston “alongwaki profesɛrɛ ya lokumu mpe akómaki moto mpamba”

Na 1710, babenganaki Whiston na Cambridge. Lokola akangamaki kaka na mateya na ye, Whiston “alongwaki profesɛrɛ ya lokumu mpe akómaki moto mpamba.” Ata bongo, abangaki te. Kutu, ntango bafundaki ye ete akómi mopɛngwi, akomaki mikanda ndenge na ndenge oyo babengaki yango La renaissance du christianisme primitif; “primitif” elimboli lingomba ya bokristo ya bayekoli ya liboso ya Yesu. Na nsima, Whiston asalaki lisangá moko oyo makita na yango ezalaki kosalema na ndako na ye na Londres mpo na kolongisa mateya ya lingomba ya bokristo ya liboso.

Atako alongwaki profesɛrɛ mpe akelelaki mpo na mwa ntango, Whiston akobaki kokoma mpe kosala badiskur na bisika oyo batɛkaka kafe na Londres. Na 1737, mpo na kosalisa bato báyeba ndenge bomoi ezalaki na ntango oyo lingomba ya bokristo ebandaki, abongolaki makomi oyo Josèphe akomaki mpe abimisaki libongoli yango. Banda wana, bakómaki kobimisa yango.

Mokomi moko na nkombo James Force, alobi boye: Mpo na mpiko na ye ya kokangama na makambo oyo bato mingi bazalaki koboya, bato mingi batalelaka ye lokola “moto moko oyo makanisi na ye ekesanaki na oyo ya basusu.” Bamosusu bazwaka ye na valɛrɛ mpo azalaki moto ya mayele na makambo ya Biblia, oyo azalaki mpenza koluka koyeba solo na makambo ya Nzambe mpe azalaki na ekateli ya kosalela mateya oyo azalaki kondima.

^ par. 10 Biblia emonisi polele ndenge Nzambe azalaka. Mpo na koyeba makambo mosusu, kɔtá na site jw.org. Fungolá esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA.