Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Août 2014

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Ndenge nini bato bakoki kosilisa matata?

Ndenge nini bato bakoki kosilisa matata?

Frank ná Jerry bazalaki koyokana malamu na kartye na bango tii mokolo Jerry asalaki fɛti moko na butu makasi. * Ntango Frank ayebisaki ye ete makelele ezalaki makasi mingi, Jerry asilikaki mpe baswanaki. Na nsima, bazalaki koyokana lisusu te.

FRANK ná Jerry bakutanaki na likambo oyo ekómelaka bato mingi. Ntango bato mibale bazali na matata, mbala mingi basilikelanaka, to mpe bapesanaka foti. Soki babongisi matata yango te, boninga na bango ekoki kosila.

Mbala mosusu okutaná na likambo ya ndenge wana. Soki ezali bongo, na ntembe te esepelisaki yo te! Toboyi te, bato mingi balingaka kozala na kimya mpe koyokana malamu ná baninga mpe bato ya kartye. Kasi, ndenge nini tokoki kosala bongo ata soki na bantango mosusu mwa matata ebimaka? Tokoki kolonga makanisi mabe mpe kolimbisa baoyo bayokisi biso mpasi na motema? Tokoki kosilisa matata na kimya?

Tótalela naino likambo ya Frank ná Jerry. Soki boninga na bango ebebaki ezalaki mpo: (1) Jerry atalelaki kaka bolamu na ye moko, (2) ndenge oyo Frank alobelaki likambo yango nde esilikisaki Jerry, (3) bango mibale bapekisaki nkanda na bango te, mpe (4) moko te alingaki moninga amonela ye.

Na nsima, makanisi ya malamu ezongelaki bango. Batyaki matata na bango pembeni mpe bazongisaki kimya. Nini esalisaki bango bálonga? Basalelaki batoli mosusu oyo esalisá bato mingi mpo boninga na bango ebeba te na ntango ya mikakatano kasi ekóma nde makasi lisusu koleka.

Tokoki kokuta batoli yango na Biblia, buku oyo ekabolami mingi koleka babuku mosusu nyonso na mokili. Elendisaka biso tókóma na bizaleli lokola bososoli, boboto, bolingo mpe motema molai; bizaleli oyo etyaka kimya mpe ezipaka mpota oyo bazokisi biso na motema.Masese 14:29; 1 Bakorinti 13:4, 5.

Frank ná Jerry bazali ndakisa mibale oyo emonisi ete Biblia ezali na nguya ya kobongola mpenza bato. Ezali mpe na bandakisa mingi mosusu, ezala ya bato oyo balongaki bizaleli mabe oyo ezwaki mpenza misisa na bomoi na bango. Na ndakisa, Robert, oyo  afandaka na Australie, alongaki ezaleli ya nkanda makasi oyo azalaki na yango. Nelson, oyo afandaka na Timor oriental, atyaki pembeni koyina makasi oyo azalaki na yango mpe akómaki moninga ya motema ya moto oyo azalaki liboso monguna na ye. Ndenge nini Biblia esalisaki Robert ná Nelson? Zulunalo Lamuká! etunaki bango mituna mpo na koyeba yango.

MITUNA-LISOLO 1

ROBERT, yebisá biso mwa moke ndenge okolá.

Nakolá na libota moko ya esengo te. Na ndakisa, tata na ngai azalaki moto ya nkanda makasi mpe mbala mingi azalaki kobɛta ngai. Na bantango mosusu kutu, azalaki kotangisa ngai makila mpe nazalaki komiyeba te. Yango esalaki ete nakóma moto ya nkanda makasi mpe mobulu. Ntango nazalaki elenge, nalekisaki mbula mibale na kaa oyo esembolaka bana. Na nsima, nasalaki likambo moko ya mabe mpe batyaki ngai na bɔlɔkɔ moko epai bakɛngɛlaka bato makasi. Ntango nabimaki na bɔlɔkɔ, nakendaki kofanda na Australie, na elikya ya kobanda bomoi ya sika.

Robert akolaki na ezaleli ya nkanda mpe mobulu; kutu akɔtá mpe bɔlɔkɔ

Kofanda na Australie esalisaki yo obongola bizaleli?

Ezali mpenza te kokende kofanda kuna nde ebongolaki ngai kasi Biblia, oyo Batatoli ya Yehova bazalaki koyekola na ngai. Ata bongo, nazalaki kaka kobundana mpo na kolonga ezaleli na ngai ya nkanda mpe mbala mingi nazalaki kolɛmba nzoto mpe komimona ntina te. Na nsima, mokolo moko, nakanisaki mingi na maloba oyo ezali na Masese 19:11, oyo elobi boye: “Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye, mpe kitoko na ye ezali ete alimbisaka likambo oyo ebuki mibeko.” Lokola nazalaki na mposa makasi ya kokóma na bososoli yango, nakómaki kokanisa na makambo oyo etindaka moto amiyoka boye to boye, aloba boye to asala likambo boye. Yango esalaki ete mokemoke, nakóma komitya na esika ya basusu, nakóma motema molai mpe nálimbisaka.

Okoki kopesa ndakisa?

Mokolo moko nasilikisaki moninga moko kozanga kokana, mpe agangelaki ngai mabe mpenza na miso ya bato. Mpo na koloba solo, nayokaki nsɔni! Kasi, nakanisaki toli ya Biblia oyo elobi “bózongisela moto mabe na mabe te,” mpe nasɛngaki ye nokinoki bolimbisi. (Baroma 12:17) Ntango nkanda ya moninga na ngai ekitaki, nalukaki kosolola na ye na esika ya biso mibale mpe ayebisaki ngai ete azalaki na mikakatano na libota na ye. Tosilisaki matata na biso mpe na nsima akabelaki ngai elamba moko kitoko. Namiyokelaka mawa soki nakanisi likambo oyo elingaki kobima soki násalaka ndenge nazalaki kosala liboso ntango moto moko ayokisi ngai nsɔni.

Osalaka nini mpo osilisa mikakatano na libota?

Ngai ná mwasi na ngai tozali na mwana ya mbula 20. Ndenge moko na mabota mosusu, ekómelaka biso mpe tóyokana te na makambo mosusu. Kasi nayekoli makambo mingi na Biblia, ata mpe ntina ya koloba “limbisá ngai.” Ntango moto abimisi maloba yango na motema mobimba, ekoki kosala ete matata ebima te to esila mpe yango ekamwisaka mpenza.

 MITUNA-LISOLO 2

NELSON, ozali na esengo mpe boboto. Kasi liboso ozaláká na koyina moko makasi mpenza, boye te?

Ɛɛ! Ntango nazalaki elenge, nakɔtaki na etuluku moko ya politiki oyo ezalaki kotɛmɛla guvɛrnema. Nayinaki mpe etuluku mosusu ya politiki oyo ezalaki koluka kokonza etúká na biso. Mpo nakóma mobundi ya malamu mpenza, nayekolaki masano ya kobunda mpe na nsima nazalaki kobɛta moto nyonso oyo asilikisi ngai.

Ntango azalaki elenge, Nelson akɔtaki na etuluku moko ya politiki oyo ezalaki kotɛmɛla guvɛrnema

Nini etindaki yo obongwana?

Nakómaki koyekola Biblia mpe kosalela mateya na yango; na mateya yango, mibale nde esimbaki mpenza motema na ngai. Ya liboso elobi: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.” (Matai 7:12) Ya mibale: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39) Namonaki ete Batatoli ya Yehova oyo bazalaki koteya ngai Biblia, bazalaki komonisa bolingo ya ndenge wana, atako bazali bato ya mposo to ekólo moko te. Nalingaki kozala lokola bango. Emonani ete nalongaki mpo baninga na ngai ya kala bakamwaki ndenge nabongwanaki mpe bazalaki lisusu kobanga ngai te.

Ekómaka ete okwea lisusu na motambo yango?

Ɛɛ, kasi na miso ya bato te. Kasi na bantango mosusu nasalaka makasi mpo nasilika te na ndako. Kutu, mokolo moko nasilikaki mpe nabɛtaki mwasi na ngai, yango epesaki ngai mawa makasi na motema. Ata bongo, alimbisaki ngai na motema moko, mpe yango etindaki ngai nasala lisusu makasi mpo nasilikaka mpambampamba te.

Olobi ete bato batiká kobanga yo. Okoki kopesa biso ndakisa?

Ɛɛ. Mokolo mosusu nakutanaká na Augusto, moto moko ya lokumu ya etuluku mosusu ya bato ya politiki oyo nautaki kolobela. Na ebandeli, azalaki ekɛngɛ mpenza. Kasi napesaki ye mbote na esengo mpenza, nayebisaki ye tóbosana likambo yango, mpe nabengisaki ye na ndako. Andimaki koya epai na ngai mpe akamwaki ndenge nabongwanaki; yango wana ye mpe akómaki koyekola Biblia. Lelo oyo ngai ná Augusto tokómá baninga ya motema mpe bandimi ya lingomba moko.

 “Bózala na kimya na bato nyonso”

Matata ebimaka mpo na makambo ndenge na ndenge, mpe moto nyonso te nde akondima bósilisa matata. Kasi, Biblia epesi toli oyo: “Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso.”Baroma 12:18.

Batoli ya Biblia esalisaka mpenza ndenge tomoni epai ya bato oyo tolobeli na lisolo oyo; ezali na nguya ya kokweisa ata bizaleli mabe “oyo epikamá makasi” soki tosaleli batoli na yango. (2 Bakorinti 10:4) Mpo na batoli yango, Masese 3:17, 18 elobi boye: “Banzela na yango ezali banzela ya bisengo, mpe babalabala na yango nyonso ezali kimya. Ezali nzete ya bomoi mpo na baoyo basimbi yango, mpe baoyo bakangi yango makasi bakobengama bato ya esengo.”

Nelson ná Augusto bakómá lelo baninga ya motema

Olingi okóma moto ya esengo mpenza mpe oyo atyaka kimya? Olingi kosala boninga oyo ekobeba te ata soki matata ebimi? Soki bongo, okoyoka mawa te soki otiki Biblia etambwisa yo.

^ par. 3 Bankombo mosusu ezali ya bango te.