Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Août 2014

 BIBLIA ELOBI NINI?

Bandɔtɔ oyo Nzambe azalaki kolɔtisa bato

Bandɔtɔ oyo Nzambe azalaki kolɔtisa bato

Nzambe azalaki kosalela bandɔtɔ mpo na kosolola na bato?

‘Danyele [Mosakoli ya Nzambe] alɔtaki ndɔtɔ moko na mbeto na ye. . . . Na ntango yango, akomaki ndɔtɔ yango. Ayebisaki makambo yango nyonso.’Danyele 7:1.

OYO BIBLIA ELOBI

Nzambe apesaki bato bansango ya ntina mpenza na balolenge ekeseni. Na ntango ya kala, azalaki mbala mosusu kosalela bandɔtɔ. Kasi yango ezalaki te bandɔtɔ ezangá motó na makolo oyo tolɔtaka mokolo na mokolo. Bandɔtɔ oyo eutaki na Nzambe ezalaki polele mpe na bansango ya polele. Na ndakisa, na ndɔtɔ moko, mosakoli Danyele amonaki banyama oyo ezalaki elilingi ya biyangeli ya politiki, kobanda na boyangeli ya Babilone tii ya ntango na biso. (Danyele 7:1-3, 17) Na ndɔtɔ, Nzambe ayebisaki Yozefe moto ya Nazarete, tata-mobɔkɔli ya Yesu ete akima na Ezipito ná mwasi na ye mpe mwana na bango. Yango esalaki ete Yesu abikisama na liwa na mabɔkɔ ya mokonzi mabe Erode. Ntango Erode akufaki, Nzambe ayebisaki Yozefe likambo yango na ndɔtɔ, kaka na ntango yango ayebisaki ye azonga elongo na libota na ye na mboka na bango.Matai 2:13-15, 19-23.

 Lelo oyo Nzambe asalelaka bandɔtɔ mpo na kosolola na biso?

“Bókende mosika te koleka makambo oyo ekomamá.”1 Bakorinti 4:6.

OYO BIBLIA ELOBI

Bandɔtɔ oyo ezali na Biblia ezali mpe na kati ya bansango ya Nzambe oyo ekomamaki mpo na bato. Mpo na bansango yango, 2 Timote 3:16, 17 elobi boye: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na boyengebene, mpo moto ya Nzambe akoka mpenza, azala na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.”

Biblia esalaka ete ‘tózala na nyonso oyo esengeli’ na ndenge emonisaka makambo nyonso oyo tosengeli koyeba mpo na Nzambe, bizaleli na ye, mibeko na ye mpe esika na biso na mokano na ye mpo na mabele. Na yango, Nzambe asalelaka lisusu bandɔtɔ te mpo na kopesa bato bansango. Soki tozali na mposa ya koyeba avenire mpe mokano ya Nzambe mpo na biso, tosengeli ‘kokende mosika te koleka makambo oyo ekomamá;’ elingi koloba oyo ekomamá na Biblia. Kutu, moto nyonso akoki kozala na buku yango mpe koyekola makambo mingi oyo eutaki epai ya Nzambe, ata mpe bandɔtɔ.

Mpo na nini osengeli kondimela bandɔtɔ mpe bimonaneli oyo ezali na Biblia?

“Bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.”2 Petro 1:21.

OYO BIBLIA ELOBI

Bandɔtɔ mpe bimonaneli mingi oyo ekomamaki na Biblia ezalaki bisakweli; elingi koloba esakolaki makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Bisakweli yango esalisaka batángi báyeba soki ebongi kotyela bato oyo bakomaki yango mpe Biblia yango moko motema. Makambo oyo bakomaki ekokisamaka? Tózwa ndakisa ya esakweli oyo ezali na Danyele 8:1-7, oyo ekomamaki ntango ampire ya Babilone ekómaki na nsuka.

Esakweli yango elobelaki mpate-mobali mpe ntaba moko ya mobali; ntaba mobali ebwakaki mpate-mobali na mabele mpe enyataki yango. Ntina ezalaki te ete Danyele akanisa soki emonaneli yango elimbolaki nini. Anzelu momemi-nsango ya Nzambe alobaki na ye boye: “Mpate-mobali oyo omonaki, oyo ezali na maseke mibale, elakisi bakonzi ya Media mpe ya Perse. Mpe ntaba-mobali oyo etondi na nsuki elakisi mokonzi ya Grɛsi.” (Danyele 8:20, 21) Istware emonisi ete ampire ya Medo-Perse nde ezwaki esika ya ampire ya Babilone oyo ezalaki nguya ya mokili mobimba. Mbula soki 200 na nsima, ampire Medo-Perse ekweaki na mabɔkɔ ya Alezandre Monene mokonzi ya Grɛsi. Bisakweli nyonso ya Biblia ezalaka na bosikisiki ya ndenge wana, ata mpe bandɔtɔ oyo yango elobeli. Yango ezali komonisa ete Biblia ekesani mpenza na babuku mosusu nyonso oyo ebengamaka babuku mosantu, yango esalaka ete tótyela yango motema.