Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Août 2014

“Bótala malamumalamu bandɛkɛ”

“Bótala malamumalamu bandɛkɛ”

BANDƐKƐ ezalaka bisika nyonso na mabele, mpe ezali na kati ya bikelamu oyo ezalaka mpasi te komona yango. Longola yango, lokola ezali na bandɛkɛ ya ndenge na ndenge, ya langi ndenge na ndenge, oyo eyembaka na lolenge ekeseni mpe esalaka makambo ndenge moko te, yango ekoki kosala ete kotala bandɛkɛ esepelisa moto mpe alekisa ntango moko malamu.

Siɛsiɛ (Tisserin)

Soki otali na fenetre na yo, okoki komona makambo nyonso oyo bandɛkɛ esalaka mokolo na mokolo; na ndakisa, ndenge ndɛkɛ moko ya langi ya moindo oyo ezalaka na Mpoto etimolaka misɔpi, ndenge ndɛkɛ moko oyo elyaka banyama mikemike elukaka kokanga mwa banyama yango, ndenge ebenga ya mobali elingaka oyo ya mwasi, ndenge nyampeke (hirondele) etongaka ndako na yango, ndenge ndɛkɛ ya langi ya mosaka oyo esanganá na moindo eyembaka kitoko mpe eleisaka bana na yango.

Lokánga (Pintade)

Bandɛkɛ mosusu ekoki kokamwisa yo; na ndakisa mpongo, ndɛkɛ babengi faucons mpe kombekombe ntango epumbwaka na likoló. Bandɛkɛ mosusu ekoki kosɛkisa yo; na ndakisa ntango bakɛngɛli-mboka ezali kowela mwa eteni ya eloko ya kolya, ebenga ya mobali ezali kovimbisa nsala na yango mpo na kobenda ebenga ya mwasi oyo ezali kosala bipale,  to ebele ya bandɛkɛ babengi cacatoès rosalbins oyo ezali kodiembela likoló ya nsinga ya kura ya monene. Kotala ndenge bandɛkɛ mosusu esalaka mibembo mpo na kokende bisika mosusu na ndakisa ndɛkɛ lokola nkɔngi, ekoki kokamwisa yo. Kutu, bato babandá kotala ndenge bandɛkɛ yango esalaka mibembo banda bambula ebele mpenza, mpe baoyo batalaka bandɛkɛ yango batikalaka monɔkɔ polele mpo na likoki oyo ezalaka na yango ya kopumbwa na ntaka ya bakilomɛtrɛ ebele mpenza kozanga ebunga nzela. Kutu, Mozalisi ye moko alobaki boye: “Nkɔngi na likoló—eyebaka ntango na yango oyo etyamá; mpe epopo ná ndɛkɛ babengi martinɛ ná ndɛkɛ babengi bulubulu—etosaka malamu ntango oyo mokomoko na yango esengeli koya.”Yirimia 8:7.

Kotala bandɛkɛ na ntango ya kala

Biblia elobeli bandɛkɛ na bisika mingi, mbala mingi mpo na kopesa mateya ya ntina mingi. Na ndakisa, mpo na maligbanga (autriche) oyo ezalaka na mbangu ya koloba te, Nzambe alobaki na mobali moko na nkombo Yobo boye: “Ntango ebɛtaka mapapu na yango na likoló, esɛkaka mpunda mpe motambwisi na yango.” * (Yobo 39:13, 18) Nzambe atunaki kutu Yobo boye: “Na mayele na yo nde kombekombe ya matɔnɔmatɔnɔ epumbwaka, . . . To na etinda na yo nde mpongo epumbwaka likoló?” (Yobo 39:26, 27) Liteya nini tozwi? Bandɛkɛ esalaka makambo wana nyonso kozanga ete tósalisa yango. Likoki na yango emonisaka nde bwanya ya Nzambe kasi ya biso te.

Mokonzi Salomo akomaki mpo na “mongongo ya ebenga ya zamba,” oyo emonisaka ete eleko ya prɛnta ekómi pene. (Loyembo ya Salomo 2:12) Mokomi moko ya Nzembo alobelaki ndɛkɛ babengi nyampeke ntango akomaki na ntina ya mposa makasi oyo azalaki na yango ya kosala na tempelo ya Nzambe. Na mwa kolula, alobaki boye: ‘Ata ndɛkɛ ezwi ndako, mpe nyampeke zumbu na yango, epai etye bana na yango na etumbelo na yo monene, Ee Yehova.’Nzembo 84:1-3.

“Tata na bino ya likoló aleisaka bango. Bino boleki bango na motuya te?”Matai 6:26

Yesu Kristo mpe alobelaki bandɛkɛ na ndenge moko ya kitoko mpenza. Tózwa ndakisa ya maloba oyo ezali na Matai 6:26: “Bótala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló, mpamba te balonaka te mpe babukaka te mpe bayanganisaka te na ndako ya kobomba biloko; nzokande Tata na bino ya likoló aleisaka bango. Bino boleki bango na motuya te?” Ndakisa wana ya kitoko mpenza endimisaki bayekoli ya Yesu ete bazali na valɛrɛ mpenza na miso ya Nzambe mpe ntina ezali te ete bámitungisa mpo na kozwa biloko ya kobikela.Matai 6:31-33.

Lelo oyo, kotala bandɛkɛ ezali likambo oyo bato mingi basalaka mpo na kolekisa mwa ntango mpe ezali mabe te mpo kitoko ya bandɛkɛ, ndenge oyo esalaka ntango ezali kolinga oyo ya mwasi mpe banzembo na yango, ekamwisaka. Longola yango, bato oyo bayebi kokanisa malamu bakoki mpe kozwela yango mateya ya ntina mingi na makambo ya bomoi. ‘Okotala bandɛkɛ malamumalamu’?

^ par. 6 Maligbanga ezali ndɛkɛ oyo eumelaka mingi na bomoi koleka bandɛkɛ mosusu, mpe ekimaka mbangu ya koloba te, ekoki kokima na vitɛsi ya bakilomɛtrɛ 72 na ngonga moko.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI

Mateya oyo tokoki kozwa epai ya bandɛkɛ

Bandɛkɛ emonisaka misala ya Nzambe mpe elendisaka biso tótya miso na makambo oyo eleki ntina.