Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Juillet 2014

 MITUNA-LISOLO | WENLONG HE

Moto moko ya mayele ya fiziki alobeli kondima na ye

Moto moko ya mayele ya fiziki alobeli kondima na ye

WENLONG HE ayekolaki liboso fiziki na engumba Suzhou, etúká ya Jiangsu, na Chine. Apesaka mabɔkɔ na mosala ya kokoma zulunalo ya tekinoloji oyo eyebani mokili mobimba mpe akomá masolo mingi ya siansi oyo ebimá na mikanda. Lelo oyo, Wenlong He asalaka na iniversite ya Strathclyde na ekólo Écosse. Ntango azalaki elenge, azalaki kondima liteya ya evolisyo, kasi na nsima, amonaki ete bomoi ebimá yango moko te. Zulunalo Lamuká! etunaki ye mpo na kondima na ye.

Yebisá biso ndenge okolá.

Nabotamá na 1963 mpe nakolá na Chine, na etúká ya Jiangsu, mboka moko oyo ezali na sudi ya ebale Yangtze. Ezali esika moko ya molunge oyo ekendá nsango mpo ebimisaka bilei mingi, yango wana mbala mingi babengaka yango mokili ya loso ná mbisi. Na bomwana nazalaki komituna boye: ‘Mpo na nini mabele ebimisaka biloko mingi ya elɛngi boye? Ebimá kaka yango moko? Nsoso ná liki, nini ebimá liboso?’ Na Chine, bato mingi bandimaka te ete Nzambe azalaka, yango wana, na kelasi, bateyaki ngai liteya ya evolisyo.

Bongo bato ya libota na yo?

Baboti na ngai bazalaki kondima te ete Nzambe azalaka. Mama azalaki kosala bilanga, kasi tata azalaki motongi monene ya bandako mpe asalaki kompanyi ya kotonga bandako. Nazali mwana ya liboso na libota ya bana mitano. Likambo ya mawa, baleki na ngai mibale bakufaki na bomwana. Yango esalaki ngai mpasi mingi, mpe nazalaki komituna boye: ‘Mpo na nini bato bakufaka? Nakomona lisusu baleki na ngai?’

Mpo na nini oyekolaki siansi?

Nayekolaki fiziki mpo biloko oyo ezali na mokili ezalaki kokamwisa ngai mpe namonaki ete fiziki ekopesa biyano na mituna oyo nazalaki komituna banda bomwana.

Osalaka bolukiluki na makambo nini?

Nalukaka ndenge oyo nakoki kobakisa vitɛsi ya biloko mikemike oyo ezalaka na kati ya atɔmɛ (électron proton) mpo ekokana  mwa moke na vitɛsi ya pole. Nasalaka bongo mpo na koyeba ndenge oyo baatɔmɛ ezalaka. Nayekolaka mpe ndenge ya kobimisa kongɛnga makasi oyo ekoki kokokana na kongɛnga ya micro-onde to ya moi (rayonnement infrarouge). Atako nasalaka bolukiluki yango mpo na kozwa mbongo, kasi ezalaka mpe mpo na koyeba ndenge likoló mpe mabele ebandá.

Ndenge nini okomaki kosepela na Biblia?

Na 1998, Batatoli ya Yehova bayaki kotala ngai. Basengaki ete bálakisa ngai biyano ya mituna na ngai na Biblia. Mwasi na ngai Huabi, oyo asalaka mpe bolukiluki na makambo ya siansi, akɔtaki mpe na masolo yango. Ezalaki mbala ya liboso tómona Biblia, kasi batoli na yango ekamwisaki biso. Tomonaki ndenge kosalela batoli ya Biblia esalisaki Motatoli yango ya Yehova ná mwasi na ye. Bazalaki na esengo mpe bazalaki na bomoi ya mindɔndɔ te. Kasi oyo Biblia elobi mpo na Nzambe etindaki ngai namituna lisusu soki likoló mpe mabele ekelamaki. Lokola nazali moto ya fiziki, mosala na ngai ezalaka ya koyeba biloko oyo ezali na mokili. Yango wana, nazwaki ekateli ya kotalela likambo yango malamu.

Lokola nazali moto ya fiziki, mosala na ngai ezalaka ya koyeba biloko oyo ezali na mokili. Yango wana, nazwaki ekateli ya kotalela likambo yango malamu

Makambo nini otalelaki?

Ya liboso, nayebi ete biloko oyo ezali liboke ekoki te komibongisa malamu na ndenge na yango mpe kotikala bongo kozanga ete moto moko asala bongo. Yango nde mobeko ya mibale ya thermodynamique. Lokola likoló mpe bomoi na mabele ebongisamá malamu mpenza, namonaki ete esengeli kozala moto moko ya mayele mingi nde asalá yango; elingi koloba Mozalisi. Ya mibale, emonani lokola ete likoló ná mabele ebongisamá mpenza mpo na kobatela bomoi.

Nini omonaka oyo endimisi yo ete Mozalisi azali?

Nguya oyo moi ebimisaka ezalaka na ntina mingi mpo na bikelamu nyonso ya bomoi. Mpo ekóma tii awa na mabele, nguya yango eyaka na kongɛnga moko makasi. Eyaka ebele mpenza na mabele. Kongɛnga ya moke oyo nguya yango ebimisaka mpe oyo ekoki koboma babengi yango rayons gamma. Mpe oyo elandaka na nsima ezali rayons X, ultra-violets, pole oyo emonanaka, rayons infrarouge, micro-onde mpe oyo eleki molai ezali oyo esalaka ete radio ná televizyo ebimisa lolaka. Likambo ya kokamwa, etando na biso ekangaka nzela mpo kongɛnga ya mabe ekóma na mabele te kasi etikaka oyo ya malamu ekóma na mabele.

Mpo na nini likambo yango ekamwisaka yo?

Ndenge oyo Biblia ebandi na kolobela bozalisi mpe ndenge oyo elobeli pole, ebendaki likebi na ngai. Elobi boye: “Nzambe alobaki ete: ‘Pole ezala.’ Bongo pole ezalaki.” * Kaka mwa kongɛnga moke ya moi nde ezali pole oyo tomonaka, kasi pole ezali na ntina mpo bomoi ezala. Milona ezalaka na mposa na yango mpo ebimisa bilei, mpe tozalaka na mposa ya pole mpo na komona. Ndenge oyo etando emonanaka mpo na pole, ekoki kozala bongo na ndenge na yango moko te. Likambo ya kokamwa mingi lisusu ezali mwa kongɛnga ya mabe ya moi oyo ekómaka na mabele.

Mpo na nini yango ezali na ntina?

Mpo kongɛnga mosusu ya moi ezalaka mabe mpenza. Tozalaka na mposa na yango kaka moke na loposo na biso mpo tózwa vitamini D oyo ezalaka na ntina mpo na mikuwa mpe ebatelaka biso na kanser mpe bamaladi mosusu. Kasi, soki eleki mingi, epesaka kanser ya loposo mpe maladi oyo ebomaka miso (cataracte). Etando etikaka kaka mwa kongɛnga yango ya moke mpenza ekóma na mabele mpe yango nde ebongi mpenza. Yango endimisi ngai mpenza ete moto moko nde asalaki mabele mpo bomoi ebatelama.

Mokemoke ngai ná Huabi tokómaki kondima ete Mozalisi azali mpe Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo santu na ye. Na 2005, tokómaki Batatoli ya Yehova, mpe lelo oyo toteyaka basusu Biblia.