Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Juin 2014

 TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Joseph Priestley

Joseph Priestley

“Ndenge oyo azalaki komesana na makambo ya sika; molende, misala mpe boboto na ye; ndenge oyo azalaki koluka koyeba makambo nyonso na oyo etali biloko oyo emonanaka, bizaleli, to bato; esika na ye na makambo ya siansi, ya teoloji, ya filozofi, ya politiki; ndenge oyo apesaki mabɔkɔ na Révolution française, mpe lisolo ya mawa oyo emonisi ndenge banyokolaki ye kaka mpamba, ekoki kosala ete abima elombe ya siɛklɛ ya 18.”—Filozofe Frederic Harrison.

LIKAMBO nini ya monene Joseph Priestley asalaki? Makambo oyo amonaki mpe makomi na ye ebongolaki ndenge oyo bato batalelaka mokumba ya guvɛrnema, ndenge oyo Nzambe azalaka ata mpe mopɛpɛ oyo topemaka.

Ata na makomi na ye oyo etali siansi to lingomba, Priestley aboyaki makanisi mpe mateya ya bonkɔkɔ mpo na kolongisa solo. Tótala naino ndenge asalaki yango.

ALUKAKI SOLO NA NZELA YA SIANSI

Nsima ya kokutana na Benjamin Franklin, moto moko ya siansi ya Amerika na 1765, Joseph Priestley oyo azalaki kotalela siansi lokola mosala moko ya kolekisa ntango, abandaki koluka koyeba ndenge oyo kura esalaka. Na mbula oyo elandaki, baninga na ye ya siansi bakamwaki na makambo oyo amonaki, yango wana baponaki ye akɔta na ebongiseli ya lokumu oyo ebengami Royal Society of London.

Na nsima, Priestley amipesaki na siansi oyo babengi chimie. Eumelaki te, amonaki ete bagaze ndenge na ndenge ezalaka, ata mpe gaze babengi ammoniac mpe oxyde d’azote (gaze oyo ekómisaka moto bisɛkasɛka). Asangisaki kutu mai ná gaz carbonique mpe yango ebimisaki eau gazeuse bicarbonatée.

Na 1774, ntango azalaki kosala bolukiluki na Sudi ya Angleterre, Priestley atyaki gaze moko oyo esalaka ete babuji epela makasi lisusu na esika na yango moko. Na nsima, atyaki (60 ml) ya gaze yango na kɔpɔ ya laboratware  mpe akɔtisaki mpoko na kati. Mpoko yango etikalaki na bomoi ntango molai mbala mibale koleka ndenge elingaki kotikala na bomoi soki bátyaka yango na kɔpɔ oyo etondi na mopɛpɛ oyo topemaka! Priestley ye moko abendaki gaze yango na zolo mpe alobaki ete “ezalaki mpasi te mpo na kopema yango ata nsima ya mwa ntango.”

Joseph Priestley amonaki mpe gaze babengi oxygène. * Atako makanisi oyo apesaki na nsuka mpo na gaze yango ezalaki solo te, kasi bato mingi batalelaka likambo yango oyo amonaki lokola “mosala monene mpenza oyo asalaki na bomoi na ye.”

ALUKAKI SOLO NA NZELA YA LINGOMBA

Lokola Priestley amonaki ete makanisi ya bato nde esalaki ete solo ya siansi eyebana te, yango wana alobaki ete bonkɔkɔ mpe mateya oyo bato bandimaka nde esalaki mpe ete mateya ya solo oyo etali Nzambe eyebana te. Likambo ya kokamwa, na boumeli ya ntango molai oyo azalaki koluka boyebi ya Biblia, Priestley andimaki makanisi mosusu oyo eyokani te na oyo Biblia eteyaka mpenza. Na ndakisa, azalaki kondima te ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Aboyaki mpe liteya ya Biblia oyo elobaka ete Yesu azalaki na bomoi liboso aya na mabele.

“Soki siansi elukaka koyeba solo, boye Priestley azalaki moto ya siansi ya solosolo.”—Katherine Cullen, moto moko ya bioloji

Kasi na ngambo mosusu, Priestley amonisaki polele mateya ya lokuta ya mangomba oyo bato bazalaki kondima na ntango wana mpe oyo mangomba ya minene endimaka tii lelo. Akomaki ete solo oyo Yesu ná bayekoli na ye bateyaki ebebisamaki na nsima na mateya ya lokuta ata mpe liteya ya Bosato, ya molimo ekufaka te, mpe losambo ya bikeko, oyo Biblia eboyaka mpenza.

Makanisi oyo Priestley azalaki na yango na makambo ya Nzambe mpe ndenge oyo apesaki mabɔkɔ na Révolution française mpe Americaine esilikisaki baninga na ye ya Angleterre. Na 1791, bato ya mobulu babebisaki ndako mpe laboratware na ye, mpe nsukansuka Priestley akimaki na États-Unis. Atako bakanisaka Joseph Priestley mingimingi mpo na makambo ya sika oyo amonaki na siansi, andimaki ete koyekola makambo ya Nzambe mpe mokano na ye ezalaki “lokumu monene mpe na ntina mingi.”

^ par. 10 Liboso, Carl Scheele moto moko ya chimie ya ekólo Suède atyaki mpe oxygène na esika na yango moko na labo, kasi akomaki te makambo oyo amonaki. Na nsima, Antoine-Laurent Lavoisier moto mosusu ya chimie na France nde apesaki gaze yango nkombo oxygène.