Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Mai 2014

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Mitungisi—Oyo okoki kosala mpo elekela yo motó te

Mitungisi—Oyo okoki kosala mpo elekela yo motó te

“Nazalaki komiyoka lokola mpoko oyo ezali kokima mbangu likoló ya eloko moko oyo ezali kobalukabaluka kaka esika moko. Mbala mingi nazalaki kosala bangonga 16 na mokolo mpe ezalaki mpasi napema na wikende. Nazalaki koyoka nkanda mpo nazalaki kokuta mwana na ngai ya moke ya mwasi así alali. Mitungisi ezalaki kobɛlisa ngai.”—Kari, Finlande.

BATO mingi mpe bakutanaka na makambo lokola oyo ya Kari. Ebongiseli moko oyo esalisaka bato oyo babɛlaka maladi ya motó na Royaume-Unis elobi ete na bato 5 oyo bazalaki kosala na Angleterre, moko na bango alobaki ete mitungisi ezalaki kobɛlisa ye na boumeli ya bambula nyonso oyo azalaki kosala, mpe na bato 4 oyo bazalaki kosala, moko na bango azalaki kolela na esika ya mosala mpo na mbamba makasi oyo bazalaki kotya ye. Minganga bakómaki kokomela bato bankisi mingi ya kokitisa mitungisi koleka ndenge ezalaki liboso ntango nkita ekweaki na mbula moko oyo euti koleka.

Nini esalaki ete omitungisa?

  • Kozanga mbongo to makambo mosusu?

  • Kozala na makambo mingi ya kosala?

  • Kozanga koyokana na basusu?

  • Likambo moko ya mabe oyo okutanaki na yango?

Mitungisi yango esalaki yo nini?

  • Ebelisaki yo?

  • Elɛmbisaki yo na makanisi?

  • Esalaki ete olala malamu te?

  •   Enyokolaki yo na makanisi?

  • Ebebisaki boyokani na yo na basusu?

Mitungisi esalaka ete likoki ya kokamwa oyo nzoto na biso ezalaka na yango ya kobundisa bamikrobɛ esala mosala. Nzoto ebimisaka ba hormone mpo moto akóma kopema mbangumbangu, motema na ye ebɛta mbangumbangu, mpe tansiɔ emata. Longola yango, ebele ya baselile ya makila mpe sukali etondanaka na makila. Makambo wana nyonso esalaka ete omibongisa mpo na kolonga makambo oyo ebimiseli yo mitungisi. Ntango likambo oyo esalaki ete otungisama eleki, nzoto na yo ekoki kozonga ndenge ezalaki. Kasi soki esili te, ekoki kosala ete okoba komitungisa to mitungisi yango ekóma makasi, lokola motɛrɛ oyo etikali kaka ya kopela. Na yango, koyeba ndenge ya kosala mpo mitungisi elekela yo motó te ezali na ntina mpo nzoto mpe makanisi na yo ezala malamu.

Ndenge ya kokitisa mitungisi

Komitungisa ezalaka mpenza mabe te. Ebongiseli moko (Association Américaine de psychologie) elobi boye: “Mitungisi ezalaka lokola nsinga ya violon oyo bafini: soki bafini yango moke miziki ekoyokana malamu te mpe ekobɛta malamu te; soki bafini yango makasi koleka, miziki ekoswa na matoi to nsinga ekokatana. Soki mitungisi eleki, ekoki koboma moto, kasi soki ezali na ndenge oyo esengeli, ekoki kobakisa esengo na bomoi. Likambo ezali mpenza nde ya koyeba oyo okoki kosala mpo elekela yo motó te.”

Likambo mosusu ezali ete bizaleli mpe sante ya bato ezalaka ndenge moko te. Na yango, likambo oyo ekoki kotungisa moto moko, ekoki te kotungisa moto mosusu. Boye, okoki kotungisama mingi soki mosala na yo ya mokolo na mokolo esalaka ete ozala motema likolólikoló na boye ete ozalaka te na ntango ya kozwa mwa mopɛpɛ to kosilisa nokinoki makambo mosusu oyo eyei na mbalakaka.

Bato mosusu bamipesaka na komɛla masanga, kosalela drɔgɛ to makaya mpo na “kolonga” mitungisi oyo esilaka te. Basusu bakómaka kolya na ndenge ya mabe to kofanda ntango molai liboso ya TV to ordinatɛrɛ; mimeseno oyo ebongisaka makambo te kasi ebebisaka nde yango. Boye, ndenge nini tokoki koyeba ndenge ya kosala mpo mitungisi elekela biso motó te?

Kosalela batoli ya Biblia esalisaka bato mingi báyeba ndenge ya kosala mpo mitungisi ya bomoi elekela bango motó te. Bwanya na yango oyo esalisi bato mingi ekoki mpe kosalisa yo? Talelá motuna yango na kolanda makambo minei oyo esalaka ete bato bámitungisa.

 1 KOBANGA

Ezali na moto moko te oyo abangaka te. Ndenge Biblia emonisi yango, “makambo oyo ekanami te ekwelaka [biso] nyonso.” (Mosakoli 9:11) Ndenge nini okoki kolonga kobanga? Meká kosalela makambo oyo elandi.

  • Sololá na ndeko to moninga moko oyo otyelaka motema. Baankɛtɛ emonisi ete lisungi ya ndeko to moninga ebatelaka mpenza moto na makambo oyo mitungisi ekoki kobimisela ye. Ya solo, “moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”Masese 17:17.

  • Kotya ntango nyonso te makanisi na makambo ya mabe oyo okoki kokutana na yango. Makanisi ya ndenge wana esilisaka biso makasi. Ntango mosusu likambo oyo ozali kobanga ekosalema te! Yango wana Biblia elobi: “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko.”Matai 6:34.

  • Zwá lisalisi na nguya ya libondeli. 1 Petro 5:7 elobi ete ‘bwakelá [Nzambe] mitungisi na yo nyonso, mpo atyelaka yo likebi.’ Nzambe atyelaka biso likebi ndenge apesaka biso kimya na motema mpe alaki ete ‘akotika soki moke te’ baoyo balukaka na motema mobimba libɔndisi mpe lisungi na ye ntango bazali na mposa na yango.Baebre 13:5; Bafilipi 4:6, 7.

2 KOZALA NA MAKAMBO MINGI YA KOSALA

Kotambola mikolo nyonso banzela milai mpo na kokende mosala, kelasi to mpe kobatela bana to baboti oyo bakómi mibange ekoki kobakisela moto mitungisi. Kasi, mwaye ya kotika makambo yango mosusu ezali te. (1 Timote 5:8) Okoki kosala nini mpo olonga?

  • Bombaká ntango ya kozwa mwa mopɛpɛ mpe pemáká malamu. Biblia elobi: “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.”Mosakoli 4:6.

  • Yebá makambo ya kotya na esika ya liboso, mpe zalá na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ. (Bafilipi 1:10) Luká kokómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ, okoki kotika kosomba biloko mosusu to kotika kosala bangonga mingi.Luka 21:34, 35.

Kari, oyo tolobelaki na ebandeli, atalelaki lisusu lolenge ya bomoi na ye. Akomaki boye: “Namonaki ete nazalaki koluka kaka matomba na ngai moko.” Atɛkaki mombongo na ye mpe azwaki mosala oyo ezalaki kopesa ye ntango mingi ya kozala na ndako. Abakisi boye: “Tozalaki lisusu na mbongo mingi te ndenge ezalaki liboso, kasi ngai ná mwasi na ngai tomitungisaka lisusu mingi te, mpe tozali na ntango mingi ya kolekisa na libota mpe elongo na baninga. Nakolinga ata moke te ete mosala moko boye ezwa esika ya kimya ya motema oyo nazali na yango sikoyo.”

 3 KOZANGA KOYOKANA NA BASUSU

Kozanga koyokana na basusu, mingimingi na esika ya mosala ekoki kotungisa moto mingi mpenza. Soki ozali kokutana na makambo ya ndenge wana, mwa batoli oyo elandi ekoki kosalisa yo.

  • Soki moto asilikisi yo, fandá nyɛɛ. Kopelisa mɔtɔ te. Masese 15:1 elobi boye: “Eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ, kasi liloba oyo epesaka mpasi ematisaka nkanda.”

  • Luká kobongisa makambo na esika ya bino mibale mpe na limemya nyonso, soki osali bongo okopesa moto yango lokumu.Matai 5:23-25.

  • Meká kososola ndenge oyo azali komiyoka mpe makanisi na ye. Kosala bongo “ekitisaka nkanda [na biso]” mpo esalisaka biso tómitya na esika ya moto yango. (Masese 19:11) Ekosalisa mpe biso tómimona ndenge basusu bamonaka biso.

  • Meká kolimbisa. Kolimbisa ezalaka malamu, kasi ezali mpe nkisi moko malamu. Ndenge lapolo moko oyo ebimaki na 2001 emonisaki yango, “koboya kolimbisa” esalaka ete “tansiɔ emata mpe motema ekóma kobɛta mbangumbangu,” kasi kolimbisa ekitisaka mitungisi.Bakolose 3:13.

4 MAKAMBO YA MPASI

Nieng, oyo afandaka na Cambodge, akutanaki na makambo mingi ya mpasi mpenza. Na 1974, azokaki ntango bɔmbi ekweaki na libanda ya mpɛpɔ. Na mbula oyo elandaki, bana na ye mibale, mama na ye ná mobali na ye bakufaki. Na 2000, ndako mpe biloko na ye mosusu ezikaki na mɔtɔ, mpe mbula misato na nsima, mobali na ye ya mibale akufaki. Makambo wana nyonso epesaki ye mposa ya komiboma.

“Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi”

Ata bongo, Nieng amonaki ndenge ya kolonga mitungisi yango. Ndenge moko na Kari, ayekolaki Biblia mpe makambo oyo ayekolaki esalisaki ye mpenza, yango wana ye mpe amipesaki na kosalisa basusu bázwa mpe matomba oyo ye azwi. Lisolo na ye etindi biso tókanisa baankɛtɛ moko oyo bato ya mayele ya Grande-Bretagne basalaki na 2008. Bamonaki ete mpo moto akóma “kolonga mitungisi, esengeli akabelaka basusu . . . na lolenge moko to mosusu”—toli oyo Biblia elobelá yango banda kala.Misala 20:35.

Longola yango, Nieng azwaki elikya moko kitoko mpo na mikolo ezali koya, oyo emonisi ete makambo nyonso oyo ezali konyokola bato ekosila. Kutu, “kimya ekokóma mingi” na mokili mobimba.Nzembo 72:7, 8.

Elikya ya solosolo mpe bwanya mpo na kolonga mitungisi mingi ya bomoi ezali na valɛrɛ mingi mpenza, mpe tokoki kozwa yango na Biblia. Bato mingi bazwi matomba na buku yango oyo ekokani ata na buku mosusu te. Yo mpe okoki kozwa matomba yango.