Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Mai 2014

Koluka bandɔki na Mpoto

Koluka bandɔki na Mpoto

E LEKI sikoyo mwa basiɛklɛ, kobanga bandɔki etindaki bato ya Mpoto bábanda koluka bandɔki mpo na koboma bango. Yango esalemaki mingi na France, Allemagne, nɔrdi ya Italie, Suisse, Belgique, Luxembourg, mpe na Pays-Bas. Buku moko (Witch Hunts in the Western World *) elobi boye: “Ebele ya bato na Mpoto mpe na bikólo oyo Mpoto ezalaki koyangela bakufaki mpe bamilio mosusu banyokolaki bango, bakangaki bango mpe bazalaki kotunatuna bango mituna, koyina bango, bakómaki komona lokola bamemi ngambo mpe bakómaki kobanga.” Likambo yango ebandaki ndenge nini? Nini ebimisaki yango?

Tribinale ya Lingomba ya Katolike mpe buku babengi Marteau des sorciers

Likambo ya mabe koleka na lisolo yango ezalaki tribinale ya Lingomba ya Katolike. Buku Der Hexenwahn (The Witch Mania) elobi ete eglize ya katolike ya Roma nde esalaki tribinale yango na siɛklɛ ya 13 “mpo na kokómisa bapɛngwi bandimi na makasi mpe mpo basusu bálanda nzela yango te.” Tribinale yango ezalaki kosala mosala lokola oyo ya bapolisi mpo na lingomba.

Na mokolo ya 05/12/1484, Papa Innocent VIII abimisaki mokanda moko oyo epekisaki bondɔki. Apesaki mpe bazuzi mibale ya tribinale yango; elingi koloba Jakob Sprenger mpe Heinrich Kramer (oyo ayebanaki mpe na nkombo Henricus Institoris na Latin) mokumba ya kosilisa likambo yango. Mibali yango mibale babimisaki buku (Malleus Maleficarum elingi koloba Marteau des sorciers). Bakatolike mpe Baprotesta bazalaki kosalela buku yango mpo na koyeba bandɔki mpe koboma bango. Buku yango ezalaki na masapo mpamba oyo etali bondɔki oyo eutaki na bonkɔkɔ, oyo emonisaki makanisi ya teoloji mpe ya Leta oyo ezalaki kotɛmɛla bondɔki, mpe emonisaki ndenge ya koyeba bandɔki mpe koboma bango. Marteau des sorciers ebengamaki buku “ya nsɔmɔ mpenza mpe . . . ya mabe koleka babuku nyonso oyo bato babimisá.”

Marteau des sorciers ebengamaki buku “ya nsɔmɔ mpenza mpe . . .  ya mabe koleka babuku nyonso oyo bato babimisá”

 Kofunda bandɔki ezalaki kosɛnga te ete ozala na likambo oyo emonisi mpenza ete moto yango azali ndɔki. Buku Hexen und Hexenprozesse (Bandɔki mpe kosambisa bandɔki) elobaki ete bazalaki kosambisa kaka mpo “na kotya moto mbamba mpe kondimisa ye na makasi ete azali ndɔki.” Mbala mingi bazalaki konyokola bango.

Mpo na kosalela makambo oyo ezalaki na buku yango mpe na mokanda oyo Papa Innocent VIII abimisaki, likambo ya koluka bandɔki mpo na koboma bango ebandaki na Mpoto. Longola yango, na nzela ya teknoloji ya sika, konyata mikanda esalisaki mpo likambo yango ekatisa Atlantique mpe ekóma tii na Amerika.

Banani bazalaki kofundama?

Bato mingi oyo bazalaki kofundama (70%) ezalaki basi, mingimingi oyo mibali bakufá, oyo mbala mingi bazalaki na moto ya kokɔtela bango te. Bazalaki mpe kofunda babola, mibange mpe basi oyo bazalaki kosalisa bato na bankisi ya bonkɔkɔ; mingimingi soki bankisi yango ebikisi moto te. Moto nyonso azalaki kaka na likama, ezala mozwi to mobola, mwasi to mobali, moto ya lokumu to moto mpamba.

Bato oyo bazalaki kobenga bango bandɔki bazalaki kopesa bango foti mpo na likambo nyonso ya mabe. Zulunalo moko (Damals) elobi ete bazalaki koloba ete bandɔki nde “bazalaki kosala ete malili ezala makasi mpe kotinda ebele ya mbɛmbɛ mpe mbinzo mpo na kobebisa milona mpe bambuma na mabele.” Soki mbula ya mabanga ebebisi milona, ngɔmbɛ ebimisi miliki te, mobali azali na makasi ya kobotisa mwasi te to mwasi azali kobota te, bazalaki koloba ete bandɔki nde basali bongo!

Bazalaki komeka bandɔki na kilo, mpo bazalaki kokanisa ete bandɔki bazalaka na kilo mingi te to bazalaka na yango te

Ndenge nini bazalaki koyeba bandɔki? Bato mosusu oyo bazalaki kobenga bango bandɔki, bazalaki kokanga bango nsinga mpe kokɔtisa bango na mai “mosantu” ya malili. Soki bazindi na mai yango, bazalaki koloba ete bazali bandɔki te mpe bazalaki kobimisa bango. Soki batikali likoló ya mai, bazalaki koloba ete bazali bandɔki mpe bazalaki koboma bango mbala moko to komema bango na tribinale. Bazalaki komeka bato mosusu oyo bazalaki kokanisa ete bazali bandɔki na kilo mpo bazalaki kokanisa ete bandɔki bazalaka na kilo mingi te to bazalaka na yango te.

Buku moko (Witch Hunts in the Western World) elobi ete mpo na koyeba bandɔki bazalaki mpe kotala “elembo ya zabolo,” oyo ezalaki elembo mpenza oyo ezalaki komonisa boyokani oyo moto yango azali na yango ná zabolo. Bakonzi ya Leta bazalaki “kokata moto nsuki nyonso mpe kotalatala esika nyonso ya nzoto” mpo na koluka elembo yango na miso ya bato nyonso! Na nsima, bazalaki kotya ntonga na elembo nyonso oyo bamoni, na ndakisa na butɔ to elembo mosusu nyonso oyo ezali na nzoto ata oyo ya kobotama. Soki esali mpasi te to ebimisi makila te, bazalaki kotalela yango lokola elembo ya Satana.

Guvɛrnema ya Bakatolike mpe ya Baprotesta elendisaki likambo ya koluka bandɔki mpo na koboma bango, mpe na bitúká mosusu, bakonzi oyo bazalaki Baprotesta bazalaki kolandela likambo yango mpenza koleka Bakatolike. Nsima ya bambula, bamonaki ete likambo yango ezali lisusu na ntina te. Na ndakisa na 1631, Friedrich Spee, sango moko ya Lingomba ya Katolike oyo amemaki ebele ya bato oyo bafundaki bango ete bazali bandɔki mpo na kokakisa bango na nzete mpe kotumba bango na bomoi, akomaki ete mpo na ye bato yango babomamaki kaka mpamba. Apesaki likebisi ete soki bapekisi likambo yango te, mokili ekotikala mpamba! Na ntango wana, minganga bakómaki koyeba ete makambo lokola maladi ya ndɛkɛ ezali nde likambo ya sante kasi te ya bademo. Na boumeli ya siɛklɛ ya 17, motángo ya bato oyo bazalaki kosambisa mpo na likambo yango ekitaki, mpe na nsuka ya siɛklɛ yango batikaki mpenza likambo yango.

Likambo wana ya nsɔmɔ eteyi biso nini? Liteya moko ya ntina mingi ezali oyo: Ntango bato oyo bazalaki komibenga bakristo bakómaki kosangisa mateya ya lokuta mpe biyambayamba ná mateya ya solo ya Yesu Kristo, bapesaki nzela na makambo ya mabe koleka. Biblia esakolaki ete bato ya ndenge wana oyo bazangi bosembo bakofingisa lingomba ya solo ya bokristo; elobaki boye: “Nzela ya solo ekofingama.”2 Petro 2:1, 2.

^ par. 2 Amerika ezalaki mpe na kati ya bikólo oyo Mpoto ezalaki koyangela.