Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Avril 2014

 MITUNA-LISOLO | FRÉDÉRIC DUMOULIN

“Nandimi mpenza ete Mozalisi azali”

“Nandimi mpenza ete Mozalisi azali”

Frédéric Dumoulin alekisaki bambula koleka zomi na iniversite ya engumba Ghent na Belgique mpo na kosala bolukiluki na makambo etali kosala bankisi ya monganga. Liboso azalaki kondima te ete Nzambe azalaka. Kasi na nsima, akómaki kondima ete Nzambe akelá bomoi. Zulunalo Lamuká! etunaki Frédéric oyo azali lelo Motatoli ya Yehova mituna mpo na mosala oyo asalaka mpe kondima na ye.

Lingomba esalaki likambo moko na bomoi na yo ntango ozalaki naino mwana?

Ɛɛ. Mama azalaki mondimi ya Lingomba ya Katolike. Kasi ntango natángaki makambo etali bitumba oyo mangomba ya bokristo ebundá mpe makambo mabe oyo yango esalá, nayinaki makambo na yango mpe nazalaki kokipe yango lisusu te. Natángaki mpe makambo ya mangomba mosusu mpe namonaki ete ezalaki mpe mabe. Ntango nakómaki na mbula 14, namonaki ete lokola kanyaka etondi mingi na mangomba, yango emonisi ete Nzambe azalaka te. Yango wana, ntango bateyaki ngai liteya ya evolisyo na kelasi, nandimaki ete bomoi ebimá kaka yango moko.

Ndenge nini okómaki kosepela na siansi?

Bapesaki ngai mikroskope moko ntango nazalaki na mbula nsambo mpe ekómaki eloko ya kosakana oyo nazalaki kolinga mingi. Nazalaki mpe kosalela yango mpo na kotalatala banyama mikemike, lokola lipekapeka.

Nini etindaki yo oluka koyeba ndenge bomoi ebandá?

Ntango nazalaki na mbula 22, nakutanaki na moto moko ya siansi oyo azalaki Motatoli ya Yehova. Azalaki kondima ete Nzambe nde akelá bomoi. Ezalaki likambo ya kokamwa mpo na ngai. Nakanisaki ete nakolakisa ye makambo oyo emonisi ete kondima na ye ezangi motó na makolo. Kasi likambo ya kokamwa, apesaki mpenza biyano oyo ebongi na mituna na ngai. Nakómaki koluka koyeba bato oyo bandimelaka Nzambe.

Mwa basanza na nsima, nakutanaki na Motatoli mosusu ya Yehova oyo ayebaki makambo mingi ya monganga. Ntango alobaki ete alakisa ngai makambo oyo andimaka, nandimaki mpo nazalaki koluka koyeba mpo na nini bato bandimelaka Nzambe. Nazalaki na mposa ya kosalisa ye atika makanisi wana ya libunga.

 Ondimisaki ye ete azalaki na libunga?

Te. Nakómaki kosala bolukiluki mpo na koyeba ndenge bomoi ebandá. Likambo ya kokamwa, namonaki ete bato mosusu ya siansi oyo bayebani mingi balobi ete ata mwa selile ya mpamba ezali na makambo ndenge na ndenge na boye ete ekokaki te kouta awa na mabele. Bato mosusu yango ya siansi bakanisaka ete baselile yango eutá nde na mapata. Bazali na makanisi ekeseni mpo na ndenge oyo bomoi ebandá.

Ezali na likambo oyo eyokanisaka bango?

Likambo ya kokamwa, bato mingi ya siansi bandimaka ete na lolenge moko to mosusu, eloko moko oyo ezangá bomoi esalaki ete bomoi ebima kaka na ndenge na yango moko. Nakómaki komituna, ‘soki bayebi te ndenge oyo bomoi ekoki kobima kozanga ete Mozalisi asala yango, nini endimisi bango ete ebimá na ndenge oyo bazali kokanisa?’ Nakómaki kotala oyo Biblia elobaka mpo na ndenge oyo bomoi ebandá.

Na nsima ndenge nini okómaki kotalela Biblia?

Ntango nazalaki kokoba koyekola Biblia, nakómaki kondima lisusu ete elobaka solo. Na ndakisa, kaka kala mingi te nde bato ya siansi bamonaki makambo oyo endimisi bango ete molɔ́ngɔ́ ezali na ebandeli. Nzokande mokanda ya liboso ya Biblia oyo ekomamaki eleki sikoyo bambula soki 3 500, elobi boye: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.” * Namonaki mpe ete ntango Biblia elobelaka makambo ya siansi, elobelaka yango ndenge ezali mpenza.

Namonaki mpe ete ntango Biblia elobelaka makambo ya siansi, elobelaka yango ndenge ezali mpenza

Boyebi na yo ya siansi esalaka ete ezala mpasi ondimela Nzambe?

Te. Ntango nakómaki kondimela Nzambe mpo na mbala ya liboso, nazalaki mpe koyekola makambo ya siansi na iniversite mbula misato mobimba. Tii lelo, ntango nakobaka koyekola ndenge bikelamu ya bomoi esalemá, nakómaka kondima lisusu ete Mozalisi azali.

Okoki kopesa biso ndakisa?

Ɛɛ. Nayekolaki ndenge oyo bankisi mpe bapwazɔ esalaka epai ya bikelamu ya bomoi. Likambo ekamwisaki ngai ezali ndenge oyo bɔɔngɔ na biso ebatelamaka na biloko mabe mpe bamikrobɛ. Ezali na eloko moko oyo epekisaka makila na biso ekɔta na baselile ya bɔɔngɔ.

Yango ekamwisi yo na nini?

Eleki sikoyo mbula koleka nkama, bato ya siansi bamonaki ete biloko oyo ekɔtaka na makila ekendaka na binama nyonso ya nzoto; longolá kaka bɔɔngɔ mpe mokuwa ya mokɔngɔ. Likambo yango ekamwisaka ngai, mpo makila elekaka na ebele ya misisa ya mikemike mpo na kokóma na selile nyonso ya bɔɔngɔ. Makila yango epɛtolaka, eleisaka mpe epesaka baselile nyonso ya bɔɔngɔ mopɛpɛ. Boye, ndenge nini makila na biso ekoki te kokɔta na baselile na biso ya bɔɔngɔ? Likambo yango ezalaki libombami na boumeli ya bambula mingi.

Ndenge nini likambo yango esalemaka?

Misisa oyo elekisaka makila na nzoto, oyo batalaka yango kaka na mikroskope ezali te lokola batiyo ya plastiki oyo esalaka ete biloko oyo ezali libanda na yango ekabolama na oyo ezali na kati na yango. Nzela oyo elekisaka makila na misisa esalemi na baselile. Baselile yango esalaka ete biloko mosusu mpe bamikrobɛ eleka na katikati na yango. Nzokande, baselile oyo esali misisa oyo elekisaka makila na bɔɔngɔ na biso ekeseni mpenza. Ekangamakangamá moko nsima ya mosusu. Baselile yango mpe ndenge oyo ekangamakangamá ekamwisaka mpenza. Ebele ya makambo ndenge na ndenge esalemaka mpo biloko lokola mopɛpɛ ya malamu to oxygène, gaz carbonique mpe sukali eleka na makila tii ekóma na bɔɔngo na ndenge moko ya malamu. Kasi biloko mosusu, baproteini, mpe baselile etikalaka libanda. Na yango, eloko oyo epekisaka makila eleka na bɔɔngɔ esalemaka na bamolekile oyo ebimisaka biloko oyo epekisaka makila eleka na bɔɔngɔ. Mpo na ngai likambo ya ndenge wana, ekokaki kobima kaka yango moko te.