Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Février 2014

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Makambo oyo ezali koleka na mokili

États-Unis

Zulunalo moko (New York Times) elobi boye: “Bato oyo bazali na kompanyi na bango moko babakisaka mbongo dolare 5 816 na mbula mpo na mosali moko oyo amɛlaka likaya; mbongo oyo babimisaka te mpo na mosali oyo amɛlaka likaya te. Bato ya mayele oyo basalaki bolukiluki na iniversite ya Ohio bamonisi ete mbongo yango ebimaka mpo basali yango bazwaka bopemi mpo na komɛla likaya, mpo babɛlaka mingi, mpe mpo bazangisaka mosala. Likambo mosusu ezali ete basalaka mosala malamu te mpo bakómaka baombo ya nicotine, pwazɔ oyo ezalaka na kati ya likaya.

Italie

“Lokola bapastɛrɛ mpe bandimi basalelaka te makambo oyo balobaka, yango ezali kobebisa lokumu ya mangomba.”—Pápa François.

Malaisie

Bakonzi ya Leta ya Malaisie bamonaki tɔni 24 ya mpɛmbɛ ya nzoku—mpɛmbɛ ya banzoku koleka 1 000—oyo babombaki na kɛsi mibale oyo basalá na nzete ya acajou. Bato oyo babatelaka biloko lokola zamba, mai mpe mopɛpɛ balobaki ete ezalaki mbala ya liboso bákanga mpɛmbɛ ya nzoku ebele ndenge wana. Biloko yango eutaki na Togo mpe ezalaki kokende Chine.

Afrika

Na 2012, lapolo ya Ebongiseli moko ya ONU oyo etalelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) emonisaki ete ebele ya bato (63%) bakufaka na bamaladi oyo moto moko akoki kopesa moto mosusu, na ndakisa sida, pulupulu, maladi ya ntolo (tuberculose), ata mpe malaria to bamaladi ya bana.

Australie

Bana mingi bakómi kosalela baprogramɛ ya batelefone mpe baaparɛyi mosusu oyo esalemi mpo na kobɛta masano ya mbongo. Baprogramɛ mosusu emekolaka mpenza masano oyo ebɛtamaka na bandako ya masano, kasi ezalaka mpasi te mpo na kolonga. Lapolo moko ya guvɛrnema elobi ete baprogramɛ yango ekoki kotinda bana bámona ete masano yango ezali mabe te “mpe ekoki kotinda bango bámipesa na kobɛta masano yango na mikolo ezali koya.”