Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Poná monɔkɔ Lingala

 MITUNA-LISOLO | HANS KRISTIAN KOTLAR

Moto moko ya siansi oyo babengi biotechnologie alobeli kondima na ye

Moto moko ya siansi oyo babengi biotechnologie alobeli kondima na ye

Na 1978, mosala ya liboso oyo doktɛrɛ Hans Kristian Kotlar asalaki na bolukiluki na ye na makambo ya siansi ezalaki na lopitalo ya Norvège epai basalisaka maladi ya kanser, epai ayekolaki maladi ya kanser mpe likoki oyo nzoto ya moto ezalaka na yango ya kobundisa bamikrobɛ. Na ntango wana, akómaki mpe koluka koyeba soki bomoi ebandá ndenge nini. Zulunalo Lamuká! etunaki ye mituna mpo na bolukiluki oyo asalaki mpe mateya ya Nzambe oyo andimaka.

Nini etindaki yo oluka koyeba ndenge bomoi ebandá mpe ntina ya bomoi?

Tata na ngai azalaki mondimi ya Lingomba ya Katolike mpe mama mondimi ya Protesta. Na yango, bazalaki komona mpenza te ntina ya lingomba. Ntango nazalaki naino elenge, nazalaki komituna soki ntina ya bomoi ezali nini, mpe natángaki babuku ya lingomba ya Bouddha, Hindu mpe Mizilma. Nasɛngaki kutu Nzambe alakisaka ngai solo.

Na bambula ya 1970, bato ya bioloji oyo bazalaki koyekola biloko mikemike oyo ezalaka na kati ya baselile (molécule), bakendaki mpenza mosika na bolukiluki na bango, mpe namitunaki soki yango ekoki kosalisa mpo na koyeba ndenge bomoi ebandaki. Makambo oyo esalemaka na kati ya baselile ekamwisaki ngai, yango wana nalukaki koyekola siansi oyo babengi biotechnologie. Longola yango, mingi ya balakisi na ngai bazalaki koloba ete bomoi ebimá kaka yango moko, mpe nandimelaki bango.

Mpo na nini okómaki kosepela na Biblia?

Batatoli mibale ya Yehova bayaki na ndako na biso. Atako bazalaki boboto, nalobelaki bango mabe mpe nayebisaki bango ete nasepelaka na bango te. Mwasi na ngai ayokaki ndenge nalobaki na bango. Alobaki na ngai boye: “Hans Kristian, osali mabe. Olukaka ntango nyonso koyeba ntina ya bomoi.” Alobaki solo, mpe nayokaki nsɔni. Yango wana, nakimaki mbangu mpe nabengaki Batatoli yango. Ntango tozalaki kosolola, nayebisaki bango ete nazalaki na mposa ya koyeba soki Biblia eyokani na siansi.

Balobaki nini mpo na likambo yango?

Balakisaki ngai oyo Biblia elobi mpo na esika nguya oyo tomonaka na molɔ́ngɔ́ eutaka. Vɛrsɛ oyo batángaki elobi boye: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona. Nani azalisaki biloko oyo nyonso? . . . Mpo na makasi mingi oyo azali na yango, mpo azali na makasi na kati ya nguya, ata moko te kati na yango ezali kozanga.” * Maloba yango  esimbaki motema na ngai. Longola yango, lokola makambo etambolaka na mobulu te na kati ya molɔ́ngɔ́, ebongi mpenza tóloba ete ezali na moto moko ya mayele oyo azali na nguya mingi nde atambwisaka yango.

Obongoli makanisi na yo mpo na liteya ya evolisyo?

Mokemoke nakómaki komona ete ezalaki mpenza te na makambo ya siansi oyo endimisi mateya ndenge na ndenge ya evolisyo. Kutu, ezalaka mpenza nde masolo oyo bato bango moko babimisá mpo na kolimbola ndenge oyo biloko mikemike oyo ezalaka na kati ya baselile, na ndakisa oyo ebundisaka bamikrobɛ na nzoto na biso ebimá kaka yango moko boye. Ntango nazalaki koyekola ndenge oyo nzoto na biso ebundisaka bamikrobe, nakómaki komona lisusu ete esalemaka na ndenge ya kokamwa mpe oyo ebongi. Na yango, bolukiluki na ngai etindaki ngai naloba ete Mozalisi moko ya mayele nde akelá bomoi.

Bolukiluki na ngai etindaki ngai naloba ete Mozalisi moko ya mayele nde akelá bomoi

Okoki koyebisa biso mwa makambo oyo emonisi ete bomoi ebimá yango moko te?

Makambo ndenge na ndenge ya kokamwa esalemaka na kati ya baselile na biso mpe ebongisamá mpo na kobundela nzoto na biso na bamikrobe ndenge na ndenge, ata mpe ba-bactérie ná bavirisi. Makambo yango oyo esalemaka na kati ya baselile, ebundelaka nzoto na biso na lolenge mibale. Ya liboso ebundisaka bamikrobe oyo ekɔti na nzoto na boumeli ya mwa bangonga. Ya mibale ezwaka mikolo mingi liboso ya kobundisa bamikrobe oyo eyebani malamu, mpe elongaka mpenza kobundisa mikrobe yango. Oyo ya mibale ebosanaka makambo te, na yango ata soki mikrobe moko boye ezongi lisusu na nzoto nsima ya bambula, ekobundisa yango nokinoki. Makambo yango oyo esalemaka na kati ya baselile esalaka mosala malamu na boye ete mbala mingi toyebaka kutu te ete mikrobe ekɔti na nzoto na biso mpe ndenge oyo yango ebundisi mikrobe yango. Likambo mosusu ya kokamwa ezali ndenge oyo nzoto na biso ekesenisaka bamikrobe mpe bankama ya baselile oyo ezalaka na nzoto na biso.

Yebisá biso, nini esalemaka ntango mikrobe ekɔti na nzoto na biso?

Mikrobe ekɔtaka na mopɛpɛ oyo topemaka, na bilei na biso, na nzoto na biso ya mibali to ya basi to mpe na loposo na biso kozanga ete tóyeba . Ntango nzoto na biso emoni ete bamikrobe ekɔti, esalaka ete ebele ya baproteini oyo yango eponi ebanda kobundisa bamikrobe yango. Mokomoko ya baproteini yango ebakiselaka oyo eyei nsima na yango makasi mpo na kobundisa lisusu bamikrobe. Yango ekamwisaka mpenza!

Boye, tokoki koloba ete boyebi na yo ya siansi ekómisaki kondima na yo makasi epai ya Nzambe?

Ezali mpenza bongo! Nguya oyo nzoto na biso ezalaka na yango ya kobundisa mikrobe na ndenge ya kokamwa emonisi ete ezali na Mozalisi moko ya bwanya mpe ya bolingo. Nakoki kobakisa ete siansi mpe esali ete nandimela lisusu Biblia makasi. Na ndakisa, Masese 17:22 elobi ete “motema oyo ezali na esengo esalaka malamu lokola eloko oyo ebikisaka.” Bato ya mayele bamoni ete makanisi na biso ekoki kosala ete nzoto na biso ezala makasi to te. Na ndakisa, kotungisama na makanisi ekoki kolɛmbisa likoki oyo nzoto na biso ezalaka na yango ya kobundisa mikrobe.

Mpo na nini baninga na yo mingi ya mosala bandimaka te ete Nzambe azali?

Bantina ezali mingi. Bamosusu, lokola ndenge nazalaki, bandimaka kaka makambo oyo bateyá bango. Mbala mosusu bakanisaka ete ezali na makambo ya siansi oyo endimisi mpenza liteya ya evolisyo. Bamosusu balukaka mpenza koyeba te ndenge oyo bomoi ebandá. Ezali mawa! Nakanisi, ebongaki bátuna mituna mingi.

Mpo na nini okómaki Motatoli ya Yehova?

Ezaleli na bango ya koyamba bapaya mpe kondima na bango na elaka oyo Mozalisi apesi mpo na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya, nde ebendaki ngai. * Mpe kondima yango euti na bolukiluki mpe makanisi oyo ebongi, kasi te na masapo to makanisi mpamba. *