Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Janvier 2014

Ntango mwasi atiki komona sanza

Ntango mwasi atiki komona sanza

“Nayokaki mawa makasi oyo nayebaki ntina na yango te. Nalelaki mpe namitunaki soki nabandi ligboma te.”—Rondro, * azali na mbula 50.

“Olamuki na ntɔngɔ mpe omoni ete biloko na ndako na yo ekómi mobulumobulu. Ozali komona biloko na yo moko te. Makambo oyo ozalaki kosala banda kala na pɛtɛɛ nyonso ekómi sikoyo mpasi, mpe ozali koyeba te mpo na nini.”—Hanta, azali na mbula 55.

BASI oyo bazalaki kobɛla te. Bakómaki nde pene ya kotika komona sanza; mbongwana oyo ekɔtaka na bomoi ya mwasi nyonso mpe yango esalaka ete abota lisusu te. Soki ozali mwasi, okómi pene ya kotika komona sanza? Ozali na eleko yango? Ezala bongo to te, soki yo ná bato ya libota na yo boyebi malamu mikakatano oyo eyaka na eleko yango, bokoyeba mpenza ndenge ya kosala mpo na kolonga yango.

Ntango mwasi alingi kotika komona sanza

Eleko yango, oyo babengaka na Français périménopause (liboso mwasi atika komona sanza), ezali eleko oyo ememaka mwasi tii na kotika komona sanza. * Kasi, bato mingi balobaka ete eleko yango ezali kaka kotika komona sanza.

Basi mingi bakutanaka na likambo yango soki bakómi na mbula koleka 40, kasi epai ya basi mosusu eyaka na retare, ntango bakómi na mbula koleka 60. Mbala mingi, na eleko yango, mwasi atikaka komona sanza malɛmbɛmalɛmbɛ. Lokola nzoto na ye ebimisaka lisusu ba-hormone te ndenge ezalaki liboso, mwasi akoki kolekisa basanza mosusu kozanga ete amona makila, komona makila na ntango oyo esengeli te to komona makila ntango molai koleka ndenge ezalaki liboso. Basi mingi te nde batikaka komona sanza na mbalakaka.

Buku moko (Menopause Guidebook) elobi boye: “Mwasi na mwasi akutanaka na mikakatano na ye ntango atiki komona sanza.” Ebakisi boye: “Na eleko yango, basi mingi bayokaka nzoto mɔtɔmɔtɔ,” oyo na nsima ekoki kosala ete bálɛnga na malili. Yango ekoki kokata bango mpɔngi mpe kosilisa bango makasi. Yango eumelaka ntango boni? Buku yango ebakisi  boye: “Basi mosusu bayokaka nzoto mɔtɔmɔtɔ na boumeli ya mbula moko to mibale liboso bátika komona sanza. Basusu banyokwamaka bambula mingi, mpe na bantango mosusu kaka basi moke nde bakobaka koyoka nzoto mɔtɔmɔtɔ bomoi na bango mobimba.” *

Lokola nzoto ya mwasi ebimisaka lisusu ba-hormone te ndenge ezalaki liboso, akoki kotungisama na makanisi, kozala lisusu ndenge azalaka te, mpe yango ekoki kosala ete akóma mawamawa mpe akoka lisusu te kotya makanisi esika moko to mpe akóma kobosana makambo. Buku (The Menopause Book) elobi boye: “Ezali mpasi mwasi nyonso akutana na makambo wana nyonso.” Ata bongo, basi mosusu bakutanaka na mwa ndambo ya makambo yango to mpe te.

Ndenge ya kolonga

Kotika mwa moke bomoi ya mindɔndɔ ekoki kokitisa mikakatano mosusu. Na ndakisa, mbala mosusu bamɛli-makaya bakoyoka nzoto mɔtɔmɔtɔ mingi te soki batiki makaya. Basi mingi mpe bayokaka malamu soki batiki komɛla masanga, kafe, mpe batiki kotya na bilei na bango biloko mikemike oyo epesaka bilei nsolo kitoko, batiki kolya biloko ya sukali mingi, mpo yango ekoki kobakisa mɔtɔ na nzoto. Ya solo, esengeli kolyaka malamu, elingi koloba kolyaka biloko ndenge na ndenge kozanga kolekisa ndelo.

Kosalaka ngalasisi ekoki mpe kosalisa mwasi ayokaka nzoto mɔtɔmɔtɔ mingi te. Na ndakisa, ekoki kosala ete akóma kolala malamu, azongela esengo na ye, mpe mikuwa mpe nzoto na ye mobima ekóma makasi. *

Lobá makambo polele

Rondro, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Ezali na ntina te ofanda na mpasi na motema. Soki olobi yango polele epai ya bandeko na yo, bakomitungisa mingi te ntango bakomona makambo oyo ezali kokómela yo.” Kutu, bakokóma lisusu motema molai mpe bakomitya na esika na yo. Biblia elobi boye: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto.”1 Bakorinti 13:4.

Libondeli mpe esalisaka basi mingi, ata baoyo bazali na mawa mpo batiki kobota. Biblia elobi boye: “[Nzambe] abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi [to mpasi] na biso nyonso.” (2 Bakorinti 1:4) Lisusu koyeba ete mikakatano oyo eyaka ntango mwasi atika komona sanza ezali kaka mpo na mwa ntango, ebɔndisaka. Na nsima, basi oyo bakobaka kokipe nzoto na bango malamu bakoki kozongela makasi na bango mpe kozala na bomoi ya malamu bambula mingi lisusu.

^ par. 2 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 6 Minganga balobaka ete mwasi akómaka na eleko yango soki atiki komona makila na boumeli ya sanza 12.

^ par. 8 Bamaladi mosusu, ata mpe maladi oyo ebebisaka eloko moko oyo ezalaka na nkingo oyo babengi thyroïde, bamikrobɛ mpe bankisi mosusu ekoki mpe kokómisa nzoto mɔtɔmɔtɔ. Ekozala malamu kotalela makambo yango liboso ya koloba ete mwasi oyo azali koyoka nzoto mɔtɔmɔtɔ alingi atika komona sanza.

^ par. 12 Mpo na kosalisa basi bálonga mikakatano oyo eyaka ntango balingi kotika komona sanza, minganga bakoki kokomela bango bankisi ndenge na ndenge, na ndakisa ba-hormone, bavitamini mpe bankisi oyo esalisaka maladi ya makanisi. Zulunalo Lamuká! etindi moto te asalela nkisi boye to boye.