Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Janvier 2014

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Bizaleli oyo ebongisaka mpenza bomoi

Bizaleli oyo ebongisaka mpenza bomoi

Christina akamwaki mpenza ntango amonaki saki moko ya plastiki ya moindo oyo ezalaki na mbongo ebele mpenza; ezalaki na valɛrɛ ya salɛrɛ na ye ya mbula koleka 20! Mpe ayebaki moto oyo abungisaki yango. Esengelaki asala nini? Soki ezalaka yo, olingaki kosala nini? Eyano oyo okopesa ekomonisa ndenge otalelaka bosembo mpe soki okangamaka na yango.

Bizaleli ezali nini? Ezali makambo oyo tomonaka ete ezali malamu mpe na ntina, oyo etambwisaka bomoi na biso. Esangisi makambo lokola: kolimbisa, bosembo, bonsomi, bolingo, komemya bomoi mpe komipekisa. Na yango, bizaleli na biso nde etindaka biso tósala likambo boye to boye, tótya makambo boye to boye na esika ya liboso, tózala na boyokani na basusu mpe tópesa bana na biso batoli oyo ebongi. Atako ezalaka na ntina, bizaleli yango ezali se kobeba.

BIZALELI EZALI SE KOBEBA

Na 2008, bato ya mayele batunaki bilenge mingi na États-Unis bálobela ndenge oyo batalelaka bizaleli malamu. David Brooks alobaki boye na zulunalo New York Times: “Likambo ya mawa, bilenge yango bakanisaka to balobelaka mpenza te bizaleli yango.” Mingi na bango balobaki ete kosangisa nzoto na makasi na mwasi mpe koboma ezali mabe, kasi “longola makambo wana, bapesaki makanisi te na oyo etali mabe ná malamu, ata ntango balobelaki makambo lokola komɛla masanga ntango moto azali kokumba motuka, koyiba na ekzamɛ to kokosa moninga.” Elenge moko alobaki boye: “Namitungisaka mpenza te mpo na likambo oyo ezali malamu  to mabe.” Mingi balobaki boye: ‘Soki omoni ete likambo boye ezali malamu, salá yango. Salá oyo motema na yo elingi.’ Kokanisa bongo ezali malamu?

Atako motema ya moto ezalaka na likoki ya kolinga mpe koyokela basusu mawa, ekoki mpe kozala na ‘bokosi mpe ezali eloko ya kosakana na yango te.’ (Yirimia 17:9) Kaka ndenge Biblia esakolaki yango, likambo yango ya mawa ezali komonana na bizaleli oyo bato bakómi na yango. Esakolaki banda kala ete “na mikolo ya nsuka, bato bakokóma komilinga bango moko, bakozala na lokoso, na lofundo, mpe lolendo,” bakozala mpe “na boboto te [mpe] mobulu.” Lisusu, “bakoyina makambo ya malamu” mpe “bakolinga bisengo na esika ya kolinga Nzambe.”2 Timote 3:1-5, Good News Translation.

Makambo wana esengeli kotinda biso tótalela motema na biso, tólanda yango kaka bongo te! Kutu, Biblia elobi polele ete: “Ye oyo azali kondimela motema na ye moko azali zoba.” (Masese 28:26) Ndenge moko na busole, motema na biso esengeli kotambwisama na bizaleli ya malamu soki tolingi ete esalisa biso. Epai wapi tokoki kokuta bizaleli yango? Bato mingi batyelaka Biblia motema mpo elobaka makambo ndenge ezali mpe polele.

BIZALELI OYO TOSENGELI KOLANDA!

Bizaleli oyo Biblia elobeli emonisaka ete ekomamaki mpo na bato. Tózwa kaka mwa bandakisa—bolingo, boboto, kokaba mpe bosembo.

Kolinga basusu.

Buku moko (Engineering Happiness—A New Approach for Building a Joyful Life) elobi boye: “Soki bateyá yo kolinga, boye, okozala mpenza na esengo.” Ezali polele ete biso bato tozalaka na mposa bálinga biso. Soki te, tokozala mpenza na esengo te.

Oyo Biblia elobi: “Bólata bolingo, mpo ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:14) Mokomi yango ya Biblia alobi lisusu ete: “Soki . . . nazali na bolingo te, nazali mpamba.”1 Bakorinti 13:2.

Bolingo yango ezali te likambo ya kosangisa nzoto to lolango; ezali bolingo oyo elandaka malako. Ezali bolingo oyo etindaka biso tósalisa moto oyo azali na mpasi ata soki toyebi ye te, kozanga koluka lifuti. Biblia elobi boye na 1 Bakorinti 13:4-7: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. . . . Ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te, esalaka makambo ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te. Esepelaka na makambo ya kozanga boyengebene te, kasi esepelaka nde na solo. Endimaka makambo nyonso, . . . eyikaka mpiko na makambo nyonso.”

Soki bolingo ya ndenge wana ezangi na libota, bato nyonso banyokwamaka, mingimingi bana. Mwasi moko na nkombo Monica akomaki ete ntango azalaki mwana, bazalaki kobɛta ye, koyokisa ye mpasi na motema mpe kosangisa na ye nzoto na makasi. Alobi boye: “Bazalaki kolinga ngai te mpe nazangaki elikya.” Na nsima, ntango akómaki na mbula 15, akendaki kofanda epai ya bankɔkɔ na ye oyo bazali Batatoli ya Yehova.

Monica alobi lisusu boye: “Na mbula mibale oyo tofandaki na bango, atako nazalaki  nsɔninsɔni, bateyaki ngai ndenge ya kofanda na bato, kolinga mpe kotyela basusu likebi. Basalisaki ngai nakóma mwasi oyo bato bakoki komemya.” Lelo, Monica azali na esengo na libala na ye mpe ye ná mobali na ye ná bana na bango misato bamoniselaka basusu bolingo na ndenge bayebisaka bango nsango ya Biblia.

Monguna ya bolingo oyo ezalaka mpasi koyeba yango ezali ezaleli ya kolinga mingi biloko ya mokili, elingi koloba komona ete biloko ya mokili mpe bisengo ezali na ntina mingi. Nzokande, boyekoli oyo bato basali emonisi mbala na mbala ete esɛngi te moto azala na bozwi mingi mpo azala na esengo. Kutu, ndenge Biblia emonisi yango, bato oyo balingaka mingi biloko ya mokili bakoki kozanga esengo. Mosakoli 5:10 elobi boye: “Moto oyo alingá palata akotonda palata te, mpe moto alingá bozwi akotonda mpe lifuti te. Yango mpe ezali mpamba.” Biblia elobi mpe ete: “Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te.”Baebre 13:5.

Boboto mpe kokaba.

Lisolo moko oyo ebongiseli moko (The Greater Good Science Center) na iniversite ya Californie ebimisaki, elobaki boye: “Kanisá naino soki moto akei na magazini moko mpe asombi esengo ya libela! Likanisi yango ezali ndɔtɔ mpamba te ndenge ekoki komonana, soki eloko oyo ozali kosomba ezali mpo na moto mosusu.” Elingi mpenza koloba nini? Moto oyo akabaka azalaka na esengo mingi koleka moto oyo bakabeli.

Oyo Biblia elobi: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”Misala 20:35.

Mbala mingi, kopesa ntango mpe makasi na biso nde ezali ndenge oyo eleki malamu ya kokaba mpe yango epesaka matomba mingi. Na ndakisa, mwasi moko na nkombo Karen amonaki mama moko ná bana na ye mibale ya basi bafandi na motuka oyo ezalaki na kapo. Mama yango ná mwana na ye moko basengelaki kozwa mpɛpɔ; kasi motuka na bango ekufaki, mpe taksi oyo bazalaki kozela ezalaki na retare. Karen asɛngaki asalisa bango, atako esɛngaki básala miniti 45 mpo na kokóma na libándá ya mpɛpɔ. Bandimaki lisalisi na ye. Ntango Karen azalaki kozonga, amonaki mwana mosusu ya mama yango azali kaka kozela na motuka na ye na parkingi.

Mwasi yango alobaki na ye boye: “Mobali na ngai azali koya.”

Karen azongiselaki ye boye: “Malamu, nasepeli ndenge ozali malamu, nakei kolongola mwa matiti na Ndako ya Bokonzi, to eglize.”

Mwasi yango atunaki ye boye: “Ozali Motatoli ya Yehova?”

Karen alobaki “ɛɛ” mpe bakobaki mwa moke lisolo na bango.

Mwa bapɔsɔ na nsima, Karen azwaki mwa mokanda moko oyo batindelaki ye. Ezalaki mpe na maloba oyo: “Ngai ná mama tobosani te bolamu oyo osalelaki biso. Tomataki mpɛpɔ mpo na yo! Yaya na ngai ayebisaki biso ete ozali Motatoli ya Yehova, yango wana omoniselaki biso boboto mpenza. Mama azali Motatoli, mpe ngai nazali Motatoli kasi nasakolaka lisusu te. Kasi, mosika te nakozongela!” Karen asepelaki ndenge asalisaki bandeko wana mibale. Alobi boye: “Nalelaki!”

Mokomi moko na nkombo Charles Warner akomaki boye: “Ezali moko ya mbano ya malamu na . . . bomoi ete moto moko te akoki  mpenza komisalisa kozanga ete aluka mpe kosalisa moto mosusu.” Ezalaka bongo mpo Nzambe akelá bato te mpo bálukaka kaka matomba na bango moko, kasi akelá bango nde mpo bámonisaka bizaleli na ye kitoko.Ebandeli 1:27.

Bosembo.

Ezaleli yango ezali na ntina mpenza mpo na bato ya bikólo nyonso. Kozanga bosembo esalaka ete bato bábanga, bátyelana motema te, mpe bomoi ya bato ebeba.

Oyo Biblia elobi: “Nani akoyambama na hema [ya Nzambe]?” Eyano: “Ye oyo azali kotambola na mbeba te mpe . . . azali koloba solo na motema na ye.” (Nzembo 15:1, 2) Ya solo, ndenge moko na bizaleli oyo touti kolobela, bosembo ya solosolo ezali ezaleli oyo moto akoki komonisa. Amonisaka yango te mpo likambo moko boye ebimi to mpo na koluka litomba.

Ozali koyeba lisusu Christina oyo amonaki sakosi ya mbongo? Mposa na ye ezalaki te ya kozwa bomɛngo, kasi nde ya kosepelisa Nzambe. Na yango, ntango nkolo mbongo azongaki, ayebisaki ye ete mbongo na ye emonani. Akamwaki mpo na bosembo ya Christina. Patrɔ na ye mpe akamwaki, mpo na nsima apesaki Christina mokumba ya kobatela biloko nyonso ya magazini na ye, mokumba oyo bapesaka na moto oyo batyelaka mpenza motema. Maloba oyo ezali na 1 Petro 3:10 ezali mpenza solo, elobi boye: “Moto oyo alingi kosepela na bomoi mpe komona mikolo ya malamu, apekisa . . . mbɛbu na ye koloba makambo ya bokosi.”

‘TAMBOLÁ NA NZELA YA BATO MALAMU’

Batoli ya bizaleli malamu oyo ezali na Biblia emonisaka bolingo monene oyo Mozalisi na biso azalaka na yango mpo na biso, mpo bizaleli yango esalisaka biso ‘tótambola na nzela ya bato malamu.’ (Masese 2:20; Yisaya 48:17, 18) Soki tolandi litambwisi yango, biso mpe tokolinga Nzambe mpe tokozwa mapamboli mingi. Kutu, Biblia elaki boye: “Batelá nzela [ya Nzambe], mpe ye akotombola yo mpo na kozwa mabele. Ntango bato mabe bakobomama, yo okomona yango.”Nzembo 37:34.

Ya solo, avenire moko kitoko ezali kozela baoyo nyonso balandaka batoli ya Biblia—bomoi na mabele ya kimya oyo mabe ekozala lisusu te! Na ntembe te, ebongi mpenza tótalela bizaleli oyo Biblia elobeli.