Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Mai 2016

Luká kosilisa matata na bolingo

Luká kosilisa matata na bolingo

“Bózalaka na kimya kati na bino.”MARKO 9:50.

NZEMBO: 39, 77

1, 2. Matata nini mokanda ya Ebandeli elobeli, mpe yango etali biso na nini?

OSILÁ kokanisa masolo ya Biblia oyo elobeli matata oyo bato mosusu bazalaki na yango? Kaka na mikapo ya liboso ya mokanda ya Ebandeli, totángaka ete Kaina abomaki Abele (Ebandeli 4:3-8); Lameke abomaki elenge mobali moko mpo abɛtaki ye (Ebandeli 4:23); babateli ya mpate ya Abrahama bawelanaki na babateli ya mpate ya Lota (Ebandeli 13:5-7); Agare azalaki komimona ete aleki Sara, mpe Sara asilikelaki Abrahama (Ebandeli 16:3-6); Yishimaele atɛmɛlaki moto nyonso, mpe moto nyonso atɛmɛlaki ye.Ebandeli 16:12.

2 Mpo na nini Biblia elobeli matata wana nyonso? Mpo tokoki kozwa mateya na bandakisa wana ya bato ya kozanga kokoka oyo bakutanaki na mikakatano. Biso mpe tozali bato ya kozanga kokoka; ntango tokutani na mikakatano ya ndenge wana, tokoki komekola bandakisa ya malamu oyo ezali na Biblia mpe koboya komekola oyo ya mabe. (Baroma 15:4) Yango ekoki kosalisa biso tóyekola ndenge ya kozala na kimya na basusu.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Na lisolo oyo, tokoyeba ntina oyo tosengeli kosilisa matata, mpe ndenge oyo tokoki kosala yango. Tokoyekola mpe  mitinda mosusu ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tósilisa matata mpe tókoba kozala na boyokani ya malamu na Yehova mpe na basusu.

NTINA OYO BASALELI YA NZAMBE BASENGELI KOSILISAKA MATATA

4. Makanisi nini epalangani na mokili, mpe yango ebimisi makambo nini?

4 Satana nde moto ya libosoliboso oyo asalaka ete bato bákabwana mpe bázalaka na matata mingi. Mpo na nini tolobi bongo? Na elanga ya Edene, Satana alobaki ete moto nyonso akoki kopona mpe asengeli kopona ye moko nini ezali malamu mpe nini ezali mabe kozanga ete Nzambe atambwisa ye. (Ebandeli 3:1-5) Kasi soki totali mokili lelo oyo, tokomona ete ezaleli wana ezali kaka kobimisa ebele ya mikakatano. Bato mingi bakanisaka ete bazali na lotomo ya kopona bango moko oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Bazali na lolendo, balukaka kaka matomba na bango moko, bawelanaka, mpe bakipaka te soki bikateli na bango ekosala basusu mabe. Ezaleli wana ebimisaka matata. Biblia ekundweli biso ete soki tosilikaka noki, tokozala na matata mingi na bato mpe tokosala masumu mingi.Masese 29:22.

5. Yesu ateyaki bato nini mpo na kosilisa matata?

5 Ntango Yesu asalaki lisolo likoló ya ngomba, ateyaki bayekoli na ye bálukaka kotya kimya mpe bákimaka matata, ata soki emonani lokola ete kosala bango ekozala mpo na bolamu na bango te. Na ndakisa, ateyaki bango bázalaka na boboto, bázalaka na kimya na basusu, bálongola makanisi mabe lokola nkanda, básilisaka matata nokinoki, mpe bálingaka banguna na bango.Matai 5:5, 9, 22, 25, 44.

6, 7. (a) Mpo na nini ezalaka na ntina tósilisaka matata nokinoki? (b) Mituna nini basaleli nyonso ya Yehova basengeli komituna?

6 Lelo oyo, tosambelaka Yehova ntango tobondelaka, tosakolaka, mpe tokendaka na makita. Soki tozali na kimya te elongo na bandeko na biso, Yehova akondima te losambo oyo topesaka ye. (Marko 11:25) Mpo na kozala moninga ya Yehova, tosengeli kolimbisa basusu ntango basali mabunga.Tángá Luka 11:4; Baefese 4:32.

Nalimbisaka bandeko na ngai nokinoki?

7 Yehova amizelaka ete basaleli na ye nyonso bálimbisaka mpe bázala na kimya na basusu. Tokoki komituna boye: ‘Nalimbisaka bandeko na ngai nokinoki? Nasepelaka kozala elongo na bango?’ Soki omoni ete osengeli kolimbisaka lisusu mingi, bondelá Yehova mpe sɛngá ye asalisa yo osala yango lisusu mingi. Tata na biso ya likoló akoyoka mabondeli wana ya komikitisa mpe ayanolaka yango.1 Yoane 5:14, 15.

OKOKI KOLIMBISA MPE KOBOSANA?

8, 9. Tosengeli kosala nini ntango bazokisi biso?

8 Biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka; yango wana tosengeli komizela ete bato báloba to básala makambo oyo ekoki kozokisa biso. (Mosakoli 7:20; Matai 18:7) Tokosala nini? Tokoki kozwa liteya moko ya ntina na ndakisa oyo: Ndeko mwasi moko apesaki bandeko mibali mibale mbote na fɛti moko. Kasi moko ya bandeko mibali yango asilikelaki ndeko mwasi yango mpo na lolenge oyo apesaki ye mbote.  Ntango bandeko mibali yango batikalaki bango mibale, ndeko oyo asilikaki abandaki komilela mpo na ndeko mwasi wana. Kasi, ndeko mobali wana mosusu akundwelaki ye ete ndeko mwasi wana asaleli Yehova na bosembo mbula 40 atako akutanaki na mikakatano mingi. Andimisamaki ete ndeko mwasi wana azalaki te na likanisi ya kozokisa ye. Ndeko mobali ya liboso asalaki nini? Alobaki ete: “Olobi solo.” Na nsima, alimbisaki mpe abosanaki likambo oyo elekaki.

9 Ndakisa oyo eteyi biso nini? Ntango moto moko asali biso mabe, tokoki kopona nini tokosala. Moto oyo alingaka basusu alimbisaka. (Tángá Masese 10:12; 1 Petro 4:8.) Ntango ‘tolimbisaka likambo oyo ebuki mibeko,’ yango esepelisaka Yehova. (Masese 19:11; Mosakoli 7:9) Yango wana, mbala ya nsima oyo moto moko akoloba to akosala likambo moko oyo ezokisi yo, omituna boye: ‘Nakoki kolimbisa mpe kobosana likambo yango? Ezali mpenza na ntina nakoba kokanisa likambo yango?’

10. (a) Liboso, ndeko mwasi moko asalaki nini ntango bazalaki koloba mabe mpo na ye? (b) Likanisi nini ya Biblia esalisaki ndeko mwasi yango abatela kimya?

10 Ntango basusu balobi likambo moko ya mabe mpo na biso, ekoki kozala mpasi kobosana maloba na bango. Tótalela likambo oyo ekómelaki ndeko mwasi moko mobongisi-nzela, oyo topesi nkombo Lucy. Bandeko mosusu ya lisangá bazalaki koloba mabe mpo na lolenge na ye ya kosakola mpe ndenge na ye ya kosalela ntango. Ayokaki mpasi mingi na motema mpe asɛngaki toli epai ya bandeko oyo bakɔmeli. Yango ebimisaki matomba nini? Alobi ete basalelaki Biblia mpo na kosalisa ye atika kokanisa mingi mpo na maloba mabe ya basusu mpe akóma kokanisa mingi nde mpo na Yehova. Alendisamaki ntango atángaki Matai 6:1-4. (Tángá.) Bavɛrsɛ yango ekundwelaki ye ete kosepelisa Yehova ezali likambo oyo eleki ntina. Yango wana, amonaki malamu atika kolandela maloba na bango. Sikoyo, ata soki basusu balobi mabe mpo na mosala na ye ya kosakola, azalaka na esengo mpo ayebi ete azali koluka kosala oyo eleki malamu mpo na kosepelisa Yehova.

NTANGO OKOKI TE KOTIKA LIKAMBO MOKO

11, 12. (a) Mokristo asengeli kosala nini soki akanisi ete ndeko na ye ‘azali na likambo ná ye’? (b) Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Abrahama asilisaki matata? (Talá elilingi ya ebandeli.)

11 “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.” (Yakobo 3:2) Kanisá ete oyoki ete likambo moko oyo olobaki to osalaki ezokisaki ndeko moko. Osengeli kosala nini? Yesu alobaki ete soki “omemi likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na likambo ná yo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo na ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.” (Matai 5:23, 24) Na yango, sololá na ndeko na yo. Ntango ozali kosolola na ye, mokano na yo esengeli kozala ya kotya kimya elongo na ye. Osengeli kondima libunga na yo mpe koluka te kopamela ye.  Kozala na kimya elongo na bandeko na biso ezali likambo oyo eleki ntina.

Mokano na biso esengeli kozala ya kotya kimya elongo na bandeko

12 Biblia emonisi ndenge oyo basaleli ya Nzambe bakoki kobatela kimya ntango bazali na matata. Na ndakisa, Abrahama ná Lota, mwana ya ndeko na ye, bazalaki na bibwɛlɛ mingi, mpe bakɛngɛli ya bibwɛlɛ na bango bawelanaki mpo esika ya kotya bibwɛlɛ ezalaki mingi te mpo na bibwɛlɛ na bango nyonso. Lokola Abrahama alingaki kimya, atikaki Lota apona mokili oyo eleki malamu. (Ebandeli 13:1, 2, 5-9) Oyo nde ndakisa malamu mpo na biso! Abrahama azangaki nde esika ya malamu libela mpo na bokabi na ye? Soki moke te. Mbala moko nsima ya likambo yango, Yehova alakaki Abrahama ete akopesa ye mingi koleka oyo abungisaki. (Ebandeli 13:14-17) Liteya nini tozwi? Ata soki tobungisi biloko mosusu, Yehova akopambola biso soki tosilisi matata na biso na bolingo. [1]—Talá maloba na nse ya lokasa.

13. Mokɛngɛli moko asalaki nini ntango balobaki na ye maloba oyo ezangi boboto, mpe liteya nini tokoki kozwa na ndakisa yango?

13 Tózwa ndakisa moko ya mikolo na biso. Mokɛngɛli ya sika ya departema moko ya liyangani abengaki ndeko mobali moko na telefone mpo na kotuna ye soki akosepela kosala na departema yango. Ndeko mobali yango alobaki makambo mingi ya kozanga boboto mpe akatelaki ye telefone mpo azalaki kaka na nkanda ya mokɛngɛli ya kala ya departema yango. Mokɛngɛli ya sika asilikaki te, kasi amonaki ete asengeli te kolekisa likambo yango kaka bongo. Nsima ya ngonga moko, abengaki lisusu ndeko yango na telefone mpe asɛngaki ye ete bákutana. Na pɔsɔ oyo elandaki, bango mibale bakutanaki na Ndako ya Bokonzi, mpe nsima ya kobondela Yehova, basololaki ngonga mobimba. Ndeko yango alimbolaki likambo oyo elekaki kati na ye ná mokɛngɛli ya kala. Mokɛngɛli ya sika ayokaki ye na boboto mpe atalelaki elongo na ye bavɛrsɛ ya Biblia oyo esalisaki ye. Nsukansuka, bango mibale bazongisaki kimya mpe basalaki elongo na liyangani. Ndeko yango azali na botɔndi ndenge mokɛngɛli ya sika asololaki na ye na boboto mpe na lolenge ebongi.

NTANGO NINI LIKAMBO ESENGELI KOKÓMA EPAI YA BANKULUTU?

14, 15. (a) Ntango nini tosengeli kosalela toli oyo ezali na Matai 18:15-17? (b) Matambe nini misato Yesu alobelaki, mpe mokano na biso esengeli kozala nini ntango tozali kolanda yango?

14 Mbala mingi, soki matata ebimi kati na bakristo mibale, bakoki kosilisa yango to basengeli kosilisa yango kaka bango mibale. Kasi, na bantango mosusu esimbaka te. Makambo mosusu ekoki kosɛnga lisalisi ya basusu, na kotalela Matai 18:15-17. (Tángá.) “Lisumu” oyo Yesu alobeli ezalaki te matata ya mikemike oyo ebimaka kati ya bakristo. Ndenge nini toyebi yango? Yesu alobaki ete soki moto oyo asali lisumu aboyi kobongola motema nsima ya kosolola na ndeko na ye, na batatoli, mpe na bankulutu ya lisangá, esengeli kotalela ye “lokola moto ya bikólo mpe lokola mokɔngɔli-mpako.” Lelo oyo, yango elimboli ete asengeli kolongolama na lisangá. “Lisumu” oyo balobeli awa etaleli makambo lokola kobuba moto to kokosela moto makambo, kasi ezali te masumu lokola ekobo, kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, lipɛngwi, to losambo ya bikeko. Masumu ya ndenge wana bankulutu nde basengeli kotalela yango.

Ekoki kosɛnga kosolola na ndeko mbala ebele mpo na kotya kimya (Talá paragrafe 15)

15 Ntango Yesu apesaki toli wana, mokano na ye ezalaki ya komonisa biso ndenge ya kosalisa ndeko moko mpo tolingaka ye. (Matai 18:12-14) Ndenge nini tokoki kolanda toli yango? (1) Tosengeli kosala  makasi tótya kimya elongo na ndeko na biso kozanga kokɔtisa bato mosusu. Mbala mosusu ekoki kosɛnga tósolola na ye mbala ebele. Kasi tosengeli kosala nini soki kimya ezongisami kaka te? (2) Tosengeli kosolola na ndeko na biso na miso ya moto mosusu oyo ayebi likambo yango to oyo akoki koyeba soki likambo moko ya mabe esalemaki. Soki likambo yango esili, okozongisa “ndeko na yo na nzela ya malamu.” Kaka soki osololi na ndeko na yo mbala ebele mpe bolongi kozongisa kimya te nde (3) okoki komema likambo yango epai ya bankutulu.

16. Nini emonisi ete kolanda toli ya Yesu ezali lolenge oyo ebongi mpe emonisi bolingo?

16 Na makambo mingi, ezali na ntina te kolanda matambe nyonso oyo ezali na Matai 18:15-17. Likanisi wana ezali kolendisa. Mpo na nini tolobi bongo? Mpamba te na makambo mingi, soki moto oyo asali lisumu andimi libunga na ye mpe abongisi makambo, ntina ya kolongola ye na lisangá ekozala te. Na nsima, moto oyo basaleli mabe asengeli kolimbisa ndeko na ye mpo azala na kimya. Yango wana, emonani polele ete na kotalela toli ya Yesu, tosengeli te komema likambo epai ya bankulutu nokinoki. Tosengeli komema likambo epai ya bankulutu kaka nsima ya kolanda matambe mibale ya liboso mpe soki ezali na elembeteli ya solosolo oyo emonisi ete likambo moko ya mabe esalemaki.

17. Matomba nini tokozwa soki tozali ‘koluka kozwa kimya’ na basusu?

17 Lokola tozali kaka bato ya kozanga kokoka, tokokoba kosilikisa basusu. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, ye azali moto ya kokoka, oyo akoki kopekisa mpe nzoto na ye mobimba.” (Yakobo 3:2) Mpo na kosilisa matata, tosengeli kosala oyo tokoki mpo na ‘koluka kozwa kimya, mpe kolanda yango.’ (Nzembo 34:14) Soki tokobi kotya kimya na basusu, tokozala na boyokani ya malamu elongo na bandeko na biso, mpe yango ekobatela bomoko na biso. (Nzembo 133:1-3) Likambo eleki ntina, tokozala na boyokani ya malamu mpenza na Yehova, “Nzambe oyo apesaka kimya.” (Baroma 15:33) Tokozwa mapamboli wana nyonso soki tozali kosilisa matata na bolingo.

^ [1] (paragrafe 12) Bato mosusu oyo basilisaki matata na kimya ezalaki Yakobo ná Esau (Ebandeli 27:41-45; 33:1-11); Yozefe ná bandeko na ye (Ebandeli 45:1-15); mpe Gideone ná bato ya Efraime (Basambisi 8:1-3). Mbala mosusu okoki kokanisa bandakisa mosusu ya Biblia ya ndenge wana.