Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Zongelá Yehova

 ETENI 2

Mitungisi—“Tokamolami na ndenge nyonso”

Mitungisi—“Tokamolami na ndenge nyonso”

“Nabomaki libala na mobali na ngai nsima ya mbula 25 ya libala. Bana na ngai batikaki solo. Nabɛlaki bamaladi ya minene ebele. Na nsima, nakómaki kotungisama na makanisi. Namonaki lokola mokili ekweli ngai, mpe nayebaki eloko ya kosala te. Natikaki kokende na makita mpe kosakola.”—June.

MOTO nyonso amitungisaka, ata basaleli ya Nzambe. Mokomi moko ya nzembo akomaki ete: “Makanisi . . . etungisaka ngai.” (Nzembo 94:19) Mpe Yesu alobaki ete na ntango ya nsuka, “mitungisi ya bomoi” ekopekisa bato mingi kosalela Yehova. (Luka 21:34) Bongo yo? Ozali komona ete mikakatano ya mbongo, ya libota, to ya nzoto elekeli yo? Ndenge nini Yehova akoki kosalisa yo olonga yango?

“Nguya oyo eleki makasi”

Tokoki te kolonga mitungisi na ndenge na biso moko. Ntoma Paulo akomaki ete: “Tokamolami na ndenge nyonso . . . ; tosili mayele, . . . tozali kobambama na nse.” Atako bongo, akomaki mpe ete “tofinani te tii tózanga koningana,” “tozangi mwa nzela ya kobima te,” mpe “tobomami te.” Nini esalisaka biso tóyika mpiko? Ezali “nguya oyo eleki makasi,” elingi koloba nguya oyo eutaka epai ya Yehova, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.2 Bakorinti 4:7-9.

Kanisá naino ndenge ozalaki kozwa “nguya oyo eleki makasi” kala. Ozali koyeba lisusu ndenge diskur moko elendisaki yo okóma na botɔndi mingi epai ya Yehova mpo na bolingo na ye ya sembo? Kondima na yo na bilaka ya Yehova ekómaki lisusu makasi ntango ozalaki koyebisa basusu elikya ya Paradiso? Ntango toyanganaka na makita ya lisangá mpe toyebisaka basusu kondima na biso, tozwaka makasi ya koyika mpiko na mitungisi ya bomoi mpe tozwaka kimya ya makanisi mpo tókoka kosalela Yehova na esengo.

‘Meká mpe moná ete Yehova azali malamu’

Toboyi te, ntango mosusu okoki komiyoka lokola nde bazali kobenda yo epai na epai. Na ndakisa, Yehova asɛngi biso tóluka liboso Bokonzi mpe tótángaka Biblia mokolo na mokolo, tóyanganaka na makita, tósakolaka, tósalaka losambo na kati ya libota mpe bongo na bongo. (Matai 6:33; Luka 13:24) Bongo okosala nini soki botɛmɛli, mikakatano ya nzoto, to mikakatano ya libota esilisi yo makasi? To okosala nini soki mosala na yo ezali kozwa ntango mpe makasi nyonso oyo osengelaki kopesa na makambo ya lisangá? Soki ozali na makambo kilikili ya kosala kasi ozali na ntango te mpe na makasi mingi te mpo na kosala yango nyonso, okomona ete makambo eleki yo motó. Ntango mosusu, okoki kokanisa ete Yehova azali kosɛnga yo makambo mingi koleka.

Yehova ayebi komitya na esika ya bato. Asɛngaka ata moke te ete tósalela ye koleka makoki na biso. Mpe ayebi ete soki moto abɛli to atungisami na makanisi, mwa ntango esengeli koleka liboso azongela makasi.Nzembo 103:13, 14.

Na ndakisa, kanisá ndenge oyo Yehova asungaki mosakoli Eliya. Ntango Eliya alɛmbaki nzoto mpe abangaki mingi, akimaki na esobe. Yehova apamelaki ye? Azongisaki ye na makasi na mosala na ye? Te. Yehova atindaki anzelu mbala mibale mobimba alamusa Eliya malɛmbɛ mpe apesa ye biloko ya kolya. Atako bongo, mikolo 40 na nsima, Eliya azalaki kaka komitungisa mpe kobanga. Yehova asalaki lisusu nini mpo na kosalisa ye? Ya liboso,  Yehova amonisaki ete akoki kobatela ye. Ya mibale, Yehova abondisaki Eliya na ‘mongongo ya boboto mpe ya kimya.’ Na nsuka, Yehova amonisaki ye ete ezali na ebele ya bato mosusu oyo bazali kosambela ye na bosembo. Eumelaki te, Eliya azongelaki lisusu makasi mpe azongelaki kosakola na molende. (1 Bakonzi 19:1-19) Liteya nini tozwi na lisolo yango? Ntango mitungisi elekelaki Eliya, Yehova amoniselaki ye motema molai mpe ayokelaki ye mawa. Yehova abongwani te. Asalelaka biso makambo kaka ndenge wana.

Ntango ozali kokanisa oyo okoki kosalela Yehova, kolekisa ndelo te. Kokokanisa te makambo oyo okoki kosala sikoyo ná oyo ozalaki kosala liboso. Tózwa ndakisa: Soki mopoti-mbangu asali basanza mingi to bambula mingi apotaka mbangu lisusu te, akoki te kozongela mbala moko kopota mbangu ndenge azalaki kopota liboso. Asengeli nde komityela mikano ya mikemike oyo ekosalisa ye amesana mpe alɛmbaka noki te. Bakristo bazali lokola bapoti-mbangu. Ntango bazali kopota mbangu, bazalaka na mokano moko. (1 Bakorinti 9:24-27) Mpo na nini te komityela mokano moko ya elimo oyo omoni ete okoki kokokisa yango sikoyo? Na ndakisa, okoki komityela mokano ya koyangana na makita ya lisangá. Sɛngá Yehova asalisa yo okokisa mokano oyo omityeli. Ntango okozwa lisusu makasi na elimo, ‘okomeka mpe okomona ete Yehova azali malamu.’ (Nzembo 34:8) Yebá ete eloko nyonso oyo ozali kosala mpo na komonisa ete olingaka Yehova, ezala ya moke to ya monene, ezali na motuya mingi na miso na ye.Luka 21:1-4.

Yehova asɛngaka ata moke te ete tósalela ye koleka makoki na biso

“Epesaki ngai makasi oyo nasengelaki na yango”

Ndenge nini Yehova apesaki ndeko mwasi June makasi mpo azongela ye? Alobi: “Nakobaki kobondela Yehova, kosɛnga ye asalisa ngai. Na nsima, mwasi ya mwana na ngai ayebisaki ngai ete liyangani moko ekosalema na engumba na biso. Nazwaki ekateli ya kokende na liyangani yango ata mokolo moko. Ezalaki esengo mingi kokutana lisusu na basaleli ya Yehova! Liyangani wana epesaki ngai makasi oyo nasengelaki na yango. Sikoyo, nazali lisusu kosalela Yehova na esengo. Bomoi na ngai ekómi na ntina mingi. Sikoyo koleka liboso, nayebi ete nasengeli na bandeko na ngai mpe na lisalisi na bango. Nazali na botɔndi mingi ndenge Yehova atikaki ntango mpo nazongela ye.”