Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Zongelá Yehova

 ETENI 4

Komimemisa ngambo—“Pɛtolá ngai na lisumu na ngai”

Komimemisa ngambo—“Pɛtolá ngai na lisumu na ngai”

“Mosala na ngai ya sika ebongisaki bomoi ya libota na ngai, kasi etindaki ngai nasala makambo ya mabe. Nakómaki kosala bafɛti oyo bato nyonso basalaka, kokende na milulu ya politiki, ata mpe kokende na bisika ya losambo. Nazalaki Motatoli ya Yehova, kasi natikaki kosakola mbula 40. Ntango bambula ezali koleka, nazalaki kokanisa ete Yehova akolimbisa ngai te. Nazalaki komona ete nakoki komilimbisa te. Kasi, nayebaki solo liboso ya kosala makambo ya mabe wana.”—Martha.

KOMIMEMISA ngambo elɛmbisaka mingi mpenza. Mokonzi Davidi akomaki ete: “Mabunga na ngai eleki na motó na ngai; lokola mokumba moko ya kilo, yango eleki ngai na kilo.” (Nzembo 38:4) Bakristo mosusu bayokaka mawa oyo eleki ndelo mpe bamonaka ete Yehova akoki kolimbisa bango te. (2 Bakorinti 2:7) Makanisi wana ezali malamu? Ata soki osalaki masumu ya minene, okanisi ete Yehova abosaná yo mpe akoki kolimbisa yo ata moke te? Te, ezali bongo te!

“Tóbongisa makambo kati na biso”

Yehova asundolaka te basumuki oyo babongoli motema. Kutu, alukaka bango! Na ndakisa ya mwana ya mobulu, Yesu alobi ete Yehova azali lokola tata ya bolingo, oyo mwana na ye moko ya mobali atikaki libota mpe amipesaki na kindumba. Na nsima, mwana yango azwaki ekateli ya kozonga epai ya tata. “Ntango [mwana yango] azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokaki mawa, mpe apotaki mbangu mpe amibwakaki na nkingo na ye mpe apwɛpwaki ye na boboto.” (Luka 15:11-20) Olingi kopusana penepene na Yehova kasi ozali komona lokola nde ‘ozali naino mosika’ na ye? Lokola tata na ndakisa ya Yesu, Yehova azali koyokela yo mawa. Azali na mposa makasi ozongela ye.

Ozali nde kokanisa ete masumu na yo eleki minene to eleki ebele, yango wana Yehova akoki kolimbisa yo te? Soki ozali kokanisa bongo, yoká maloba ya Yehova oyo ezali na Yisaya 1:18: “Yehova alobi: ‘Sikoyo, bóya mpe tóbongisa makambo kati na biso. Ata soki masumu na bino ezali motane makasi, ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.’” Ya solo, Yehova akoki kolimbisa ata masumu oyo ezali lokola langi ya motane makasi na elamba ya mpɛmbɛ.

Yehova alingi te ete okoba konyokwama mpo lisosoli na yo ezali kotungisama. Kasi, okoki kosala nini mpo ozala na kimya oyo moto azalaka na yango soki Nzambe alimbisi ye mpe akómi na lisosoli ya pɛto? Talá makambo mibale oyo Mokonzi Davidi asalaki. Ya liboso, alobaki: “Nakoyambolela Yehova makambo na ngai ya kobuka mibeko.” (Nzembo 32:5) Kobosana te ete Yehova asilaki kobenga yo opusana penepene na ye na libondeli mpe ‘obongisa makambo’ yo na ye. Ndimá kozongela ye. Yambolá masumu na yo epai ya Yehova, mpe yebisá ye ndenge ozali komiyoka na motema. Mpo na likambo oyo ekómelaki Davidi, abondelaki: “Pɛtolá ngai na lisumu na ngai. . . . Ee Nzambe, motema oyo ebukani mpe etutami, okotyola yango te.”Nzembo 51:2, 17.

Ya mibale, Davidi azwaki lisalisi epai ya momonisi ya Nzambe, mosakoli Natane.  (2 Samwele 12:13) Lelo oyo, Yehova atyá bankulutu ya masangá oyo bazwaka formasyo ya kosalisa basumuki oyo babongoli motema bázongela boyokani malamu na ye. Soki oluki bankulutu, bakosalela Biblia mpe bakosala mabondeli na motema moko mpo na kokitisa yo motema, to kolongola yo makanisi mabe, mpe kosalisa yo ozonga makasi na elimo.Yakobo 5:14-16.

Yehova alingi ozala na lisosoli ya pɛto

“Esengo na moto oyo balimbisi botomboki na ye”

Ntango mosusu, okoki kokanisa ete ezali mpasi mingi koyambola masumu na yo epai ya Yehova Nzambe mpe koluka lisalisi ya bankulutu. Yebá ete Davidi mpe azalaki kokanisa bongo. ‘Afandaki nyɛɛ’ mpo na mwa ntango liboso ayambola masumu na ye. (Nzembo 32:3) Kasi na nsima, azwaki matomba ntango ayamboli masumu yango mpe atiki nzela mabe.

Moko ya matomba ya minene oyo Davidi azwaki yango oyo: azongelaki esengo na ye. Akomaki: “Esengo na moto oyo balimbisi botomboki na ye, oyo bazipi lisumu na ye.” (Nzembo 32:1) Abondelaki mpe ete: “Ee Yehova, fungolá mbɛbu na ngai, mpo monɔkɔ na ngai esakola lisanzoli na yo.” (Nzembo 51:15) Lokola Davidi amonaki ete Nzambe alimbisi masumu na ye, mpo na komonisa botɔndi abandaki koyebisa basusu makambo ya Yehova.

Yehova alingi ete ozala na lisosoli ya pɛto. Mpe alingi ete, ntango ozali koyebisa basusu makambo na ye mpe mikano na ye, osala yango na motema mobimba mpe na esengo mingi, kasi omizindisa na mawa te. (Nzembo 65:1-4) Kobosana te ete azali kobenga yo ‘mpo masumu na yo ebomama, mpo bileko ya kopema euta epai ya Yehova ye moko.’Misala 3:19.

Yango nde likambo Martha asalaki. Alobi: “Mwana na ngai ya mobali azalaki kaka kotindela ngai bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Mokemoke, nakómaki kozongela Yehova. Likambo ya mpasi koleka oyo ezalaki kopekisa ngai nazonga ezali kosɛnga bolimbisi mpo na masumu nyonso oyo nasalaki. Kasi nsukansuka, napusanaki penepene na Nzambe na nzela ya libondeli mpe nasɛngaki ye bolimbisi. Okoki kondima te ete nalekisaki mbula 40 liboso ete nazongela Yehova. Ndakisa na ngai emonisi ete ata nsima bambula mingi, moto akoki kaka kozwa lisusu libaku ya kosalela Nzambe mpe kozonga na kati ya bolingo na ye.”