Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

Nzela, solo mpe bomoi

Nzela, solo mpe bomoi

Ntembe ezali te ete yo mpe osepelaka kozwa nsango ya malamu. Mpe nsango moko ya malamu mpenza ezali, mpo na yo mpe bato oyo olingaka.

Nsango malamu yango ezali na kati ya Biblia, buku oyo Mozalisi ya molɔ́ngɔ́, Yehova Nzambe, akomisaki banda kala mpenza. Na buku oyo tokolobela mpenza mikanda minei ya Biblia oyo ezali na nsango ya malamu mpenza mpo na biso nyonso. Mikanda yango eyebani na nkombo ya bato oyo Nzambe asalelaki mpo bákoma yango: Matai, Marko, Luka, mpe Yoane.

Bato mingi babengaka mikanda yango Baevanzile. Mikanda minei yango ezali kolobela evanzile, to nsango malamu, ya Yesu; elobi ete lokola Yesu azali moto oyo Nzambe asaleli mpo na kobikisa bato mpe azali Mokonzi na Bokonzi ya likoló, akomemela bato nyonso oyo bakondimela ye mapamboli oyo ekoumela seko.​—Marko 10:17, 30; 13:13.

MPO NA NINI BAEVANZILE MINEI?

Ntango mosusu omitunaka mpo na nini Nzambe atindaki bato minei mobimba bákoma makambo ya bomoi ya Yesu mpe mateya na ye.

Ndenge bato ebele bakomaki makambo Yesu alobaki mpe asalaki ezali malamu mingi. Tózwa ndakisa: Kanisá ete bato minei batɛlɛmi pene na molakisi moko monene. Moto oyo atɛlɛmi liboso ya molakisi azali mokɔngɔli-mpako. Oyo atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali azali monganga. Moto oyo azali kolanda na lobɔkɔ ya mwasi azali mobomi-mbisi mpe moninga ya motema ya molakisi. Mpe moto ya minei, oyo atɛlɛmi na nsima mpe azali kotala, azali elenge mpenza. Bango nyonso bazali bato ya sembo, mpe moto na moto atye likanisi na ye na likambo moko. Soki bango nyonso bakomi makambo oyo molakisi alobaki mpe asalaki, tokozwa masolo minei oyo mokomoko ekomonisa likambo moko boye. Ntango  tozali kotánga masolo yango, tóbosana te ete moto na moto akomaki yango na ntina moko boye; na yango, tokoyeba makambo nyonso oyo molakisi alobaki mpe asalaki. Ndakisa oyo emonisi bolamu oyo tokoki kozwa ndenge bato minei bakomaki makambo ya Yesu, Moteyi Monene.

Tólobela lisusu ndakisa yango: Mokɔngɔli-mpako alingi kobenda likebi ya Bayuda, yango wana akomi mateya mpe makambo na ndenge oyo ekosalisa bango. Monganga alobeli mingi ndenge bato ya maladi to batɛngumi babiki, mpe atiki makambo mosusu oyo mokɔngɔli-mpako akomaki, to akomi yango kasi na ndenge mokɔngɔli-mpako akomaki te. Moninga na ye ya motema akomi ndenge molakisi asalaka soki likambo ebimi mpe bizaleli na ye. Kasi elenge akomi lisolo ya mokuse mpenza. Atako bongo, lisolo ya moto mokomoko ezali na makambo ya sikisiki. Ndakisa oyo emonisi ete ndenge bato minei bakomi lisolo ya bomoi ya Yesu, ekosalisa biso tókanga ntina ya misala na ye, mateya na ye mpe bomoto na ye.

Bato babengaka yango ‘Evanzile ya Matai’ to ‘Evanzile ya Yoane.’ Yango ezali bongo, mpo evanzile mokomoko ezali na “nsango malamu oyo etali Yesu Kristo.” (Marko 1:1) Kasi, soki totali malamu, evanzile to nsango malamu ezali kaka moko, oyo etali Yesu, yango nde oyo bato minei wana bakomá.

Ebele ya bayekoli ya Liloba ya Nzambe bayekoli mpe bayokanisi makambo mpe misala oyo ezali na Matai, Marko, Luka, mpe Yoane. Na mobu soki 170 T.B., mokomi moko ya Siri, na nkombo Tatien asalaki makasi asala yango. Andimaki ete mikanda minei wana elobi makambo ya solo mpe ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe, mpe akomaki Diatessaron, buku oyo eyokanisi makambo ya bomoi ya Yesu mpe misala na ye.

Buku Yesu azali nzela, solo mpe bomoi esali mpe bongo, kasi yango ekomi makambo nyonso na bosikisiki. Yango ezali bongo mpo sikoyo toyebi malamu kokokisama ya bisakweli mpe bandakisa ya Yesu. Boyebi yango ezali komonisa polele makambo oyo alobaki mpe asalaki, ezala mpe molɔngɔ oyo makambo yango esalemaki. Arkeoloji mpe emonisi polele makambo mosusu mpe makanisi oyo bato bakomaki. Ezala ndenge nini, moto moko te akoki koyeba na bosikisiki ndenge makambo nyonso elandanaki. Kasi buku Yesu azali nzela, solo mpe bomoi emonisi makambo na ndenge oyo ekoki kondimama mpe na molɔngɔ.

NZELA, SOLO MPE BOMOI

Ntango ozali kotánga buku oyo, kanisá liboso nsango oyo etali yo mpe bato oyo olingaka. Kobosana te ete Yesu Kristo alobaki na Toma ete: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.”​—Yoane 14:6.

Buku Yesu azali nzela, solo mpe bomoi ekosalisa yo oyeba mpenza ete Yesu azali “nzela.” Kaka na nzela na ye nde moto akoki kopusana penepene na Yehova Nzambe na libondeli. Lisusu, Yesu azali nzela oyo ekosalisa biso tózongisa boyokani na Nzambe. (Yoane 16:23; Baroma 5:8) Na yango, kaka na nzela ya Yesu nde tokoki kozala na boyokani malamu na Nzambe.

Yesu azali “solo.” Alobaki solo mpe bomoi na ye eyokanaki na solo; ezalaki lokola nde solo ezali kouta mpenza na Yesu. Akokisaki bisakweli mingi oyo ekómaki “Ɛɛ na nzela na ye.” (2 Bakorinti 1:20; Yoane 1:14) Bisakweli yango ezali kosalisa biso tómona mokumba ya ntina mpenza oyo azali na yango na kati ya mokano ya Nzambe.​—Emoniseli 19:10.

Mpe Yesu Kristo azali “bomoi.” Na nzela ya lisiko, apesaki bomoi mpe makila na ye ya kokoka, mpe yango esali ete tózwa “bomoi ya solosolo,” oyo elimboli “bomoi ya seko.” (1 Timote 6:12, 19; Baefese 1:7; 1 Yoane 1:7) Akozala mpe “bomoi” mpo na bamilio ya bato oyo bakufá mpe bakosekwa mpo na kozwa bomoi ya seko na Paradiso.​—Yoane 5:28, 29.

Biso nyonso tosengeli koyeba mokumba monene oyo Yesu azali na yango na kati ya mokano ya Nzambe. Tiká ete osepela koyekola lisusu mingi makambo etali Yesu mpo azali “nzela mpe solo mpe bomoi.”