Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 124

Batɛki Kristo mpe bakangi ye

Batɛki Kristo mpe bakangi ye

MATAI 26:47-56 MARKO 14:43-52 LUKA 22:47-53 YOANE 18:2-12

  • YUDASI ATƐKI YESU NA ELANGA

  • PETRO AKATI MOTO LITOI

  • BAKANGI YESU

Midi ya butu eleki mpenza. Banganga-nzambe bandimi kopesa Yudasi shekele ya palata 30 mpo atɛkɛla bango Yesu. Na yango, Yudasi akei na ebele ya banganga-nzambe bakonzi ná Bafarisai oyo bazali koluka Yesu. Bazali elongo na etuluku ya basoda ya Roma ná mokonzi moko ya basoda.

Emonani ete, ntango Yesu ayebisaki Yudasi abima ntango bazalaki kosala Elekeli, Yudasi akendeki mbala moko epai ya banganga-nzambe bakonzi. (Yoane 13:27) Bayanganisaki basoda ná bakonzi na bango. Ntango mosusu Yudasi amemaki bango liboso na shambrɛ oyo Yesu ná bantoma na ye basalaki Elekeli. Kasi sikoyo, ebele ya bato yango baleki lobwaku ya mokɛli ya Kidrone, bakei na elanga. Bazali na bibundeli, basimbi miinda ná bisungi ya mɔtɔ, bazali koluka Yesu.

Yudasi akei na bato yango na Ngomba ya Olive, akanisi ete akokuta Yesu kuna. Na pɔsɔ oyo eleki, ntango Yesu ná bantoma bazalaki kokende na Yerusaleme mpe kozonga na Betania, mbala mingi bazalaki kopema na elanga ya Getesemane. Sikoyo tozali na butu, mpe ntango mosusu, Yesu azali na nse ya banzete ya olive na elanga yango. Ndenge nini basoda yango, oyo mbala mosusu bamoná naino Yesu te, bakoyeba ye? Mpo na kosalisa bango, Yudasi apesi bango elembo. Alobi: “Moto oyo nakopwɛpwa, ezali ye; bókanga ye mpe bókɛngɛla ye malamumalamu na nzela.”​—Marko 14:44.

Ntango Yudasi akɔti na elanga na ebele ya bato yango, amoni Yesu ná bantoma na ye mpe akei mbala moko epai ya Yesu. Yudasi alobi: “Mbote, Rabi!” mpe apwɛpwi Yesu na boboto mpenza. Yesu atuni: “Moninga, mpo na nini ozali awa?” (Matai 26:49, 50) Yesu ye moko ayanoli na motuna yango: “Yudasi, ozali kotɛka Mwana ya moto na lipwɛpwɛ?” (Luka 22:48) Yesu alongoli likebi na ye epai ya Yudasi.

Sikoyo apusani pene na bato oyo basimbi bisungi ya mɔtɔ ná miinda mpe atuni: “Bozali koluka nani?” Bato yango bayanoli: “Yesu Monazarete.” Na mpiko nyonso, Yesu alobi: “Ngai nazali ye.” (Yoane 18:4, 5) Lokola bayebi te nini ekosalema, bakwei na nse.

Atako molili ezali, na esika Yesu akima, akimi te, atuni nde bato yango lisusu moto oyo bazali koluka. Ntango balobi lisusu, “Yesu Monazarete,” alobi na bango na kimya ete: “Nayebisaki bino ngai nazali ye. Na yango, soki ezali ngai nde bozali koluka, bótika baoyo bákende.” Ata na ntango wana ya yikiyiki, Yesu akanisi lisusu makambo oyo alobaki liboso, ete akobungisa ata moto moko te. (Yoane 6:39; 17:12) Yesu abateli bantoma na ye ya sembo mpe abungisi ata moko te “longola kaka mwana ya libebi,” Yudasi. (Yoane 18:7-9) Na yango, sikoyo asɛngi ete bátika bayekoli na ye ya sembo bákende.

Ntango basoda batɛlɛmi mpe bazali kopusana pene na Yesu, bantoma bamoni ete balingi kokanga Yesu. Batuni ye: “Nkolo, tóbɛta na mopanga?” (Luka 22:49) Liboso kutu Yesu apesa eyano, Petro azwi moko ya mipanga mibale oyo bantoma bazalaki na yango. Alandi Malakusi, moombo ya nganga-nzambe monene, mpe akati ye litoi ya mobali.

Yesu asimbi litoi ya Malakusi mpe abikisi yango. Na nsima apesi liteya moko ya ntina mingi, alobi na Petro: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.” Yesu andimi bákanga ye, mpo alobi: “Ndenge nini Makomami ekokokisama, ete yango esengeli kosalema bongo?” (Matai 26:52, 54) Alobi lisusu: “Kɔpɔ oyo Tata apesi ngai, nasengeli komɛla yango te?” (Yoane 18:11) Yesu andimi ete mokano ya Tata na ye mpo na ye esalema, ata soki esɛngi ete akufa.

Yesu atuni ebele ya bato yango: “Bobimi na mipanga mpe na mangenda mpo na kokanga ngai lokola nde boyeli moyibi moko boye? Mokolo  na mokolo nafandaki na tempelo mpo na koteya, kasi bokangaki ngai te. Kasi nyonso oyo esalemi mpo makomi ya basakoli ekokisama.”​—Matai 26:55, 56.

Basoda nyonso, mokonzi na bango, ná bakonzi ya Bayuda bakangi Yesu mpe bakangi ye bansinga. Ntango bantoma bamoni bongo, bakimi. Kasi, “elenge mobali moko,” mbala mosusu moyekoli Marko, atikali na kati ya ebele ya bato mpo na kolanda Yesu. (Marko 14:51) Ntango ebele ya bato yango bamoni ye, baluki kokanga ye, bongo alongoli elamba na ye ya lini mpe akimi.