MATAI 26:57-68 MARKO 14:53-65 LUKA 22:54, 63-65 YOANE 18:13, 14, 19-24

  • BAKEI NA YESU EPAI YA ANASI, OYO AZALAKI KALA NGANGA-NZAMBE MONENE

  • SANEDRINA ESAMBISI YE NA KOLANDA MIBEKO TE

Ntango bakangi Yesu lokola mosali-mabe, bakei na ye epai ya Anasi, oyo azalaki nganga-nzambe monene ntango elenge Yesu akamwisaki bateyi na tempelo. (Luka 2:42, 47) Na nsima, bana mosusu ya Anasi basalaki mosala ya nganga-nzambe monene, kasi sikoyo, Kaifa, bokilo na ye, nde azali nganga-nzambe monene.

Wana Yesu azali epai ya Anasi, Kaifa aluki koyanganisa Sanedrina mobimba. Sanedrina ezali na mibali 71, kati na bango, nganga-nzambe monene mpe baoyo basalá mosala yango.

Anasi atuni Yesu mituna “mpo na bayekoli na ye mpe mpo na mateya na ye.” Yesu ayanoli: “Nalobaki na mokili polele. Nazalaki ntango nyonso koteya na basinagoga mpe na tempelo, epai Bayuda nyonso bayanganaka; mpe nalobaki ata likambo moko te na kobombana. Mpo na nini ozali kotuna ngai? Tuná baoyo bayokaki makambo oyo nalobaki na bango.”​—Yoane 18:19-21.

Mokonzi moko ya basoda oyo atɛlɛmi wana abɛti Yesu mbata na elongi mpe apameli ye ete: “Ndenge wana nde ozali koyanola nganga-nzambe mokonzi?” Kasi lokola Yesu ayebi ete alobi mabe te azongisi: “Soki nalobi mabe, monisá mabe yango; kasi soki nalobi malamu, mpo na nini obɛti ngai?” (Yoane 18:22, 23) Sikoyo, Anasi atindi bámema Yesu epai ya bokilo na ye Kaifa.

 Sanedrina mobimba, elingi koloba nganga-nzambe monene, mikóló ya bato, mpe bakomeli, bayangani. Bazali na ndako ya Kaifa. Mibeko epekisi kosambisa moto na butu ya mokolo ya Elekeli, kasi bango bayangani kaka mpo bákokisa mokano mabe na bango.

Bato yango batondi na makanisi ya mabe. Nsima ya lisekwa ya Lazare, Sanedrina esalaki likita mpo báboma Yesu. (Yoane 11:47-53) Mpe eleki kaka mwa mikolo, bakonzi ya mangomba basalaki likita mpo bákanga Yesu mpe báboma ye. (Matai 26:3, 4) Kutu, ata liboso bábanda kosambisa Yesu, bayebaki ete bakoboma ye kaka.

Banganga-nzambe bakonzi mpe basambisi mosusu ya Sanedrina bazali kosambisa Yesu na kolanda mibeko te; baluki mpe bato oyo bakokosela Yesu makambo mpo na kokweisa ye. Bazwi bato ebele, kasi bazali koloba makambo oyo ezangi motó ná makolo. Nsukansuka, bato mibale baleki liboso mpe balobi: “Toyokaki ye azali koloba ete: ‘Nakobuka tempelo oyo, esalemá na mabɔkɔ mpe na mikolo misato nakotonga mosusu esalemá na mabɔkɔ te.’” (Marko 14:58) Kasi ata makambo oyo balobi mpe ezali koyokana mpenza te.

Kaifa atuni Yesu: “Ozali kozongisa ata eloko te? Likambo nini bato oyo bazali kofunda yo na yango?” (Marko 14:60) Yesu afandi kaka nyɛɛ liboso ya bato yango oyo bazali kofunda ye na makambo oyo ezali na boyokani te. Sikoyo, Nganga-nzambe monene Kaifa aluki mayele mosusu.

Kaifa ayebi ete Bayuda balingaka te koyoka moto aloba ete azali Mwana ya Nzambe. Liboso, ntango Yesu abengaki Nzambe Tata na ye, Bayuda balingaki koboma ye mpo balobaki ete “amikokanisi na Nzambe.” (Yoane 5:17, 18; 10:31-39) Lokola Kaifa ayebi bongo, atuni Yesu na mayele mabe ete: “Na nkombo ya Nzambe ya bomoi nalapisi yo ndai ete oyebisa biso soki ozali Kristo Mwana ya Nzambe!” (Matai 26:63) Yesu andimaka ete azali Mwana ya Nzambe. (Yoane 3:18; 5:25; 11:4) Sikoyo soki Yesu andimi yango te, ekoki komonana ete awangani ete azali Mwana ya Nzambe mpe Kristo. Yango wana Yesu alobi: “Ezali ngai; mpe bokomona Mwana ya moto afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe azali koya na mapata ya likoló.”​—Marko 14:62.

Na yango, Kaifa adasuki, apasoli bilamba na ye mpe agangi: “Afingi Nzambe! Ntina nini tóluka lisusu batatoli? Talá! Sikoyo boyoki ndenge afingi Nzambe. Bokanisi nini?” Sanedrina ezwi ekateli oyo ebongi te, elobi: “Abongi na liwa.”​—Matai 26:65, 66.

Na nsima, babandi kotyola Yesu mpe kobɛta ye makofi. Basusu bazali kobɛta ye bambata na elongi mpe kobwakela ye nsoi. Bazipi elongi na ye mobimba mpe babɛti ye bambata, mpe bayebisi ye na lityo ete: “Sakolá. Nani abɛti yo?” (Luka 22:64) Moto oyo bazali kosala ndenge wana mpe kosambisa butubutu, atako eyokani na mibeko te, ezali nde Mwana ya Nzambe!