Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 113

Ndakisa ya talanta emonisi ntina ya kozala na molende

Ndakisa ya talanta emonisi ntina ya kozala na molende

MATAI 25:14-30

  • YESU APESI NDAKISA YA TALANTA

Ntango Yesu ná bantoma na ye minei bazali naino na Ngomba ya Olive, apesi bango ndakisa mosusu. Mwa mikolo liboso, ntango azalaki na Yeriko, apesaki ndakisa ya mina mpo na komonisa ete Bokonzi ya Nzambe ezali naino mosika. Ndakisa oyo azali kopesa sikoyo ezali na makambo mosusu oyo eyokani na ndakisa wana. Ezali na kati ya eyano ya motuna oyo etali kozala na ye mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo. Ndakisa yango emonisi polele ete bayekoli na ye basengeli kosala na molende mosala oyo apesi bango.

Yesu abandi: “Ezali lokola ntango moto moko alingaki kokende mobembo na mboka mopaya, abengisaki baombo na ye mpe apesaki bango biloko na ye.” (Matai 25:14) Lokola Yesu asilaki komikokanisa na moto oyo alingaki kokende mobembo “mpo na kozwa nguya ya bokonzi,” bantoma bakoki komona mbala moko ete “moto” oyo Yesu azali kolobela ezali nde ye.​—Luka 19:12.

Na ndakisa yango, liboso moto yango akende mobembo, apesi baombo na ye biloko na ye ya motuya. Na boumeli ya mbula 3 ná ndambo ya mosala ya Yesu, amipesaki na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe apesaki bayekoli na ye formasyo mpo básala mosala yango. Sikoyo lokola azali kokende, andimi na motema moko ete bakosala mosala oyo alakisaki bango.​—Matai 10:7; Luka 10:1, 8, 9; talá mpe Yoane 4:38; 14:12.

Na ndakisa yango, ndenge nini moto yango akaboli biloko na ye? Yesu alobi: “Apesaki moko talanta mitano, mosusu mibale, mosusu mpe moko, apesaki moto na moto na kotalela likoki na ye mpenza, mpe akendaki na mboka mopaya.” (Matai 25:15) Baombo yango bakosala nini na biloko oyo bapesi bango? Bakosalela yango na molende mpo na bolamu ya nkolo na bango? Yesu ayebisi bantoma:

“Na mbala moko oyo azwaki talanta mitano akendaki kosala na yango mombongo mpe yango ebotaki mosusu mitano. Ndenge moko mpe oyo azwaki mibale, ebotaki mosusu mibale. Kasi oyo azwaki kaka moko akendaki, mpe atimolaki mabele mpe abombaki shekele yango ya palata ya nkolo na ye.” (Matai 25:16-18) Likambo nini ekokóma ntango nkolo yango akozonga?

Yesu abakisi: “Nsima ya ntango molai nkolo ya baombo wana ayaki mpe atalelaki na bango makambo ya mbongo na ye.” (Matai 25:19) Baombo mibale ya liboso basalaki nyonso oyo bakoki, “moto na moto na kotalela likoki na ye mpenza.” Baombo mibale wana bazalaki na molende, basalaki makasi mpe mbongo oyo bapesaki bango ebakisamaki. Moombo oyo azwaki talanta mitano abakisi mitano mosusu, mpe oyo azwaki talanta mibale abakisi mibale mosusu. (Na ntango wana, moto asengelaki kosala mbula 19 mpo na kozwa talanta moko.) Nkolo yango apesi  bango nyonso mibale longonya ndenge moko, alobi na mokomoko na bango ete: “Longonya, moombo malamu mpe ya sembo! Ozali sembo na mwa makambo moke. Nakotya yo obatela biloko mingi. Kɔtá na esengo ya nkolo na yo.”​—Matai 25:21.

Kasi, moombo oyo azwaki talanta moko asali ndenge baombo mosusu basali te. Alobi: “Nkolo, nayebaki ete yo ozalaka moto ya makambo makasi, obukaka epai oloni te mpe oyanganisaka epai opupoli te. Bongo nabangaki mpe nakendaki kobomba talanta na yo na mabele. Talá eloko na yo yango oyo.” (Matai 25:24, 25) Atye talanta yango ata na banki te mpo nkolo na ye azwa benefisi. Na ndenge yango, asaleli nkolo na ye bolamu te.

Yango wana, nkolo yango abengi ye “moombo mabe mpe gɔigɔi.” Abɔtɔli ye talanta yango mpe apesi yango na moombo oyo asalaki na molende. Nkolo yango alobi polele: “Moto nyonso oyo azali na eloko, bakobakisela ye mosusu mpe akozala na mingi; kasi moto oyo azali na eloko te, ata oyo azali na yango bakobɔtɔla ye yango.”​—Matai 25:26, 29.

Bayekoli ya Yesu bazali na makambo ya kokanisa mingi, ata mpe oyo Yesu alobeli na ndakisa oyo. Bamoni ete mokumba monene ya kokómisa bato bayekoli, oyo Yesu apesi bango, ezali na ntina mingi. Mpe asɛngi bango básala mosala yango na molende. Yesu akanisi te ete bango nyonso basengeli kosala ndenge moko na mosala ya kosakola oyo apesi bango. Ndenge ndakisa yango emonisi, moto na moto asengeli kosala nyonso oyo akoki “na kotalela likoki na ye mpenza.” Yango elingi koloba te ete Yesu akosepela soki moto azali “gɔigɔi” mpe asali te oyo asengeli kosala mpo biloko ya Nkolo ebakisama.

Kasi, bantoma basengeli kosepela na elaka oyo: “Moto nyonso oyo azali na eloko, bakobakisela ye mosusu”!

Makambo mosusu

MITUNA OYO BATO BATUNAKA MINGI

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basakolaka ndako na ndako?

Talá mosala oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ya liboso.