Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 106

Ndakisa mibale mpo na elanga ya vinyo

Ndakisa mibale mpo na elanga ya vinyo

MATAI 21:28-46 MARKO 12:1-12 LUKA 20:9-19

  • NDAKISA YA BANA MIBALI MIBALE

  • NDAKISA YA MOLONI YA ELANGA YA VINYO

Na tempelo, Yesu auti kosukisa banganga-nzambe bakonzi mpe mikóló ya bato, oyo balingi koyeba nani apesi ye bokonzi ya kosala makamwisi. Eyano ya Yesu ekangisi bango minɔkɔ. Na nsima, apesi ndakisa moko oyo emonisi bomoto mpenza ya bato yango.

Alobi: “Moto moko azalaki na bana mibale. Akei epai ya oyo ya liboso, alobi: ‘Mwana, kende kosala lelo na elanga ya vinyo.’ Ye azongisaki ete: ‘Tata, nakokende te,’ kasi na nsima ayoki mawa mpe akei. Apusani epai ya oyo ya mibale, alobaki kaka bongo. Ye azongisaki ete: ‘Nakokende,’ kasi akendaki te. Na bango mibale, nani asali mokano ya tata na ye?” (Matai 21:28-31, NW, ebimeli ya 2013) Eyano yango emonisi polele ete mwana ya liboso nde asali mokano ya tata na ye.

Na yango, Yesu ayebisi batɛmɛli na ye: “Ya solo nalobi na bino ete bakɔngɔli-mpako ná basi ya ndumba bazali kokɔta liboso na bino na bokonzi ya Nzambe.” Na ebandeli, bakɔngɔli-mpako ná basi ya ndumba bakokaki kosalela Nzambe te. Kasi, lokola mwana ya liboso, na nsima, babongolaki mitema mpe sikoyo bazali kosalela ye. Nzokande, bakonzi ya mangomba bazali lokola mwana ya mibale; bazali komikumisa ete basalelaka Nzambe kasi basalelaka ye te. Yesu alobi: “Yoane [Mobatisi] ayaki koteya bino nzela ya boyengebene, kasi bino bondimaki ye te. Nzokande, bakɔngɔli-mpako mpe basi ya ndumba bandimaki ye, mpe bino, atako bomonaki yango, na nsima, boyokaki mawa te mpo na kondima ye.”​—Matai 21:31, 32.

Yesu apesi ndakisa ya mibale. Na mbala oyo, amonisi ete bakonzi ya mangomba bazwaka likambo ya kosalela Nzambe na lisɛki. Bazali mpenza bato mabe. Yesu alobi: “Moto moko alonaki elanga ya vinyo, mpe azingaki yango na lopango, mpe atimolaki libulu ya ekamwelo ya vinyo mpe atongaki linɔ́ngi, mpe atikaki yango na mabɔkɔ ya basali-bilanga, mpe asalaki mobembo na mboka mopaya. Bongo, wana ntango ekokaki atindaki moombo moko epai ya basali-bilanga, mpo azwa ndambo ya mbuma ya elanga ya vinyo epai ya basali-bilanga. Kasi bakamataki ye, babɛtaki ye mpe bazongisaki ye mabɔkɔ mpamba. Mpe atindelaki bango lisusu moombo mosusu; ye mpe babɛtaki ye na motó mpe basambwisaki ye. Mpe atindaki mosusu, mpe babomaki ye; mpe atindaki bamosusu mingi: babɛtaki bamosusu mpe babomaki bamosusu.”​—Marko 12:1-5.

Bato oyo bazali koyoka Yesu bakangi ntina ya ndakisa yango? Bakoki komikundola maloba oyo ya Yisaya: “Elanga ya vinyo ya Yehova ya mampinga ezali ndako ya Yisraele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo azalaki kolinga mingi. Mpe azalaki kolikya ete akomona bosembo, kasi talá! kobuka mibeko.” (Yisaya 5:7) Ndakisa oyo Yesu apesi ekokani na oyo wana. Nkolo elanga ezali Yehova, mpe elanga ya vinyo ezali ekólo Yisraele, lopango oyo ezingi yango mpe ezali kobatela yango ezali nde Mibeko ya Nzambe. Yehova atindaki basakoli mpo na koteya bato ya ekólo na ye mpe kosalisa bango bábota mbuma malamu.

Nzokande, “basali-bilanga” babɛtaki mpe babomaki “baombo” oyo nkolo ya elanga atindelaki bango. Yesu alimboli: “[Nkolo elanga ya vinyo] azalaki lisusu na Mwana moko oyo azalaki kolinga mingi. Atindelaki bango ye moto ya nsuka, alobi: ‘Bakomemya mwana na ngai.’ Kasi basali-bilanga wana balobanaki ete: ‘Talá mozwi-ya-libula. Bóya, tóboma ye, mpe libula ekozala ya biso.’ Bongo bakamataki ye, babomi ye.”​—Marko 12:6-8.

Sikoyo, Yesu atuni: “Nkolo ya elanga ya vinyo akosala nini?” (Marko 12:9) Bakonzi ya mangomba bayanoli: “Lokola bazali bato mabe, akoboma bango koboma mpenza mpe akotika elanga ya vinyo na mabɔkɔ ya basali-bilanga mosusu, oyo bakopesa ye mbuma na eleko na yango.”​—Matai 21:41.

Na ndenge yango, bango moko bamikweisi na likambo mpo bazali na kati ya “basali-bilanga” ya “elanga ya vinyo” ya Yehova, ekólo Yisraele. Na  kati ya mbuma oyo Yehova alingi komona epai ya basali-bilanga wana, tokoki kotánga kondimela Mwana na ye, Masiya. Yesu atali bakonzi ya mangomba yango na bilongi mpe alobi: “Botángá naino te likomami oyo ete: ‘Libanga oyo batongi-ndako babwakaki ekómi libanga monene ya litumu ya ndako. Likambo yango euti na Yehova, mpe ezali likambo ya kokamwa na miso na biso’?” (Marko 12:10, 11) Na nsima, Yesu abimisi likanisi na ye polele: “Yango wana nalobi na bino ete: Bakolongola bokonzi ya Nzambe epai na bino mpe bakopesa yango ekólo moko oyo ekobota mbuma na yango.”​—Matai 21:43.

Bakomeli mpe banganga-nzambe bakonzi basosoli ete Yesu “apesaki ndakisa wana nde mpo na bango.” (Luka 20:19) Bazali koluka na ndenge nyonso báboma ye, “mozwi-ya-libula.” Kasi bazali kobanga ebele ya bato, oyo bamonaka ete Yesu azali mosakoli, yango wana baluki koboma ye te na ntango wana.

Makambo mosusu

NSANGO MALAMU OYO EUTI NA NZAMBE!

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Nani azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, mpe Bokonzi yango ekosala nini?