Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 138

Kristo afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe

Kristo afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe

MISALA 7:56

  • YESU AFANDI NA LOBƆKƆ YA MOBALI YA NZAMBE

  • SAULO AKÓMI MOYEKOLI YA YESU

  • TOSENGELI KOSEPELA

Mikolo zomi nsima ya komata ya Yesu na likoló, kokita ya elimo santu na mokolo ya Pantekote ezalaki elembo oyo emonisaki ete Yesu azongi mpenza na likoló. Elembo mosusu eyaki na nsima. Liboso ete bábanda kobamba moyekoli Stefano mabanga mpo na bosembo na ye, agangaki ete: “Talá! Namoni likoló efungwami mpe Mwana ya moto atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe.”​—Misala 7:56.

Kuna na likoló elongo na Tata na ye, Yesu azelaki bápesa ye mitindo ya sikisiki, ndenge Liloba ya Nzambe esakolaki. Elimo ya Nzambe esalisaki Davidi akoma ete: “Yehova alobi na Nkolo na ngai [Yesu]: ‘Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo lokola ebonga ya makolo na yo.’” Soki eleko yango ya kozela esili, akokende “kotya bato na nse ya bokonzi na [ye] na katikati ya banguna na [ye].” (Nzembo 110:1, 2) Kasi Yesu asalaki nini kuna na likoló wana azalaki kozela ete ntango ekoka mpo abundisa banguna na ye?

Na Pantekote 33 T.B., lisangá ya bokristo esalemaki. Longwa na likoló, Yesu abandaki koyangela to kokamba bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo. (Bakolose 1:13) Akambaki mosala ya kosakola mpe abongisaki bango mpo na mokumba oyo bakozwa na mikolo ezali koya. Mokumba nini? Baoyo bakotikala sembo tii na liwa bakosekwa mpe bakozala bakonzi elongo na Yesu na Bokonzi ya likoló.

Moko ya bato yango ezalaki Saulo, oyo tobengaka mingi Paulo, oyo ezali nkombo na ye ya Moroma. Azalaki Moyuda oyo akangamaki banda kala na Mibeko ya Nzambe, kasi bakonzi ya mangomba ya Bayuda babungisaki ye nzela tii andimaki kutu bábamba Stefano mabanga. Na nsima, lokola “azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo,” Saulo akendaki na Damasi. Nganga-nzambe monene Kaifa atindaki ye akanga bayekoli ya Yesu mpe azongisa bango na Yerusaleme. (Misala 7:58; 9:1) Kasi, na nzela, pole moko monene ebimelaki Saulo mpe akweaki na mabele.

Mongongo moko eutaki na likoló elobi: “Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai?” Saulo atunaki: “Yo nani, Nkolo?” Eyano ezalaki: “Ngai Yesu, oyo yo ozali konyokola.”​—Misala 9:4, 5.

Yesu ayebisaki Saulo akɔta na Damasi, mpe azela malako mosusu, kasi esɛngaki moto akende  kotika ye na engumba yango mpo pole wana ebomaki ye miso. Na emonaneli mosusu, Yesu abimelaki Ananiasi, moko ya bayekoli na ye, oyo afandaka na Damasi. Yesu ayebisaki Ananiasi akende na esika moko boye mpo na kokutana na Saulo. Ananiasi abangaki kokende kokutana na ye, kasi Yesu ayebisaki ye: “Mobali wana azali mbɛki oyo naponi mpo na komema nkombo na ngai epai ya bikólo mpe epai ya bakonzi mpe epai ya bana ya Yisraele.” Miso ya Saulo efungwamaki, mpe kuna na Damasi, “abandaki kosakola Yesu, ete Ye azali Mwana ya Nzambe.”​—Misala 9:15, 20.

Yesu asalisaki Paulo ná bapalanganisi mosusu ya nsango malamu bákoba na mosala oyo ye moko abandaki. Nzambe apambolaki mpenza mosala yango. Mbula soki 25 nsima ya mokolo oyo Yesu abimelaki Paulo na nzela ya Damasi, Paulo akomaki ete nsango malamu “esakolamaki na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.”​—Bakolose 1:23.

Bambula mingi na nsima, Yesu alakisaki Yoane, ntoma oyo azalaki kolinga mingi, bimonaneli ebele, oyo ezali na mokanda ya Emoniseli. Tokoki koloba ete na nzela ya bimonaneli yango, Yoane azalaki na bomoi mpe amonaki Yesu ayei na nguya ya Bokonzi na ye. (Yoane 21:22) ‘Na nzela ya elimo santu [Yoane] akómaki na mokolo ya Nkolo.’ (Emoniseli 1:10) Ebandaki ntango nini?

Boyekoli ya bisakweli ya Biblia emonisi ete “mokolo ya Nkolo” ebandaki na eleko na biso. Na 1914, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki. Banda wana, tozali komona bitumba, malɔzi, nzala, koningana ya mabele, mpe makambo mosusu na mokili mobimba oyo ezali kokokisa “elembo” oyo Yesu apesaki bantoma na ye mpo na komonisa “kozala” na ye mpe “nsuka.” (Matai 24:3, 7, 8, 14) Mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ezali kosalema lelo oyo, kaka na Ampire ya Roma te, kasi na mokili mobimba.

Elimo ya Nzambe esalisaki Yoane ayebisa ndimbola ya likambo yango: “Sikoyo lobiko, ná nguya, ná bokonzi ya Nzambe na biso, ná bokonzi ya Kristo na ye eyei.” (Emoniseli 12:10) Na ntembe te, Bokonzi ya Nzambe na likoló, oyo Yesu asakolaki awa na mabele, ezali likambo ya solo!

Yango ezali nsango malamu mpenza mpo na bayekoli nyonso ya sembo ya Yesu. Bakoki kondima maloba oyo ya Yoane: “Yango wana bósepela, bino likoló mpe bino baoyo bofandi na likoló! Mawa na mabele mpe na mbu, mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.”​—Emoniseli 12:12.

Na yango, Yesu afandi kaka na lobɔkɔ ya mobali ya Tata na ye te mpo na kozela. Sikoyo, azali Mokonzi mpe azali koyangela, mpe mosika te akoboma banguna na ye nyonso. (Baebre 10:12, 13) Mapamboli nini tokozwa?

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI

Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini? (Eteni 1)

Soki oyebi eyano, okoki kolimbolela moto mosusu na Biblia?