Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 110

Mokolo ya nsuka ya Yesu na tempelo

Mokolo ya nsuka ya Yesu na tempelo

MATAI 23:25–24:2 MARKO 12:41–13:2 LUKA 21:1-6

  • YESU APAMELI LISUSU BAKONZI YA MANGOMBA

  • TEMPELO EKOBEBISAMA

  • MWASI MOBOLA OYO MOBALI AKUFÁ APESI MBONGO MIBALE YA MIKE

Mbala ya nsuka oyo Yesu amonani na tempelo, azali kaka kobimisa bokosi ya bakomeli mpe Bafarisai; abengi bango polele bakosi. Asaleli maloba ya elilingi, ntango alobi: “Bopɛtolaka libándá ya kɔpɔ mpe ya saani, nzokande na kati etondi na kopunza mpe na kolekisa ndelo. Yo Mofarisai, moto oyo akufá miso, pɛtolá liboso na kati ya kɔpɔ mpe ya saani, mpo libándá mpe ekóma pɛto.” (Matai 23:25, 26) Bafarisai balandelaka malamumalamu milulu ya komipɛtola mpe ndenge ya komonana na miso ya bato, kasi batyaka likebi te na bomoto ya kati mpe bapɛtolaka mitema na bango ya elilingi te.

Bokosi na bango ezali mpe komonana na ndenge batongaka malita ya basakoli mpe bapakolaka yango langi. Nzokande, ndenge Yesu amonisi yango, bazali “bana ya bato oyo babomá basakoli.” (Matai 23:31) Bamonisi yango na milende oyo bazali kosala mpo na koboma Yesu.​—Yoane 5:18; 7:1, 25.

Na nsima, Yesu amonisi likambo oyo ezali kozela bakonzi yango ya mangomba soki babongoli mitema te: “Banyoka, bana ya bitupa, bokokima lisambisi ya Gehena ndenge nini?” (Matai 23:33) Lobwaku ya Hinome oyo ezali pembeni wana ezali esika oyo batumbaka bosɔtɔ; yango ezali mpenza elilingi oyo ebongi mpo na komonisa kobebisama ya libela, oyo ezali kozela bakomeli mpe Bafarisai wana, mpo bazali bato mabe.

Bayekoli ya Yesu bakozala bamonisi na ye, elingi koloba “basakoli mpe bato ya bwanya mpe balakisi ya bato.” Kasi makambo nini bakosala bango? Yesu alobi na bakonzi ya mangomba: ‘Bokoboma [bayekoli na ngai] mosusu mpe bokobaka bamosusu na nzete, mpe bokobɛta bamosusu fimbo na basinagoga na bino mpe bokonyokola bango na engumba na engumba; mpo makila ya bayengebene nyonso oyo esopaná na mabele ekwela bino, banda na makila ya moyengebene Abele tii na makila ya Zekaria . . . oyo bobomaki.’ Mpe akebisi bango: “Ya solo nalobi na bino: Makambo nyonso wana ekokwela libota oyo.” (Matai 23:34-36) Likambo yango esalemaki na mobu 70 T.B., ntango basoda ya Roma babebisaki Yerusaleme mpe bankóto mingi ya Bayuda bakufaki.

Lokola Yesu akanisi likambo wana ya nsɔmɔ, etungisi ye. Na mawa nyonso, alobi: “Yerusaleme, Yerusaleme, engumba oyo ebomaka basakoli mpe ebambaka baoyo batindami epai na yango mabanga,​—mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo esika moko, ndenge nsoso ya mwasi eyanganisaka bana na yango na nse ya mapapu na yango! Kasi bolingaki yango te. Talá! basundoleli bino ndako na bino.” (Matai 23:37, 38) Na ntembe te, baoyo bayoki maloba wana bamituni “ndako” nini azali kolobela. Azali nde kolobela tempelo kitoko oyo ezali wana na Yerusaleme, oyo emonanaka ete Nzambe abatelaka yango?

Na nsima, Yesu abakisi: “Nalobi na bino: Bokomona ngai lisusu te tii bokoloba: ‘Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova apambwama!’” (Matai 23:39) Yango ezali maloba ya esakweli oyo ezali na Nzembo 118:26: “Ye oyo azali koya na nkombo ya Yehova apambwama; topamboli bino uta na ndako ya Yehova.” Emonani polele ete ntango tempelo wana ekobebisama, moto moko te akoya wana na nkombo ya Nzambe.

Sikoyo, Yesu akei na eteni ya tempelo esika kɛsi ya makabo ezali. Bato batyaka makabo na kɛsi yango. Yesu amoni ndenge Bayuda bazali kotya makabo; bazwi “bazalaki kotya mbongo mingi ya bibende.” Na nsima, Yesu amoni mwasi mobola moko oyo mobali akufá azali kotya “mbongo ya bibende mibale ya motuya moke mpenza.” (Marko 12:41, 42) Na ntembe te, Yesu ayebi malamu ndenge oyo Nzambe asepeli na likabo na ye.

Yesu abengi bayekoli na ye, mpe alobi: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete mwasi mobola wana oyo mobali akufá atye mingi koleka bato nyonso oyo batyaki mbongo na bakɛsi ya makabo.” Mpo na nini alobi bongo? Alimboli: “Bango nyonso batyaki oyo balongolaki na biloko na bango oyo eleki ebele, kasi ye, na kokelela na ye, atyaki nyonso oyo azalaki na yango, nyonso oyo azalaki na  yango mpo na kobikela.” (Marko 12:43, 44) Akeseni mpenza na bakonzi ya mangomba, ezala na makanisi to na misala!

Lokola mokolo ya 11 Nisana ezali kokende na nsuka, Yesu atiki tempelo mpo na mbala ya nsuka. Moyekoli na ye moko alobi: “Moteyi, talá! Oyo mabanga ya ndenge nini mpe oyo bandako ya ndenge nini!” (Marko 13:1) Ya solo, mabanga mosusu na bifelo ya tempelo ezali mpenza minene; yango nde ezali kosala ete ndako yango ezala makasi mpe eumela. Na ntembe te, ekoki kokamwisa; yango wana Yesu alobi: “Ozali kotala bandako wana ya minene? Ata libanga moko te ekotikala likoló ya libanga mosusu awa, nyonso ekokwea na nse.”​—Marko 13:2.

Nsima ya koloba maloba wana, Yesu ná bantoma na ye bakatisi Lobwaku ya Kidrone mpe bamati na Ngomba ya Olive. Na ntango moko boye, atikali kaka na bantoma na ye minei: Petro, Andre, Yakobo ná Yoane. Kuna likoló ya ngomba, bakoki kotala mpe komona kitoko ya tempelo.