Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 131

Mokonzi moko oyo asali eloko te babaki ye na nzete

Mokonzi moko oyo asali eloko te babaki ye na nzete

MATAI 27:33-44 MARKO 15:22-32 LUKA 23:32-43 YOANE 19:17-24

  • BABAKI YESU NSƐTƐ NA NZETE YA MPASI

  • MAKAMBO BAKOMI NA NZETE EZALI KOSƐKISA BATO

  • YESU ALAKI MOTO BOMOI NA PARADISO AWA NA MABELE

Bakei na Yesu mosika ya engumba, esika bakoboma ye ná miyibi mibale. Esika yango ebengami Golgota, to Esika ya Mokuwa ya Motó, mpe ezali komonana “na mosika.”​—Marko 15:40.

Balongoli mibali misato yango bilamba. Na nsima, bapesi bango vinyo batyá mire mpe nsɔngi ya bololo mpo bálangwa. Emonani ete basi ya Yerusaleme nde bato basali yango, mpe Baroma bapesaka yango bato oyo basengeli kobomama mpo ekitisaka mpasi. Kasi ntango Yesu ameki yango, aboyi komɛla yango. Mpo na nini? Alingi kozala na molangwa te na ntango ya komekama monene wana; alingi ayeba makambo nyonso mpe atikala sembo tii na liwa.

Babaki Yesu na nzete. (Marko 15:25) Basoda babaki ye nsɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo, etɔbɔli nzoto mpe bikanganeli na yango, mpe ezali kosala ye mpasi makasi. Ntango bazali kotɛlɛmisa nzete, mpasi ezali kokóma makasi mpo nzoto ya Yesu ezali kobendama mpe kopasuka. Kasi Yesu apameli basoda yango te. Abondeli: “Tata, limbisá bango, mpo bazali koyeba oyo bazali kosala te.”​—Luka 23:34.

Baroma batyaka makomi likoló ya nzete mpo na komonisa makambo oyo moto oyo babomi asali. Epai ya Yesu, Pilate akomi: “Yesu Monazarete Mokonzi ya Bayuda.” Akomi yango na Ebre, na Latin na Grɛki, mpo bato mingi bátánga yango. Pilate akomi bongo mpo na komonisa ete asepelaki te ndenge Bayuda batyaki ye mbamba aboma Yesu. Banganga-nzambe bakonzi babangi mpe balobi: “Kokoma te ete: ‘Mokonzi ya Bayuda.’” Kasi, Pilate aboyi básakana na ye lisusu, ayanoli: “Oyo nakomi, nakomi.”​—Yoane 19:19-22.

Na nkanda, banganga-nzambe yango bazongeli lisusu likambo ya lokuta oyo balobaki liboso na Sanedrina. Yango wana, bato oyo bazali koleka wana bazali koningisa motó na kosɛka mpe kofinga ye ete: “Ɛɛ! Yo moto olingaki kobuka tempelo mpe kotonga yango na mikolo misato, omibikisa na nzete ya mpasi.” Banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli mpe bazali kolobana ete: “Kristo Mokonzi ya Yisraele akita sikoyo na nzete ya mpasi, mpo tómona mpe tóndima.” (Marko 15:29-32) Ata miyibi oyo bazali penepene na ye bapameli ye; nzokande ye asali likambo moko ya mabe te.

Basoda minei ya Roma mpe bazali kosɛka Yesu. Ntango mosusu bazali komɛla vinyo ya ngayi; sikoyo mpo na kotyola Yesu, bapesi ye mwa ndambo, kasi akokoka kozwa yango te mpo na komɛla yango. Basoda yango ya Roma basɛki makomi oyo ezali likoló ya motó ya Yesu mpe balobi: “Soki ozali mokonzi ya Bayuda, omibikisa yo moko.” (Luka 23:36, 37) Kanisá naino! Moto oyo amonisaki ete azali nzela, solo mpe bomoi, sikoyo bazali konyokola ye mpe kosɛka ye kaka mpamba. Yesu akangi motema na nyonso wana; apameli te Bayuda oyo bazali kotala ye, basoda ya Roma oyo bazali kosɛka ye,  to basali-mabe mibale oyo babakami na nzete pene na ye.

Basoda minei yango bazwi bilamba ya Yesu ya likoló mpe bakaboli yango na ndambo minei. Babɛti mbɛsɛ mpo na koyeba oyo moto na moto akozwa. Kasi, elamba ya Yesu ya kati ezali na motuya mingi, “etongamaki na biteni te, elitamá mobimba banda na likoló tii na nse.” Basoda yango balobi: “Tópasola yango te, kasi tóbɛta mbɛsɛ mpo na koyeba soki ekozala ya nani.” Na yango, bakokisi esakweli oyo elobi: “Bamikabolelaki bilamba na ngai ya likoló, mpe babwakelaki elamba na ngai mbɛsɛ.”​—Yoane 19:23, 24; Nzembo 22:18.

Na nsima, moko ya basali-mabe ayei koyeba ete Yesu azali mpenza mokonzi. Apameli moninga na ye, alobi: “Yo ozali kobanga Nzambe te, awa yo ná moto oyo bozwi lisambisi moko? Ɛɛ, kutu biso, esengeli bongo, mpo tozali kozwa oyo ekoki na makambo oyo tosalaki; kasi moto oyo asali likambo moko ya mabe te.” Na nsima, abondeli Yesu, alobi: “Yesu, kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.”​—Luka 23:40-42.

Yesu azongisi: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai,” na Bokonzi te, kasi “na Paradiso.” (Luka 23:43) Elaka yango ekeseni na oyo Yesu apesaki bantoma na ye, ete bakofanda na bakiti ya bokonzi elongo na ye na Bokonzi ya Nzambe. (Matai 19:28; Luka 22:29, 30) Kasi, ekoki kozala ete mosali-mabe yango ayebaki makambo etali Paradiso ya liboso, oyo Yehova asalaki awa na mabele mpo na Adama, Eva, mpe bana na bango. Sikoyo ata soki moyibi yango akufi, azwi elikya ya kozala na Paradiso.

Makambo mosusu

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Yesu akufaki nde na ekulusu?

Bato mingi bamonaka ete ekulusu ezali elembo ya bokristo. Tosengeli kosalela yango na losambo?