Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 107

Mokonzi abengi baoyo babengisami na fɛti ya libala

Mokonzi abengi baoyo babengisami na fɛti ya libala

MATAI 22:1-14

  • NDAKISA YA FƐTI YA LIBALA

Lokola mosala ya kosakola ya Yesu ekómi pene na nsuka, azali kosalela bandakisa mpo na kobimisa mabe ya bakomeli mpe banganga-nzambe bakonzi. Yango wana, balingi koboma ye. (Luka 20:19) Kasi Yesu asilisi naino te kobimisa mabe na bango polele. Apesi ndakisa mosusu:

“Bokonzi ya likoló ezali lokola mokonzi moko oyo asalelaki mwana na ye ya mobali fɛti ya libala. Mpe atindaki baombo na ye bábenga bato oyo babengisamaki na fɛti ya libala, kasi bato yango baboyaki koya.” (Matai 22:2, 3) Yesu abandi ndakisa na ye na maloba “Bokonzi ya likoló.” “Mokonzi” esengeli kozala kaka Yehova Nzambe. Bongo mwana ya mokonzi ezali nani? Mpe banani babengisami na fɛti ya libala? Awa lisusu, ezali mpasi te koyeba mwana ya mokonzi: ezali Mwana ya Yehova, oyo azali kopesa ndakisa yango. Baoyo babengisami ezali bakristo oyo bakoyangela elongo na Mwana yango na Bokonzi ya likoló.

Banani bazali bato ya liboso oyo babengisamaki? Yesu ná bantoma na ye basakwelaki banani nsango ya Bokonzi? Ezali Bayuda. (Matai 10:6, 7; 15:24) Ekólo yango endimaki kondimana ya Mibeko na mobu 1513 L.T.B., na ndenge yango, bato ya ekólo yango bakómaki bato ya liboso ya kozala na kati ya “bokonzi moko ya banganga-nzambe.” (Kobima 19:5-8) Kasi ntango nini mpenza babengisamaki na “fɛti ya libala”? Babengisamaki na mobu 29 T.B., ntango Yesu abandaki kosakola nsango ya Bokonzi ya likoló.

Kasi Bayisraele mingi bandimaki libyangi yango? Ndenge Yesu alobi, “baboyaki koya.” Bakonzi mingi ya mangomba mpe bato mingi ya ekólo yango bandimaki te ete Yesu azali Masiya mpe Mokonzi oyo Nzambe aponi.

Kasi, Yesu amonisi ete Bayuda bazwaki libaku mosusu: “Lisusu [mokonzi] atindaki baombo mosusu mpe alobaki ete: ‘Yebisá bato oyo babengisami ete: “Talá! Nabongisi bilei na ngai ya midi, bangɔmbɛ na ngai ya mibali ná banyama ya mafuta ebomami, mpe biloko nyonso elɛngɛlami. Bóya na fɛti ya libala.”’ Kasi bamonaki yango mpamba mpe bakendaki, mosusu na elanga na ye, mosusu na mombongo na ye; kasi baoyo batikali bakangaki  baombo na ye, basambwisi bango mabe mpe babomi bango.” (Matai 22:4-6) Yango ekokani na likambo oyo esalemaki ntango lisangá ya bokristo ebandaki. Na ntango wana, Bayuda bazalaki naino na libaku ya kozala na Bokonzi; atako bongo, mingi baboyaki kondima libyangi wana; kutu banyokolaki ‘baombo ya mokonzi.’​—Misala 4:13-18; 7:54, 58.

Makambo ya ekólo yango esuki ndenge nini? Yesu alobi: “Mokonzi ayokaki nkanda, mpe atindaki mampinga na ye mpe babomaki babomi-bato wana mpe batumbaki engumba na bango.” (Mata 22:7) Bayuda bamoni likambo yango na mobu 70 T.B., ntango Baroma babebisaki “engumba na bango,” Yerusaleme.

Lokola baboyaki libyangi ya mokonzi, yango elingi koloba ete bato mosusu bakobengisama te? Na kotalela ndakisa ya Yesu, ezali bongo te. Abakisi: “Bongo [mokonzi] alobaki na baombo na ye ete: ‘Fɛti ya libala elɛngɛlami mpenza, kasi bato oyo babengisamaki babongi na yango te. Yango wana, bókende na banzela oyo ekendá tii na libándá ya engumba, mpe moto nyonso oyo bokokuta bóbengisa ye na fɛti ya libala.’ Bongo baombo yango babimaki na banzela mpe basangisaki bato nyonso oyo bakutaki, bato mabe ná bato malamu; mpe ndako ya milulu ya libala etondaki na bato oyo bafandi na mesa.”​—Matai 22:8-10.

Yango wana, na nsima, ntoma Petro abandaki kosalisa bato ya bikólo​—elingi koloba bato oyo bazalaki Bayuda te to bakɔtaki na losambo ya Bayuda te—​mpo bákóma bakristo ya solo. Na mobu 36 T.B., Korneyi, mokonzi moko ya basoda ya Roma ná libota na ye bazwaki elimo santu ya Nzambe; na ndenge yango, bazwaki esika na Bokonzi ya likoló oyo Yesu alobelaki.​—Misala 10:1, 34-48.

Yesu amonisi ete ezali te bato nyonso oyo bayei na fɛti nde “mokonzi” akondima bango. Alobi: “Ntango mokonzi ayaki kotala bato oyo babengisami amonaki kuna moto moko oyo alataki elamba ya libala te. Bongo alobaki na ye ete: ‘Moninga, ndenge nini okɔti awa na elamba ya libala te?’ Ye azangaki likambo ya koloba. Bongo mokonzi alobaki na basaleli na ye ete: ‘Bókanga ye mabɔkɔ ná makolo mpe bóbwaka ye na molili ya libándá. Kuna nde akolela mpe akolya mino.’ Mpo bato mingi babengisami, kasi moke nde baponami.”​—Matai 22:11-14.

Ekoki kozala ete bakonzi ya mangomba oyo bazali koyoka Yesu bazali kokanga ntina te ya makambo nyonso oyo azali koloba. Atako bongo, basepeli te mpe bazali kaka na ekateli, koleka oyo bazalaki na yango liboso, ya koboma moto oyo azali koyokisa bango nsɔni ndenge wana.