Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 115

Elekeli ya nsuka ya Yesu ekómi pene

Elekeli ya nsuka ya Yesu ekómi pene

MATAI 26:1-5, 14-19 MARKO 14:1, 2, 10-16 LUKA 22:1-13

  • YUDASI MOKERIOTA ATƐKI YESU

  • BANTOMA MIBALE BABONGISI ELEKELI

Yesu asilisi koteya bantoma minei na Ngomba ya Olive; ayanoli na motuna na bango oyo etali kozala na ye na mikolo ezali koya mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo.

Azali na mosala mingi na mokolo ya 11 Nisana. Ekoki kozala ntango Yesu ná bantoma bazali kozonga na Betania mpo na kolala nde alobi na bango: “Boyebi ete etikali mikolo mibale elekeli esalema, mpe bakokaba Mwana ya moto mpo bábaka ye na nzete.”​—Matai 26:2.

Emonani ete Yesu alekisi malamu mpenza mokolo oyo elandi, mokolo ya misato, kaka na bantoma na ye. Na mokolo ya mibale, apamelaki bakonzi ya mangomba mpe amonisaki mabe na bango polele. Baluki koboma ye. Yango wana, amimonisi polele te na mokolo ya 12 Nisana mpo eloko moto te epekisa ye ná bantoma na ye kosala Elekeli na mpokwa na mokolo oyo ekolanda ntango moi ekolala, mpo na ntango yango nde mokolo ya 14 Nisana ekobanda.

Kasi banganga-nzambe bakonzi mpe mikóló ya bato baboyi kokanga monɔkɔ liboso ya Elekeli. Bayangani na lopango ya nganga-nzambe monene Kaifa. Mpo na nini? Bazali na nkanda mpo Yesu amonisi mabe na bango polele. Sikoyo basali likita “mpo bákanga Yesu na mayele mabe mpe báboma ye.” Ndenge nini bakosala yango mpe ntango nini bakosala yango? Balobi: “Na fɛti te, mpo yikiyiki ebima na kati ya bato te.” (Matai 26:4, 5) Bazali kobanga mpo bato mingi bazali kosepela na Yesu.

Na ntango yango, bakonzi ya mangomba bayambi mopaya moko. Likambo ya kokamwa, ezali moko ya bantoma ya Yesu, Yudasi Mokeriota. Satana atye na motema na ye likanisi ya kotɛka Nkolo na ye! Yudasi atuni bango: “Bokopesa ngai nini mpo natɛkɛla bino ye?” (Matai 26:15) Lokola basepeli na likambo yango, ‘bayokani bápesa ye shekele ya palata.’ (Luka 22:5) Ntalo boni? Na esengo nyonso, bandimi kopesa ye shekele ya palata  30. Ezali na ntina mingi mpo shekele 30 ezali motuya ya mbongo oyo basombaka na yango moombo. (Kobima 21:32) Na yango, bakonzi ya mangomba batyoli Yesu, bamonisi ete azali na ntina te. Kobanda na ntango wana, Yudasi abandi “koluka libaku ya malamu mpo na kotɛkɛla bango ye na ntango oyo ebele ya bato bazali zingazinga te.”​—Luka 22:6.

Mokolo ya 13 Nisana ebandi na mpokwa ya mokolo ya misato, mpe yango nde butu ya motoba mpe ya nsuka oyo Yesu alali na Betania. Na mokolo oyo elandi, basengeli kobongisa makambo oyo etikali mpo na kosala Elekeli. Esengeli kozwa mwana-mpate, koboma yango mpe kolamba liboso mokolo ya 14 Nisana ebanda. Epai wapi bakolya yango mpe nani akolamba? Yesu alobeli makambo yango te. Yango wana, Yudasi akoki te koyebisa yango banganga-nzambe bakonzi.

Ekoki kozala ete na mpokwa ya mokolo ya minei, Yesu atindi Petro ná Yoane na Betania, alobi: “Bókende mpe bóbongisela biso elekeli mpo tólya yango.” Batuni ye: “Epai wapi olingi tóbongisa yango?” Yesu alimboli: “Ntango bokokɔta na engumba moto moko oyo amemi mbɛki ya mai akokutana na bino. Bólanda ye na ndako oyo akokɔta. Mpe bosengeli koloba na nkolo ya ndako ete: ‘Moteyi alobi na yo ete: “Wapi ndako ya koyamba bapaya epai nakoki kolya elekeli elongo na bayekoli na ngai?”’ Mpe moto yango akolakisa bino shambrɛ moko monene ya likoló oyo ezali na biloko nyonso. Bóbongisa yango kuna.”​—Luka 22:8-12.

Na ntembe te, nkolo ya ndako yango azali moyekoli ya Yesu. Ntango mosusu ayebaki liboso ete Yesu akosɛnga ete Elekeli esalema na ndako na ye. Ntango bantoma mibale yango bakómi na Yerusaleme, bakuti makambo nyonso kaka ndenge Yesu ayebisaki bango. Bamoni ete mwana-mpate elambami mpe esika ebongisami mpo Yesu ná bantoma na ye 12 básala Elekeli.