Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 112

Liteya oyo etali kosɛnzɛla​—Bangɔndɔ

Liteya oyo etali kosɛnzɛla​—Bangɔndɔ

MATAI 25:1-13

  • YESU APESI NDAKISA YA BANGƆNDƆ ZOMI

Yesu auti koyanola na motuna oyo bantoma batuni ye mpo na elembo ya kozala na ye mpe nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. Lokola lisolo yango ezali naino na mitó na bango, apesi bango toli mosusu ya malamu na nzela ya ndakisa mosusu. Bato oyo bakozala na bomoi na ntango ya kozala na ye nde bakomona kokokisama na yango.

Abandi ndakisa yango na maloba oyo: “Bokonzi ya likoló ekozala lokola bangɔndɔ zomi oyo bakamataki miinda na bango mpe babimaki kokutana na mobali ya libala. Mitano na bango bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele.”​—Matai 25:1, 2.

Yesu alingi koloba te ete ndambo ya bayekoli na ye oyo bakozwa libula ya Bokonzi ya likoló bazali bazoba mpe ndambo mosusu bazali mayele. Alingi nde komonisa ete na likambo oyo etali Bokonzi, moyekoli na ye mokomoko azali na likoki ya kopona soki akokoba kosɛnzɛla to akotika makambo mosusu elongola likebi na ye. Kasi, Yesu ayebi ete mosaleli na ye mokomoko akoki kotikala sembo mpe kozwa mapamboli ya Tata na ye.

Na ndakisa yango, bangɔndɔ nyonso zomi bakei koyamba mobali ya libala mpe kokɔta na molɔngɔ ya bato oyo bakei na fɛti ya libala. Ntango mobali ya libala akokóma, bangɔndɔ yango bakozala na miinda mpo na komona nzela; na ndenge yango bakopesa ye lokumu ntango azali kokɔtisa mwasi na ye na ndako oyo abongiseli ye. Kasi, makambo eleki ndenge nini?

 Yesu alimboli: “Bazoba bakamataki miinda na bango kasi bakamataki mafuta ya kobakisa te, nzokande baoyo ya mayele bakamataki miinda na bango ná mafuta ya kobakisa na kati ya milangi na bango. Lokola mobali ya libala azalaki koumela, mpɔngi etungisaki bango nyonso mpe balalaki.” (Matai 25:3-5) Mobali ya libala akómi noki te ndenge bakanisaki. Emonani ete aumeli mingi koleka, yango wana bangɔndɔ yango balali. Ntango mosusu bantoma bakanisi ndakisa oyo Yesu apesaki, ya moto moko ya lokumu oyo asalaki mobembo mosika mpe “nsukansuka . . . azongaki nsima ya kozwa nguya ya bokonzi.”​—Luka 19:11-15.

Na ndakisa ya bangɔndɔ zomi, Yesu alimboli oyo esalemi ntango mobali ya libala akómi: “Na katikati mpenza ya butu mongongo moko eyokanaki: ‘Mobali ya libala ayei! Bóbima kokutana na ye.’” (Matai 25:6) Sikoyo, tokoloba nini: Bangɔndɔ yango bamilɛngɛlaki mpe basɛnzɛlaki?

Yesu abakisi: “Bongo bangɔndɔ nyonso wana batɛlɛmaki mpe babongisaki miinda na bango. Bazoba balobaki na baoyo ya mayele ete: ‘Bópesa biso ndambo ya mafuta na bino, mpo miinda na biso elingi kokufa.’ Baoyo ya mayele bayanolaki na maloba oyo: ‘Mbala mosusu ekokoka mpenza biso ná bino te. Bongo bókende epai ya baoyo batɛkaka yango mpe bósomba ya bino.’”​—Matai 25:7-9.

Bangɔndɔ mitano ya zoba basɛnzɛlaki te mpe bamilɛngɛlaki te mpo na koya ya mobali ya libala. Miinda na bango ezangi mafuta mpe esengeli bákende koluka mafuta. Yesu alobi: “Ntango bakendaki kosomba, mobali ya libala akómaki, mpe bangɔndɔ oyo bamilɛngɛlaki bakɔtaki na ye na fɛti ya libala; mpe porte ekangamaki. Na nsima bangɔndɔ mosusu wana mpe bayaki, balobi: ‘Tata, tata, fungolá biso!’ Ye ayanolaki ete: ‘Nayebisi bino solo: Nayebi bino te.’” (Matai 25:10-12) Likambo oyo ya mawa ekómeli bango mpo bamilɛngɛlaki te mpe basɛnzɛlaki te.

Na ntembe te, bantoma basosoli ete mobali ya libala oyo Yesu alobeli ezali ye moko. Kutu, mwa moke liboso, amibengaki mobali ya libala. (Luka 5:34, 35) Bongo bangɔndɔ ya mayele ezali banani? Ntango Yesu azali kolobela “etonga moke” oyo bakozwa Bokonzi, asalelaki maloba: “Bómilɛngɛla mpe miinda na bino epela.” (Luka 12:32, 35) Boye, na ndakisa oyo ya bangɔndɔ zomi, bantoma basosoli ete Yesu azali kolobela bato mosusu te kasi bango. Bongo, liteya nini Yesu alingi kobimisa na ndakisa yango?

Yesu atiki bango na molili te. Asukisi ndakisa na ye na maloba oyo: “Yango wana, bósɛnzɛlaka mpamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.”​—Matai 25:13.

Emonani polele ete Yesu azali kokebisa bayekoli na ye ya sembo, ete na likambo etali kozala na ye, basengeli ‘kosɛnzɛla.’ Nsukansuka akoya, mpe basengeli komilɛngɛla mpe kozala ekɛngɛ, lokola bangɔndɔ mitano ya mayele, mpo bákoba kotya miso na elikya mpe bázwa libula na bango.

Makambo mosusu

Biblia eteyaka mpenza nini?

Tozali na “mikolo ya nsuka”?