Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 133

Babongisi nzoto ya Yesu mpe bakundi yango

Babongisi nzoto ya Yesu mpe bakundi yango

MATAI 27:57–28:2 MARKO 15:42–16:4 LUKA 23:50–24:3 YOANE 19:31–20:1

  • BAKITISI NZOTO YA YESU NA NZETE

  • BABONGISI YANGO MPO BÁKUNDA YANGO

  • BASI BAKUTI LILITA ETIKALI MPAMBA

Tozali na mokolo ya mitano, mwa 14 Nisana mpe ngonga epusani. Nsima ya kolala ya moi, Sabata ya mokolo ya 15 Nisana ekobanda. Yesu akufi, kasi miyibi mibale oyo bazali pembeni na ye bazali naino na bomoi. Na kolanda Mibeko, bibembe “ekotikala butu mobimba likoló ya nzete te”; esengeli kokundama kaka “na mokolo yango.”​—Kolimbola Mibeko 21:22, 23.

Lisusu, mokolo ya mitano ebengami ntango ya Bolɛngɛli mpo bato babongisaka bilei mpe basilisaka kosala makambo nyonso oyo ekoki kozela te tii na nsima ya Sabata. Soki moi elali, basabata mibale, to Sabata “monene” ekobanda. (Yoane 19:31) Ezali Sabata monene mpo mokolo ya 15 Nisana ekozala mokolo ya liboso ya Fɛti ya bagato ezangá levire oyo eumelaka mikolo nsambo; mokolo yango ya liboso ezalaka kaka Sabata. (Balevi 23:5, 6) Sikoyo, mokolo yango ya liboso ekutani na Sabata ya pɔsɔ, elingi koloba mokolo ya nsambo.

Na yango, Bayuda basɛngi Pilate aboma Yesu mpe miyibi mibale nokinoki. Ndenge nini? Bábuka bango makolo. Soki makolo na bango ebukani bakokoka kotombola nzoto te mpo na kopema. Basoda bayei mpe babuki makolo ya miyibi mibale wana. Kasi lokola bamoni ete Yesu akufi, babuki makolo na ye te. Yango ekokisi maloba ya Nzembo 34:20: “Azali kobatela mikuwa nyonso ya moto yango; moko na yango ebukani te.”

Mpo na kondima ete Yesu akufi mpenza, soda moko atɔbɔli ye likɔnga na mopanzi, ekɔti tii na motema. ‘Na mbala moko makila ná mai ebimi.’  (Yoane 19:34) Yango ekokisi esakweli mosusu: “Bakotala mpenza epai ya Moto oyo batɔbɔlaki.”​—Zekaria 12:10.

Yozefe, moto ya engumba Arimatea oyo azali “mozwi” mpe moko ya basambisi ya lokumu na Sanedrina, azali mpe wana ntango babomi Yesu. (Matai 27:57) Biblia ebengi ye “moto malamu mpe moyengebene,” oyo azalaki “kozela bokonzi ya Nzambe.” Kutu, lokola “azalaki moyekoli ya Yesu kasi na kobombana mpo azalaki kobanga Bayuda,” andimaki te etumbu Sanedrina ekatelaki Yesu. (Luka 23:50; Marko 15:43; Yoane 19:38) Yozefe alongoli kobanga mpe asɛngi Pilate nzoto ya Yesu. Pilate abengi mokonzi ya basoda mpe atuni ye soki Yesu akufi mpenza; mokonzi yango andimi. Na nsima, Pilate andimi Yozefe azwa ebembe yango.

Yozefe asombi elamba moko ya lini ya pɛto mpe ya kitoko, mpe akitisi nzoto ya Yesu na nzete. Azingi ebembe na elamba yango ya lini mpo na kobongisa yango liboso ekundama. Nikodeme, “moto oyo liboso ayaki epai na [Yesu] na butu” asalisi mpe na kobongisa nzoto yango. (Yoane 19:39) Ayei na rulo ya mire mpe aloe ya litra soki nkama moko (kilo soki 33), ya ntalo makasi. Balíngi nzoto ya Yesu na bilamba oyo batye malasi yango, ndenge Bayuda bakundaka bibembe.

Pembeni wana, Yozefe azali na lilita moko ya sika oyo atimolaki na libanga mpe alalisi nzoto ya Yesu na kati. Na nsima, bazipi monɔkɔ ya lilita yango na libanga moko ya monene. Basali yango nokinoki, liboso Sabata ebanda. Ekoki kozala ete Maria Magadalena mpe Maria mama ya Yakobo Moke basalisaki na kobongisa nzoto ya Yesu. Sikoyo bazongi ndako noki “mpo na kobongisa matiti ya nsolo mpe mafuta ya nsolo kitoko” mpo na kopakola nzoto ya Yesu nsima ya Sabata.​—Luka 23:56.

Na mokolo oyo elandi, mokolo ya Sabata, banganga-nzambe bakonzi mpe Bafarisai bakei epai ya Pilate mpe balobi: “Tokanisi lisusu ete, ntango mokosi wana azalaki na bomoi alobaki: ‘Nakosekwa nsima ya mikolo misato.’ Yango wana, pesá mitindo ete bábatela lilita tii na mokolo ya misato, noki bayekoli na ye báya koyiba ye mpe báloba na bato ete: ‘Alamuki uta na bakufi!’ mpe bokosi ya mbala oyo ekozala mabe mingi koleka oyo ya liboso.” Pilate alobi na bango ete: “Bozali na bakɛngɛli. Bókende kobatela yango ndenge boyebi.”​—Matai 27:63-65.

Mokolo ya lomingo na ntɔngɔntɔngɔ, Maria Magadalena, Maria mama ya Yakobo mpe basi mosusu bayei na matiti ya nsolo kitoko na lilita mpo na kotya na nzoto ya Yesu. Bazali kolobana: “Nani akobalolela biso libanga oyo elongwa na monɔkɔ ya lilita?” (Marko 16:3) Nzokande mabele eninganaki. Lisusu, anzelu ya Nzambe alongoli libanga yango, bakɛngɛli bazali te, mpe lilita etikali mpamba!