Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 111

Bantoma batuni elembo

Bantoma batuni elembo

MATAI 24:3-51 MARKO 13:3-37 LUKA 21:7-38

  • BAYEKOLI MINEI BATUNI ELEMBO

  • KOKOKISAMA NA YANGO NA SIƐKLƐ YA LIBOSO MPE NA NSIMA

  • TOSENGELI KOZALA EKƐNGƐ

Tokómi mokolo ya mibale nsima ya midi, mpe mokolo ya 11 Nisana ezali kokóma na nsuka. Etikali mpe moke mosala makasi ya Yesu awa na mabele esila. Na moi, azali koteya na tempelo, mpe na butu azali kolala na libándá ya engumba. Bato basepelaki mingi na mateya na ye, yango wana “bazalaki koya ntɔngɔntɔngɔ epai na ye na tempelo mpo na koyoka ye.” (Luka 21:37, 38) Mokolo wana eleki, sikoyo Yesu afandi na Ngomba ya Olive ná bantoma na ye minei: Petro, Andre, Yakobo, ná Yoane.

Bantoma minei wana bayei epai na ye kaka bango moko. Bazali komitungisa mpo na tempelo, mpo Yesu auti kosakola ete ata libanga na yango moko te ekotikala likoló ya libanga mosusu. Kasi, bazali na makanisi mosusu. Mwa moke liboso, Yesu alendisaki bango ete: “Bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.” (Luka 12:40) Alobelaki mpe “mokolo . . . oyo Mwana ya moto akomonana.” (Luka 17:30) Maloba wana eyokani nde mwa moke na oyo auti koloba mpo na tempelo? Bantoma yango bazali mpenza na mposa ya koyeba. Batuni ye: “Yebisá biso: Makambo yango ekosalema ntango nini, mpe elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?”​—Matai 24:3.

Ntango mosusu bazali kokanisa ndenge oyo tempelo ekobebisama mpe bakomona yango lisusu te. Batuni mpe mpo na koyeba ntango ya kozala ya Mwana ya moto. Na ntembe te, bamikundoli ete Yesu apesaki ndakisa ya “moto moko boye ya lokumu” oyo ‘asalaki mobembo mpo na kozwa nguya ya bokonzi mpe kozonga.’ (Luka 19:11, 12) Na nsuka, bazali komituna ndenge ‘bosukisi ya makambo ya ntango oyo’ ekozala.

Na eyano oyo Yesu apesi, alobeli elembo oyo ekosalisa bango báyeba ntango oyo ebongiseli ya Bayuda ná tempelo na yango ekosuka. Kasi asuki wana te. Elembo yango ekosalisa mpe bakristo na mikolo ekoya báyeba ntango nini bakómi na eleko ya “kozala” na ye, mpe báyeba ete bakómi pene na nsuka ya makambo ya ntango oyo, awa na mabele.

Ntango bambula ezali koleka, bayekoli bazali komona ndenge esakweli wana ya Yesu ezali kokokisama. Makambo mingi oyo Yesu asakolaki ebandi komonana ntango bazali naino na bomoi. Yango ekosalisa bakristo oyo bazali kotya likebi, oyo bazali na bomoi mbula 37 na nsima, elingi koloba na mobu 70 T.B., bámilɛngɛla, mpo etikali moke ebongiseli ya Bayuda mpe tempelo na bango ebebisama. Kasi, makambo nyonso te oyo Yesu asakolaki esalemi na eleko oyo esuki na mobu 70 T.B. Na yango, nini ekomonisa kozala na ye na kati ya Bokonzi? Yesu apesi bantoma eyano.

Yesu asakoli ete “bitumba mpe nsango ya bitumba” ekozala, mpe “ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi.” (Matai 24:6, 7) Alobi mpe ete “mabele ekoningana makasi na bisika ndenge na ndenge, mpe bamaladi mabe mpe nzala ekozala bisika ndenge na ndenge.” (Luka 21:11) Yesu akebisi bayekoli na ye: “Bato bakotya bino mabɔkɔ mpe bakonyokola bino.” (Luka 21:12) Basakoli ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato mingi. Makambo ya kobuka mibeko ekokóma mingi, mpe bolingo ya bato  mingi ekokita. Alobi lisusu ete “nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

Atako esakweli wana ya Yesu ekokisamaki na makambo mosusu liboso mpe ntango Baroma babebisaki Yerusaleme, ekoki nde kozala ete Yesu azali kolobela kokokisama na yango ya monene? Ezali nde na makambo oyo emonisi ete esakweli wana ya ntina oyo Yesu apesaki ezali kokokisama na monene na yango na ntango na biso?

Moko ya makambo oyo Yesu alobeli na kati ya elembo ya kozala na ye ezali komonana ya “eloko ya bosɔtɔ oyo ebebisaka.” (Matai 24:15) Na mobu 66 T.B., eloko ya bosɔtɔ yango oyo emonani ezali “mampinga” ya Roma, ná badrapo na bango oyo ezalaki biloko ya losambo. Baroma bazingi Yerusaleme mpe babuki bifelo na yango mosusu. (Luka 21:20) Na ndenge yango, “eloko ya bosɔtɔ” etɛlɛmi na esika oyo esengeli kozala te, esika oyo Bayuda bazali kotalela yango ete ezali “esika mosantu.”

Na nsima, Yesu asakoli lisusu: “Ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo, ɛɛ, mpe ekosalema lisusu te.” Na mobu 70 T.B., Baroma babebisi Yerusaleme. Kobebisama ya ‘engumba mosantu’ wana ya Bayuda, ná tempelo na yango, ezalaki mpenza bolɔzi moko monene, mpo bankóto ya bato babomamaki. (Matai 4:5; 24:21) Ezali kobebisama ya Yerusaleme oyo eleki monene, oyo Bayuda bamoná naino te, mpe esukisi ebongiseli ya losambo oyo Bayuda bazalaki na yango banda kala mpenza. Na yango, na mikolo ezali koya, esakweli wana ya Yesu ekokokisama na monene na yango mpe na ndenge ya nsɔmɔ koleka.

BAZALI KOBANGA TE NA MIKOLO YA NSUKA

Lisolo ya Yesu ná bantoma na ye oyo etali elembo ya kozala na ye na kati ya Bokonzi na ye mpe nsuka ya makambo oyo esili naino te. Sikoyo, akebisi bango na likambo etali kolanda “Ba-Kristo ya lokuta mpe basakoli ya lokuta.” Alobi ete bato yango bakomeka “kokosa ata bato oyo baponami, soki likoki ezali.” (Matai 24:24) Kasi bato oyo baponami bakokosama te. Ba-Kristo ya lokuta bakomonana na miso. Nzokande, kozala ya Yesu ekomonana na miso te.

Ntango Yesu azali kolobela bolɔzi monene oyo ekoya na nsuka ya makambo ya ntango oyo, alobi: “Moi ekoyinda, mpe sanza ekopesa pole na yango te, mpe minzoto ekouta na likoló ekwei, mpe banguya ya likoló ekoningana.” (Matai 24:29) Ntango bantoma bayoki maloba wana ya kobangisa, bayebi mpenzampenza te likambo oyo ekosalema, kasi ekozala likambo ya nsɔmɔ mingi.

Makambo wana ya nsɔmɔ ekosala bato nini? Yesu alobi: “Bato bakolɛmba nzoto na kobanga mpe na kozela makambo oyo ezali koya na mabele esika bato bafandi; mpo banguya ya likoló ekoningana.” (Luka 21:26) Ya solo, Yesu azali kolobela makambo oyo ekosalema na eleko wana ya molili makasi oyo ekokómela bato.

Likambo ya kolendisa, Yesu ayebisi bantoma polele ete bato nyonso te nde bakomilela ntango ‘Mwana ya moto akoya na nguya mpe na nkembo mingi.’ (Matai 24:30) Asilaki komonisa ete Nzambe akoyeisa mikolo yango mokuse “mpo na bato oyo baponami.” (Matai 24:22) Bongo, bayekoli wana ya sembo bakosala nini ntango bakomona makambo ya nsɔmɔ oyo Yesu alobelaki? Yesu alendisi bayekoli na ye: “Ntango makambo wana ekobanda kosalema, bótɛlɛma alima mpe bótombola mitó na bino, mpo kosikolama na bino ekómi pene.”​—Luka 21:28.

Kasi ndenge nini bayekoli ya Yesu oyo bazali na bomoi na eleko oyo esakolamaki bakoyeba ete nsuka ekómi pene? Yesu apesi ndakisa ya nzete ya figi: “Ntango kaka etape na yango ya sika ekómi pɛtɛpɛtɛ mpe ebimisi nkasa, boyebi ete eleko ya molunge ekómi pene. Bino mpe ndenge moko, ntango bokomona makambo yango nyonso, bóyeba ete azali pene, na baporte. Ya solo mpenza nalobi na bino ete libota oyo ekoleka ata moke te tii makambo wana nyonso ekosalema.”​—Matai 24:32-34.

 Na yango, ntango bayekoli na ye bakomona makambo ndenge na ndenge ya elembo yango ezali kokokisama, bakoyeba ete nsuka ekómi pene. Mpo na kokebisa bayekoli oyo bakozala na bomoi na eleko wana ya ntina, Yesu alobi:

“Mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi. Mpo ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo. Mpo ndenge bazalaki na mikolo oyo ezalaki liboso ya mpela: bazalaki kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.” (Matai 24:36-39) Yesu azali kokundwela bayekoli na ye ete Mpela ya ntango ya Noa etalaki mokili mobimba. Nsuka ya mokili oyo ekozala mpe bongo.

Na ntembe te, bantoma oyo bazali koyoka Yesu na Ngomba ya Olive bayebi ete basengeli kozala ekɛngɛ. Yesu alobi: “Bókeba ete mitema na bino ekóma kilo te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, noki na ntango wana kaka, mokolo wana ekwela bino pwasa lokola motambo. Mpo yango ekoyela bato nyonso oyo bafandi na mabele mobimba. Yango wana, bólala mpɔngi te, bópesa malɔmbɔ ntango nyonso mpo bókoka kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kosalema, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.”​—Luka 21:34-36.

Awa lisusu, Yesu amonisi ete makambo oyo azali kolobela ekosalema na mikolo ezali koya. Azali te kosakola makambo oyo ekosalema na nsima ya mwa bambula, mpe oyo ekotalela kaka engumba ya Yerusaleme to ekólo ya Bayuda. Azali kolobela nde makambo oyo “ekoyela bato nyonso oyo bafandi na mabele mobimba.”

Alobi ete bayekoli na ye basengeli kozala ekɛngɛ, kosɛnzɛla, mpe komilɛngɛla. Mpo na kobɛta nsɛtɛ na likebisi yango, Yesu apesi ndakisa mosusu: “Bóyeba likambo oyo: soki nkolo-ndako ayebaka na ntango nini moyibi akoya na butu, mbɛlɛ alali mpɔngi te mpe mbɛlɛ atiki te ete moyibi abuka ndako na ye mpe akɔta. Yango wana bino mpe bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.”​—Matai 24:43, 44.

Yesu ayebisi bayekoli na ye ntina oyo basengeli kozala na elikya ete makambo ekotambola malamu. Alaki bango ete ntango esakweli na ye wana ekokokisama, ekozala na “moombo” moko oyo azali ekɛngɛ mpe akolɛmbisa mabɔkɔ te. Yesu alobeli likambo moko oyo bantoma na ye bakoki kokanga ntina na yango: “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye abatela basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi? Esengo na moombo yango soki nkolo na ye ntango akoya akuti ye azali kosala bongo! Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Akotya ye abatela biloko na ye nyonso.” Kasi soki “moombo” yango akómi na makanisi mabe mpe akómi konyokola basusu, nkolo na ye “akopesa ye etumbu ya makasi mpenza.”​—Matai 24:45-51; talá mpe Luka 12:45, 46.

Kasi, Yesu alingi koloba te ete etuluku moko ya bayekoli na ye ekokóma na makanisi mabe. Bongo, liteya nini Yesu alingi kopesa bayekoli na ye? Alingi ete bázala ekɛngɛ mpe bálɛmbisa mabɔkɔ te, ndenge amonisi yango polele na ndakisa mosusu.