Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 135

Yesu asekwi mpe abimeli bato mingi

Yesu asekwi mpe abimeli bato mingi

LUKA 24:13-49 YOANE 20:19-29

  • YESU ABIMELI BAYEKOLI NA NZELA YA EMAUSE

  • ALIMBOLELI BAYEKOLI MAKOMAMI POLELEPOLELE

  • TOMA ATIKI KOTYA NTEMBE

Tozali na mokolo ya lomingo, mwa 16 Nisana; bayekoli balɛmbi nzoto. Bazali koyeba te mpo na nini lilita etikali mpamba. (Matai 28:9, 10; Luka 24:11) Na nsima, kaka na mokolo yango, Kleopasi ná moyekoli mosusu bauti na Yerusaleme, bazali kokende na Emause, oyo ezali na kilomɛtrɛ soki 11.

Nzelanzela, bazali kolobela makambo oyo esalemi. Na nsima, moto moko oyo bayebi te akɔti na lisolo na bango. Atuni bango: “Makambo nini yango bozali kosolola awa bozali kotambola na nzela?” Kleopasi azongisi: “Yo ozali nde mopaya mpe ofandi yo moko na Yerusaleme mpo oyeba te makambo oyo esalemi kuna mikolo oyo?” Moto yango atuni: “Makambo nini?”​—Luka 24:17-19.

Balobi: “Makambo ya Yesu Monazarete. . . . Tozalaki kolikya ete moto yango nde azalaki moto oyo asengelaki kosikola Yisraele.”​—Luka 24:19-21.

Kleopasi ná moninga na ye babandi koyebisa ye makambo oyo esalemaki mokolo yango. Bayebisi ye ete basi oyo bakendaki na lilita esika bakundaki Yesu bakuti lilita mpamba, mpe ete bamonaki makambo ya nsɔmɔ: baanzelu bazalaki kuna mpe bayebisaki bango ete Yesu azali na bomoi. Bayebisi ye mpe ete bayekoli mosusu bakendaki na lilita mpe “bakutaki yango bongo, se ndenge basi wana balobaki.”​—Luka 24:24.

Emonani polele ete bayekoli wana mibale bayebi ndimbola ya makambo oyo esalemi te. Moto wana alobi na bango na mpiko mpo na kosembola makanisi na bango mpe kosimba mitema na bango ete: “Ee bino bato bozangá bososoli mpe oyo motema endimaka noki te makambo nyonso oyo basakoli balobaki! Esengelaki nde te ete Kristo anyokwama na makambo wana mpe akɔta na nkembo na ye?” (Luka 24:25, 26) Na nsima, alimbweli bango mikapo ebele ya Makomami oyo elobeli Kristo.

Nsukansuka, bango nyonso misato bakómi pene na Emause. Lokola bayekoli mibale wana balingi moto yango ayebisa bango makambo mosusu, balobi na ye: “Fandá na biso, mpo mpokwa ezali koya mpe mokolo ekómi na nsuka.” Andimi kofanda na bango, mpe batye biloko ya kolya. Ntango moto yango asali libondeli, akamati limpa, abuki yango mpe abandi kopesa bango yango, bayebi sikoyo ete ezali Yesu, mpe alimwe na mbala moko. (Luka 24:29-31) Sikoyo, bandimi ete Yesu azali mpenza na bomoi!

Na esengo, bayekoli mibale wana balobi ndenge bazalaki koyoka: “Mitema na biso ezalaki mɔtɔmɔtɔ ntango azalaki koloba na biso na nzela, ntango azalaki kolimbolela biso Makomami polelepolele, boye te?” (Luka 24:32) Bazongi mbangu na Yerusaleme, bakuti bantoma elongo na bayekoli mosusu. Liboso kutu Kleopasi ná moninga na ye báyebisa bango likambo oyo bakutani na yango, bayekoli mosusu balobi: “Ya solo mpenza Nkolo alamukaki mpe abimelaki Simo!” (Luka 24:34) Na nsima, bango mibale mpe bayebisi ndenge oyo Yesu abimelaki bango. Bango mpe bamoni ye na miso.

Sikoyo bango nyonso bazwi mobulu na makanisi: Yesu abimeli bango na kati ya ndako! Ezali likambo ya kokamwa mpo bakangaki baporte nyonso mpo na kobanga Bayuda. Atako bongo, Yesu atɛlɛmi wana, na katikati na bango. Alobi na bango malɛmbɛ: “Kimya ezala na bino.” Kasi bazali kolɛnga. Kaka ndenge ezalaki liboso, ‘bakanisi ete bamoni elimo moko boye.’​—Luka 24:36, 37; Matai 14:25-27.

Kasi Yesu alingi komonisa bango ete ezali emonamona te to eloko moko boye te oyo ezali kaka na makanisi na bango, alingi bámona ete azali na nzoto ya mosuni mpe alakisi bango mabɔkɔ ná makolo na ye, alobi: “Mpo na nini bozali kobulungana, mpe mpo na nini mitema na bino ezali kotya ntembe? Bótala mabɔkɔ na ngai mpe makolo na ngai, ezali ngai mpenza; bósimba ngai mpe bómona, mpo elimo ezalaka na misuni ná mikuwa te ndenge bozali komona ngai nazali na yango.” (Luka 24:36-39) Batondi na esengo mpe bazali kokamwa, kasi bazali kaka na mwa ntembe.

 Mpo na kosalisa bango lisusu bámona ete ezali mpenza ye, atuni bango: “Bozali na mwa eloko ya kolya awa?” Bapesi ye ndambo ya mbisi ya kotumba mpe alei yango. Na nsima alobi: “Oyo ezali maloba nalobaki na bino ntango nazalaki naino elongo na bino [liboso nakufa], ete makambo nyonso oyo ekomamá mpo na ngai na mibeko ya Moize mpe na Basakoli mpe na Nzembo esengeli kokokisama.”​—Luka 24:41-44.

Liboso, Yesu asalisaki Kleopasi ná moninga na ye bákanga ntina ya Makomami. Sikoyo azali kosalisa bayekoli nyonso oyo bayangani wana, alobi: “Ndenge wana nde ekomamá ete Kristo asengeli komona mpasi, kokufa mpe kosekwa na mokolo ya misato, mpe mpo na nkombo na ye kobongola motema mpo na kolimbisama ya masumu esengeli kosakolama na bikólo nyonso​—banda na Yerusaleme, bino bosengeli kozala batatoli ya makambo wana.”​—Luka 24:46-48.

Kasi Toma azali wana te, mpe ntina azali te eyebani te. Na mokolo oyo elandi, bantoma mosusu bayebisi ye na esengo ete: “Tomoni Nkolo!” Kasi Toma ayebisi bango: “Soki namoni elembo ya nsɛtɛ na mabɔkɔ na ye te mpe soki natye mosapi na ngai na elembo ya nsɛtɛ yango te mpe soki natye lobɔkɔ na ngai na kati ya mopanzi na ye te, nakondima ata moke te.”​—Yoane 20:25.

Mikolo mwambe na nsima, bayekoli bakutani lisusu na kati ya ndako, bakangi baporte, kasi mbala oyo Toma azali elongo na bango. Yesu abimeli bango, na nzoto ya mosuni, mpe apesi bango mbote ete: “Kimya ezala na bino.” Na nsima, atali Toma, mpe alobi na ye: “Tyá mosapi na yo awa, mpe talá mabɔkɔ na ngai, mpe kamatá lobɔkɔ na yo mpe tyá yango na kati ya mopanzi na ngai, tiká ntembe, kasi zalá nde na kondima.” Toma agangi: “Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai!” (Yoane 20:26-28) Sikoyo, azali kotya lisusu ntembe te ete Yesu azali na bomoi, akómi na nzoto ya elimo, mpe azali momonisi ya Yehova Nzambe.

Yesu alobi: “Ondimi mpo omoni ngai? Esengo na baoyo bazali komona te kasi bazali kondima.”​—Yoane 20:29.