Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 114

Kristo Mokonzi asambisi bampate ná bantaba

Kristo Mokonzi asambisi bampate ná bantaba

MATAI 25:31-46

  • YESU APESI NDAKISA YA BAMPATE NÁ BANTABA

Na ngomba ya Olive, Yesu auti kopesa ndakisa ya bangɔndɔ zomi ná ya talanta. Ndenge nini ayanoli na motuna ya bantoma oyo etali kozala na ye mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo? Apesi ndakisa ya nsuka, ya bampate ná bantaba.

Yesu abendi liboso likebi ya bato mpe alobi na bango: “Ntango Mwana ya moto akoya na nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye, bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo.” (Matai 25:31) Na ntembe te, Yesu amonisi ete ndakisa yango ezali kolobela ye. Mbala mingi amibengaka “Mwana ya moto.”​—Matai 8:20; 9:6; 20:18, 28.

Ntango nini ndakisa yango ekokokisama? Ekokokisama ntango Yesu “akoya na nkembo na ye” ná baanzelu mpe akofanda na “kiti na ye ya bokonzi ya nkembo.” Autaki kolobela “Mwana ya moto azali koya na mapata ya likoló na nguya mpe nkembo mingi” ná baanzelu na ye. Ekozala ntango nini? “Nokinoki na nsima ya bolɔzi.” (Matai 24:29-31; Marko 13:26, 27; Luka 21:27) Na yango, ndakisa oyo ekokokisama na mikolo ezali koya ntango Yesu akoya na nkembo. Na nsima akosala nini?

Yesu alimboli: “Ntango Mwana ya moto akoya . . . , bikólo nyonso bakoyangana liboso na ye, mpe akokabola bato, mosusu epai oyo mosusu epai oyo, ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate ná bantaba. Mpe akotya bampate na lobɔkɔ na ye ya mobali, kasi bantaba na lobɔkɔ na ye ya mwasi.”​—Matai 25:31-33.

Mpo na bampate oyo bakotyama na ngámbo ya malamu, Yesu alobi: “Bongo mokonzi akoloba na baoyo bazali na lobɔkɔ na ye ya mobali: ‘Bóya, bino baoyo Tata na ngai apambolá, bózwa libula ya bokonzi oyo babongiselá bino banda mokili ebandá.’” (Matai 25:34) Mpo na nini Mokonzi akondima bampate?

Mokonzi alimboli: “Mpo nayokaki nzala mpe bopesaki ngai mwa eloko ya kolya; nazalaki na  mposa ya mai mpe bopesaki ngai mwa eloko ya komɛla. Nazalaki mopaya mpe boyambaki ngai malamu; nazalaki bolumbu, mpe bolatisaki ngai. Nazalaki na maladi mpe bosalisaki ngai. Nazalaki na bolɔkɔ mpe boyaki kotala ngai.” Ntango bampate yango, “bayengebene,” batuni ndenge nini basalaki makambo ya malamu yango, ayanoli ete: “Ntango nyonso oyo bosalelaki yango moko ya bato oyo baleki mike na kati ya bandeko na ngai oyo, bosalelaki ngai.” (Matai 25:35, 36, 40, 46) Basali makambo ya malamu yango na likoló te, mpo kuna babɛlaka te mpe bayokaka nzala te. Makambo ya malamu yango basaleli yango nde bandeko ya Kristo oyo bazali awa na mabele.

Tokoloba nini mpo na bantaba oyo batyami na lobɔkɔ ya mwasi? Yesu alobi: “Bongo [Mokonzi] akoloba mpe na baoyo bazali na lobɔkɔ na ye ya mwasi ete: ‘Bólongwa awa, bino baoyo bolakelamá mabe, bókende na mɔtɔ ya seko oyo babongiselá Zabolo ná baanzelu na ye. Mpo nayokaki nzala, kasi bopesaki ngai eloko ya kolya te, mpe nazalaki na mposa ya mai, kasi bopesaki ngai eloko ya komɛla te. Nazalaki mopaya, kasi boyambaki ngai malamu te; bolumbu, kasi bolatisaki ngai te; na maladi mpe na bolɔkɔ, kasi bosalisaki ngai te.’” (Matai 25:41-43) Ebongi mpenza mokonzi akata likambo ndenge wana mpo bantaba bamoniselaki bandeko ya Kristo boboto te, ndenge basengelaki kosala yango.

Bantoma bamoni ete lisambisi wana oyo ekosalema na mikolo ezali koya ekopesa bolamu to mpasi ya libela. Yesu alobi na bango: “Boye [Mokonzi akoloba] maloba oyo: ‘Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete: Ntango nyonso oyo bosalelaki yango te moko ya bato oyo baleki mike, bosalelaki ngai yango te.’ Mpe bango bakokufa liwa ya seko, kasi bayengebene bakozwa bomoi ya seko.”​—Matai 25:45, 46.

Eyano oyo Yesu apesi bantoma esalisi bayekoli na ye bákanisa makambo mingi oyo ekosalisa bango bátalela makanisi na bango mpe makambo oyo basalaka.