Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 137

Bato ebele bamoni ye liboso ya Pantekote

Bato ebele bamoni ye liboso ya Pantekote

MATAI 28:16-20 LUKA 24:50-52 MISALA 1:1-12; 2:1-4

  • YESU ABIMELI BATO EBELE

  • AMATI NA LIKOLÓ

  • ASOPELI BAYEKOLI NA YE 120 ELIMO SANTU

Nsima ya kosekwa, Yesu azwi bibongiseli mpo bantoma na ye 11 bákutana na ye na ngomba moko na Galile. Bazali elongo na bayekoli mosusu, soki 500, oyo basusu kati na bango bazalaki liboso kotya ntembe. (Matai 28:17; 1 Bakorinti 15:6) Kasi, makambo oyo Yesu akoloba sikoyo ekosalisa mokomoko na bango andima ete azali solo na bomoi.

Yesu ayebisi bango ete Nzambe apesi ye bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele. Alobi na bango: “Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.” (Matai 28:18-20) Ya solo, Yesu azali na bomoi mpe alingi ete nsango malamu ekoba kosakolama.

Bayekoli nyonso ya Yesu, ezala basi, mibali, mpe bana bazwi mokumba wana ya kokómisa bato bayekoli. Banguna bakoki koluka kopekisa mosala na bango ya kosakola mpe ya koteya, kasi Yesu akitisi bango mitema na maloba oyo: “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.” Yango elimboli nini mpo na bayekoli na ye? Ayebisi bango: “Talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” Yesu alobi te ete bato nyonso oyo bakosakola nsango malamu bakozala na likoki ya kosala makamwisi. Kasi elimo santu ekosalisa bango.

Nsima ya kosekwa, Yesu abimeli bayekoli na ye “mikolo ntuku minei (40).” Azali kolata nzoto ndenge na ndenge ya mosuni, azali komimonisa “na bilembeteli mingi ya solosolo” mpe koteya bango “makambo etali bokonzi ya Nzambe.”​—Misala 1:3; 1 Bakorinti 15:7.

Emonani ete wana bantoma bazali naino na Galile, Yesu ayebisi bango bázonga na Yerusaleme. Ntango akutani na bango na engumba yango, alobi: “Bólongwa na Yerusaleme te, kasi bókoba kozela eloko oyo Tata alakaki, oyo boyokaki epai na ngai; mpo Yoane abatisaki mpenza na mai, kasi bino bokobatisama na elimo santu nsima ya mwa mikolo.”​—Misala 1:4, 5.

Na nsima, Yesu akutani lisusu na bantoma na ye. Abimisi “bango tii na Betania,” oyo ezali na ɛsti ya Ngomba ya Olive. (Luka 24:50) Atako Yesu ayebisaki bango makambo ebele oyo etali kokende na ye na likoló, bazali kaka kokanisa ete Bokonzi na ye ekozala awa na mabele.​—Luka 22:16, 18, 30; Yoane 14:2, 3.

Bantoma batuni Yesu: “Nkolo, ozali kozongisela Yisraele bokonzi na ntango oyo?” Ayebisi bango kaka ete: “Koyeba bantango mpe bileko oyo Tata atyá na nse ya bokonzi na ye moko, etali bino te.” Na nsima, mpo na kobɛta nsɛtɛ na mosala oyo basengeli kosala, alobi: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.”​—Misala 1:6-8.

Bantoma bazali na Ngomba ya Olive elongo na Yesu mpe bamoni ye abandi komata na likoló. Eumeli te, lipata moko ezipi ye. Nsima ya kosekwa, Yesu azalaki kolata nzoto ya mosuni. Kasi sikoyo, Yesu atiki nzoto ya mosuni oyo alataki na libaku wana, mpe amati na likoló lokola ekelamu ya elimo. (1 Bakorinti 15:44, 50; 1 Petro 3:18) Wana bantoma na ye ya sembo bazali kaka kotala likoló, “mibali mibale na bilamba ya mpɛmbɛ” babimeli bango. Mibali yango ezali baanzelu oyo balati nzoto ya mosuni; batuni bango: “Mibali ya Galile, mpo na nini botɛlɛmi bozali kotala likoló? Yesu wana, oyo azalaki na bino mpe akamatami na likoló, akoya mpe bongo ndenge kaka bomonaki ye azali kokende na likoló.”​—Misala 1:10, 11.

Bato babɛtaki kelelo te ntango Yesu amati na likoló; kaka bayekoli na ye ya sembo nde bamonaki. “Akoya mpe bongo,” kelelo ekobɛtama te; kaka bayekoli na ye ya sembo nde bakososola ete ayei na nguya ya Bokonzi.

 Bantoma bazongi na Yerusaleme. Mwa mikolo na nsima, bayangani elongo na bayekoli mosusu, kati na bango “Maria mama ya Yesu ná bandeko na ye ya mibali.” (Misala 1:14) Bazali kobondela makasi. Bazali kobondela mpe mpo na kopona moyekoli oyo akozwa esika ya Yuda Mokeriota, mpo bantoma bázala 12. (Matai 19:28) Mposa na bango ezali bázwa moyekoli oyo amonaki misala ya Yesu mpe lisekwa na ye. Babwaki mbɛsɛ mpo na koyeba mokano ya Nzambe. Ezali mbala ya nsuka Biblia elobela likambo ya kobwaka mbɛsɛ. (Nzembo 109:8; Masese 16:33) Matiasi, oyo mbala mosusu azalaki na kati ya bayekoli 70, oyo Yesu atindaki bákende kosakola, aponami mpe ‘atángami esika moko na bantoma zomi na moko.’​—Misala 1:26.

Mikolo zomi nsima ya komata ya Yesu na likoló, Fɛti ya Pantekote ya mobu 33 T.B. ebandi. Bayekoli soki 120 bayangani na shambrɛ moko ya likoló na Yerusaleme. Na mbala moko, makɛlɛlɛ lokola oyo ya mopɛpɛ makasi ebimi na likoló mpe etondi na ndako mobimba. Mpe ndemo lokola ya mɔtɔ emonani na motó ya mokomoko ya baoyo bazali wana. Bayekoli yango nyonso babandi koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge. Yango nde koya ya elimo santu oyo Yesu alakaki bango!​—Yoane 14:26.